Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb20 Décembre lok. 3
  • Tomonisaka bolingo ntango topesaka mabɔkɔ na disiplini ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tomonisaka bolingo ntango topesaka mabɔkɔ na disiplini ya Yehova
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Masolo mosusu
  • Disiplini emonisaka ete Yehova alingaka biso
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Discipline oyo ezali kobota mbuma na kimya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Ntango moto oyo olingaka atiki kosalela Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Tólónga ntembe ya kozala sembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
mwb20 Décembre lok. 3

BOMOI YA BAKRISTO

Tomonisaka bolingo ntango topesaka mabɔkɔ na disiplini ya Yehova

Kolongola moto na lisangá ebatelaka lisangá mpe epesaka disiplini na mosumuki oyo aboyi kobongola motema. (1Ko 5:6, 11) Tomonisaka bolingo ntango topesaka mabɔkɔ na disiplini ya Yehova. Ndenge nini kosala bongo ezali komonisa bolingo atako kolongola moto na lisangá epesaka moto nyonso mpasi, ezala bandeko ya libota to mpe bandeko ya komite ya kosambisa?

Likambo eleki ntina, kosala bongo ezali komonisa bolingo mpo na nkombo ya Yehova mpe mitinda na ye ya sembo. (1Pe 1:14-16) Lisusu, emonisaka mpe bolingo mpo na moto oyo alongolami na lisangá. Atako disiplini ya makasi esalaka mpasi, kasi yango ekoki kobota ‘mbuma ya kimya to ya boyengebene.’ (Ebr 12:5, 6, 11) Soki tozali kokoba kosolola na moto oyo alongolami na lisangá to oyo amilongoli ye moko na lisangá, tozali te kopesa mabɔkɔ na disiplini ya Yehova. Kobosana te, Yehova apesaka basaleli na ye disiplini “na ndenge oyo ekoki.” (Yir 30:11) Wana tozali kokoba kopesa disiplini ya Yehova mabɔkɔ mpe tozali kokoba na mimeseno na biso ya elimo, tokoki kotya motema ete moto yango akozongela Tata na biso ya motema mawa.​—Yis 1:16-18; 55:7.

TALÁ VIDEO TIKALÁ SEMBO NA MOTEMA MOBIMBA, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Elilingi oyo outi na video ‘Tikalá sembo na motema mobimba.’ Gabriella ná Ben bazali kolela nsima ya kotánga mokanda oyo outi epai ya mwana na bango oyo alongolami na lisangá.

    Baboti bakristo bamiyokaka ndenge nini ntango mwana na bango atiki Yehova?

  • Elilingi oyo outi na video ‘Tikalá sembo na motema mobimba.’ Bandeko bazali koyamba mpe kobɔndisa Gabriella ná Ben nsima ya makita ya lisangá.

    Ndenge nini bandeko ya lisangá bakoki kosalisa bandeko ya libota oyo batikali sembo?

  • Elilingi oyo outi na video ‘Tikalá sembo na motema mobimba.’ Gabriella azali kokanisa lisolo ya botomboki ya Kora.

    Lisolo nini ya Biblia emonisi ete ezali na ntina bosembo na biso epai ya Yehova esengeli koleka bosembo na biso epai ya bato ya libota?

  • Elilingi oyo outi na video ‘Tikalá sembo na motema mobimba.’ Nsima ya makita, Gabriella asololi na Ben mpo na mesaje oyo mwana na bango ya mobali atindeli bango.

    Ndenge nini tokomonisa ete bosembo na biso epai ya Yehova eleki bosembo na biso epai ya bato ya libota?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto