Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb21 Janvier lok. 5
  • Batelá libala na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batelá libala na yo
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Masolo mosusu
  • Soki libala elingi kopanzana
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Nsima ya mokolo ya fɛti ya libala
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Zalá na esengo na libala na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
mwb21 Janvier lok. 5
Mobali oyo afandi na nse pene ya mwasi na ye mpe azali na esengo ndenge azali kosukola bilamba elongo na mwasi na ye.

BOMOI YA BAKRISTO

Batelá libala na yo

Yehova azwaka na lisɛki te bilako oyo mwasi ná mobali basalaka. Alobaki ete bango mibale basengeli kokangama esika moko. (Mt 19:5, 6) Basaleli ya Nzambe mingi bazali na mabala ya esengo. Kasi, libala moko te ezalaka ya kokoka. Mikakatano ezangaka te. Tosengeli te kozala na makanisi oyo bato mingi bazalaka na yango ete kokabwana to koboma libala nde solisyo mpo na kosilisa matata oyo ebimaka na kati ya libala. Ndenge nini bakristo oyo babalá bakoki kobatela libala na bango?

Tótalela makambo mitano ya ntina.

  1. Batelá motema na yo na makambo lokola kozala selesele na moto oyo azali molongani na yo te mpe na kominanola ya mbindo, makambo oyo ebebisaka boyokani na kati ya libala.​—Mt 5:28; 2Pe 2:14.

  2. Kómisá makasi boyokani na yo ná Nzambe, mpe kolisá lisusu mposa na yo ya kosepelisa ye na kati ya libala na yo.​—Nz 97:10.

  3. Kobá kolata bomoto ya sika, mpe saleláká molongani na yo mwa makambo ya boboto oyo ekosala ete amiyoka malamu.​—Kol 3:8-10, 12-14.

  4. Sololáká na molongani na yo malamu, mpe zaláká na limemya.​—Kol 4:6.

  5. Kokisáká bamposa ya molongani na yo na bolingo mpenza mpe moniseláká ye lolango.​—1Ko 7:3, 4; 10:24.

Ntango bakristo bapesaka libala lokumu, bapesaka nde Yehova lokumu, ye oyo azali Mobandisi na yango.

TALÁ VIDEO TOSENGELI ‘KOYIKA MPIKO NTANGO TOZALI KOPOTA MBANGU’​—TOSÁKÁ MIBEKO YA MOMEKANO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Elilingi ya video Tosengeli ‘koyika mpiko ntango tozali kopota mbangu’​—Tosáká mibeko ya momekano. Ndeko Calou ná mwasi na ye bazali komungamunga nsima ya diskur ya libala na bango na Ndako ya Bokonzi.

    Atako libala ekoki kobanda malamu, mikakatano nini ekoki kobima?

  • Elilingi ya video Tosengeli ‘koyika mpiko ntango tozali kopota mbangu’​—Tosáká mibeko ya momekano. Ndeko Calou ná mwasi na ye bazali kosolola na kimya nyonso mikakatano oyo bazali na yango. Biblia ya kofungwama ezali na mesa.

    Ndenge nini mitinda ya Biblia ekoki kosalisa baoyo bamiyokaka ete bazali na libala ezangá bolingo?

  • Elilingi ya video Tosengeli ‘koyika mpiko ntango tozali kopota mbangu’​—Tosáká mibeko ya momekano. Ndeko azali kotángela mwasi na ye ná bana na bango mibale ya basi masolo ya Biblia oyo ezali na buku ‘Mokanda mpo na masolo ya Biblia.’

    Saleláká mitinda ya Biblia mpo ozala na libala ya esengo

    Mibeko nini Yehova atyá mpo na libala?

  • Mpo libala elonga, mwasi ná mobali basengeli kosala nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto