Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb21 Janvier lok. 11
  • Poná kosalela Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Poná kosalela Yehova
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Masolo mosusu
  • Kozwa batisimo ekomemela yo mapamboli mingi!
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mokristo nyonso asengeli kozwa batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Masɛngami mpo na kozwa batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Batisimo mpe boyokani na yo ná Nzambe
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
mwb21 Janvier lok. 11
Nzela oyo emonisi makambo oyo moto asengeli kosala mpo na kosalela Yehova. Bilembo oyo etyami na nzela yango emonisi matambe oyo moto asengeli kosala: koyekola Biblia, koyangana na makita, kosakola mpe kozwa batisimo.

Makambo nini ozali kosala sikoyo mpo ozwa batisimo?

BOMOI YA BAKRISTO

Poná kosalela Yehova

Soki ozali elenge mpe mosakoli oyo azwi naino batisimo te to moyekoli ya Biblia, ozali kokana kozwa batisimo? Mpo na nini osengeli kokana kozwa batisimo? Mpo osala boyokani ya malamu ná Yehova osengeli liboso kozwa batisimo. (Nz 91:1) Yango nde ekobikisa biso. (1Pe 3:21) Okoki kosala nini mpo omipesa mpe ozwa batisimo?

Omindimisa yo moko ete ozali na kati ya solo. Ntango okómi na bantembe na motó, salá bolukiluki. (Ro 12:2) Luká koyeba makambo nini osengeli kobongola mpe ntango ozali kosala bambongwana yango, osengeli kozala na mokano ya kosepelisa Yehova. (Mas 27:11; Ef 4:23, 24) Bondeláká ye ntango nyonso asalisa yo. Zalá na kondima ete Yehova akopesa yo makasi mpe akosunga yo na nzela ya nguya ya elimo santu na ye. (1Pe 5:10, 11) Milende oyo ozali kosala ezali mpamba te. Kosalela Yehova nde likambo eleki ntina na bomoi!​—Nz 16:11.

TALÁ VIDEO MAKAMBO OYO EMEMAKA NA BATISIMO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Mikakatano nini bato mosusu balongaki mpo bázwa batisimo?

  • Ndenge nini okoki kokóma na kondima makasi mpo omipesa na Yehova?

  • Nini esalisaki bato mosusu bákokisa masɛngami mpo bázwa batisimo?

  • Mapamboli nini baoyo baponaka kosalela Yehova bazwaka?

  • Komipesa mpe kozwa batisimo elimboli nini?

Na nsuka ya diskur ya batisimo, molobi akosɛnga na baoyo bakozwa batisimo bátɛlɛma mpe bápesa biyano na mituna mibale oyo elandi na mongongo makasi:

Osili kobongola motema, komipesa na Yehova na libondeli, mpe ondimi ete Yehova akopesa biso lobiko na nzela ya Yesu Kristo?

Okangi ntina ete awa ozali kozwa batisimo ozali kokóma Motatoli ya Yehova mpe kokɔta na ebongiseli na ye?

Soki baoyo bakozwa batisimo bayanoli “ɛɛ” na mituna wana, yango emonisi ete ‘balobi polele,’ bandimi lisiko mpe ete basili komipesa mobimba na Yehova.​—Ro 10:9, 10.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto