Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb21 Mai lok. 11
  • Teyáká na esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Teyáká na esengo
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Masolo mosusu
  • Koloba na esengo
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Koloba na esengo
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Tunáká mituna
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Simbáká mitema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
mwb21 Mai lok. 11
Ndeko moko azali koyekola na mobange moko Biblia, azali na esengo mpe azali kosala bajɛstɛ.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA | BAKISÁ ESENGO NA YO NA MOSALA YA KOSAKOLA

Teyáká na esengo

Soki ozali na esengo, bato mosusu mpe bakokóma na esengo. Yango ebendaka likebi ya bayoki na biso. Lisusu emonisaka ete tozwaka na motuya nsango oyo tomemaka. Ata soki tozali na mimeseno nini, tobɔkwamá ndenge nini, biso nyonso tokoki koteya na esengo. (Ro 12:11) Ndenge nini tokoki kosala yango?

Ya liboso, kanisá ntina ya nsango oyo ozali komema. Ozali na libaku ya kosakola “nsango malamu ya makambo malamu!” (Ro 10:15) Ya mibale, manyolá na makambo malamu oyo nsango malamu ekoki komemela bayoki na yo. Bazali mpenza na mposa ya koyoka makambo oyo olingi koyebisa bango. (Ro 10:13, 14) Ya misato, lobáká na mpiko, saláká bajɛstɛ oyo ebongi mpe elongi na yo esengeli kolakisa ndenge ozali koyoka.

TALÁ VIDEO OKOKI KOYOKA ESENGO YA KOKÓMISA BATO BAYEKOLI: KOLISÁ MAKOKI NA YO​—TEYÁ NA ESENGO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Elilingi euti na video ‘Okoki koyoka esengo ya kokómisa bato bayekoli: kolisá makoki na yo​—Teyá na esengo.’ Neeta alɛmbi nzoto mpo Rose akati boyekoli ya Biblia.

    Mpo na nini Neeta azalaki lisusu te na esengo ya koyekola na Rose?

  • Elilingi euti na video ‘Okoki koyoka esengo ya kokómisa bato bayekoli: kolisá makoki na yo​—Teyá na esengo.’ Rose azali komitungisa wana azali koyekola Biblia.

    Nini esalisaki Neeta azongela lisusu esengo na ye?

  • Elilingi euti na video ‘Okoki koyoka esengo ya kokómisa bato bayekoli: kolisá makoki na yo​—Teyá na esengo.’ Rose ná Neeta bazali kosolola na esengo nsima ya boyekoli na bango.

    Soki ozali na esengo, bato mosusu mpe bakokóma na esengo

    Mpo na nini tosengeli kotya makanisi na biso na bizaleli ya malamu ya bayoki na biso?

  • Esengo na biso ekoki kosala nini epai ya bayekoli na biso ya Biblia mpe bato mosusu?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto