BOMOI YA BAKRISTO
Monisá bolingo na libota na yo
Bolingo ezali kole oyo ezali kosangisa bato ya libota esika moko. Soki bolingo ezali te, ekozala mpasi mpo bato ya libota bázala na bomoko mpe básala na boyokani. Ndenge nini mibali, basi, mpe baboti bakoki komonisa bolingo na libota?
Mobali oyo alingaka mwasi na ye ayokaka makanisi na ye, atyaka likebi na bamposa na ye, mpe na mayoki na ye. (Ef 5:28, 29) Akokisaka bamposa ya mosuni ya bato ya libota na ye, mpe asalisaka bango bápusana penepene na Yehova ntango basalaka losambo na kati ya libota mbala na mbala. (1Ti 5:8) Mwasi oyo alingaka mobali na ye amikitisaka liboso na ye mpe amoniselaka ye “limemya makasi.” (Ef 5:22, 33; 1Pe 3:1-6) Mwasi ná mobali basengeli kolimbisanaka na motema moko. (Ef 4:32) Baboti oyo balingaka bana na bango batyelaka mwana mokomoko likebi mpe bateyaka bango bálinga Yehova. (Mib 6:6, 7; Ef 6:4) Baboti bakoki komituna boye: Mikakatano nini bana bazali kokutana na yango na eteyelo? Ndenge nini bazali kolonga mbamba oyo baninga bazali kotya bango? Ntango bato nyonso ya libota bazali komoniselana bolingo, libota ekozala esika ya kimya mpe ya libateli.
TALÁ VIDEO MONISÁ BOLINGO OYO ESILAKA SOKI MOKE TE NA LIBOTA, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Ndenge nini mobali oyo alingaka mwasi na ye aleisaka ye mpe azwaka ye na motuya?
Ndenge nini mwasi oyo alingaka mobali na ye amoniselaka ye limemya makasi?
Ndenge nini baboti oyo balingaka bana na bango bakɔtisaka malamumalamu makambo oyo ezali na Liloba ya Nzambe na kati ya mitema ya bana na bango?