MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Eloko nini Yehova Nzambe na yo azali kosɛnga yo?”
Tosá Yehova mpo omemyaka ye makasi mpe olingaka ye (Mib 10:12; w09-F 1/10 lok. 10 par. 3-4)
Botosi ememelaka moto mapamboli (Mib 10:13; w09-F 1/10 lok. 10 par. 6)
Yehova alingaka ete tópusana penepene na ye (Mib 10:15; cl mok. 2 par. 2)
Yehova atindaka biso te tótosa ye na makasi. Kutu, alingaka ete tólinga ye mpe tótosa ye na “motema” na biso. (Ro 6:17) Baoyo baponaka kosalela Yehova bazalaka na bomoi ya malamu.