Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb21 Septembre lok. 5
  • Kobá komesenisa makoki na yo ya kososola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobá komesenisa makoki na yo ya kososola
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Masolo mosusu
  • Oyo okoki kosala mpo na kozwa bikateli ya malamu
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Zalá na kondima mpe zwáká bikateli na bwanya!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Bikateli na yo ekumisa Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Maloba ya ebandeli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2024
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
mwb21 Septembre lok. 5

BOMOI YA BAKRISTO

Kobá komesenisa makoki na yo ya kososola

Mpo moto oyo asalaka masano akoba kosala yango malamu, asengeli komesenisa nzoto na ye na ngalasisi. Ndenge moko, biso mpe tosengeli kokoba kosala milende mpo na koteya mpe kobatela makoki na biso ya kososola. (Ebr 5:14) Atako mbala mingi tozwaka bikateli na kolanda bikateli ya bato mosusu, tosengeli komesenisa makoki na biso ya kokanisa mpe kozwaka bikateli biso moko. Mpo na nini? Mpo mokomoko na biso akozongisa monɔkɔ mpo na bikateli oyo azwaka.​—Ro 14:12.

Tosengeli te kokanisa ete tokokoba kozwa bikateli ya malamu kaka mpo tozwá batisimo eleki sikoyo bambula mingi. Mpo tózwa bikateli ya malamu, tosengeli mpenza kotyela Yehova motema, Liloba na ye, mpe ebongiseli na ye.​—Yos 1:7, 8; Mas 3:5, 6; Mt 24:45.

TALÁ VIDEO “BATELÁ LISOSOLI YA MALAMU,” MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Bililingi euti na video “Batelá lisosoli ya malamu.” Emma ná mobali na ye bazali kotala lokasa ya libyangi.

    Emma alingaki kozwa ekateli na likambo nini?

  • Bililingi euti na video “Batelá lisosoli ya malamu.” Amy azali komonisa makanisi na ye na mpiko nyonso.

    Mpo na nini tosengeli koboya komonisa makanisi na biso moko na makambo oyo etali lisosoli ya moto na moto?

  • Bililingi euti na video “Batelá lisosoli ya malamu.” Emma azali kosolola na Charlotte mpe Allan mpo na koluka toli.

    Toli nini ya bwanya babalani moko bapesaki Emma?

  • Bililingi euti na video “Batelá lisosoli ya malamu.” Emma azali kosalela ordinatɛrɛ na ye mpo na kosala bolukiluki na “Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET.”

    Epai wapi Emma azwaki makanisi ya ntina oyo esalisaki ye na makambo oyo akutanaki na yango?

Nasengeli kotalela nini ntango nalingi kozwa bikateli?

  • Makanisi na ngai moko

  • Makanisi ya bato mosusu

  • Mitinda ya Biblia

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto