MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
Kobá komonisa bolingo ya sembo
[Lakisá video Maloba ya ebandeli na mokanda ya Ruta.]
Naomi asɛngaki Orpa ná Ruta bázonga na Moabe (Rt 1:8-13; w16.02 lok. 10 par. 5)
Ruta aboyaki kotika Naomi mpe Yehova (Rt 1:16, 17; w16.02 lok. 10 par. 6)
Bolingo ya sembo elendisaka moto akangama makasi na moto mosusu, asalela ye makambo na bosembo, mpe na kolongobana. Yehova amonisaka bolingo ya sembo epai ya basaleli na ye ya sembo. (Nz 63:3) Biso mpe tosengeli komonisela basusu bolingo ya sembo.—Mas 21:21.