MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
Ntina ya kozala na bwanya
Salomo asɛngaki Yehova bwanya (1Ba 3:7-9; w11 15/12 lok. 8 par. 4-6)
Yehova asepelaki ndenge Salomo asɛngaki bwanya (1Ba 3:10-13)
Lokola Salomo azwaki na motuya bwanya oyo eutaka na Yehova, ekólo mobimba ezalaki na kimya (1Ba 4:25)
Moto ya bwanya asalelaka boyebi ná mayele oyo azali na yango mpo na kozwa bikateli ya malamu. Bwanya eleki wolo na motuya. (Mas 16:16) Tokoki kokóma na bwanya soki tosɛngi Nzambe apesa biso yango, soki tozali kobanga ye, soki tozali na komikitisa mpe bopɔlɔ, mpe tozali koyekola Liloba na ye na mozindo.