Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb23 Janvier lok. 9
  • Yehova asalisaka biso ntango tozali kokutana na komekama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova asalisaka biso ntango tozali kokutana na komekama
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Masolo mosusu
  • Kobosanaka te ete Yehova azali “Nzambe ya bomoi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Tozalaka ata moke te biso moko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Ndenge oyo Yehova asalisaka biso tóyika mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
mwb23 Janvier lok. 9
Baboti mpe bana na bango mibale ya mike bayangani elongo na bandeko ya lisangá na nzela ya video.

BOMOI YA BAKRISTO

Yehova asalisaka biso ntango tozali kokutana na komekama

Na mikolo oyo ya nsuka, tozali kokutana na mikakatano mingi. Na bantango mosusu, tokoki komona ete ezali mpasi tóyikela mikakatano na biso mpiko. Kasi, soki tokobi kopusana penepene na Yehova, akosalisa biso tóyika mpiko na mikakatano oyo ezali mpasi mpo na biso. (Yis 43:2, 4) Ndenge nini tokoki kopusana penepene na Yehova ntango tozali kokutana na mikakatano?

Libondeli. Ntango tofungolelaka Yehova motema na biso, apesaka biso kimya ya makanisi mpe makasi ya koyika mpiko.​—Flp 4:6, 7; 1Te 5:17.

Makita. Lelo oyo, tozali na mposa ya bilei ya elimo mpe koyangana na makita na biso ndenge oyo Yehova abongisá yango. (Ebr 10:24, 25) Ntango tomibongisaka mpo na makita ya lisangá mpe topesaka biyano na makita, tozwaka matomba na lisalisi ya elimo oyo Yehova apesaka biso.​—Em 2:29.

Mosala ya kosakola. Tokomona ete ezali mpasi te kotya makanisi na makambo ya malamu soki tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosakola mingi. Tokokómisa mpe boninga na biso makasi elongo na Yehova mpe bandeko na biso bakristo.​—1Ko 3:5-10.

TALÁ VIDEO YEHOVA AKOYAMBA YO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Makambo nini esalisaki Malu azala ntango nyonso penepene na Yehova ntango azalaki kokutana na mikakatano?

  • Ndenge moko na Malu, ndenge nini maloba oyo ezali na Nzembo 34:18 ebɔndisaka biso ntango tozali kokutana na mikakatano?

  • Ndenge nini ndakisa ya Malu emonisi ete Yehova apesaka biso “nguya oyo eleki makasi” ntango tozali kokutana na mikakatano?​—2Ko 4:7

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto