Davidi apesi Salomo bato oyo bayebi malamu misala ya mabɔkɔ mpe bisaleli mpo na kotanga tempelo
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
Salisá bilenge bálonga na bomoi
Davidi ayebaki ete na lisalisi ya Yehova, Salomo akolonga kotambwisa mosala ya kotonga tempelo (1Nt 22:5; w17.01 lok. 29 par. 8)
Davidi alendisaki Salomo ete atyela Yehova motema mpe asala oyo esengeli (1Nt 22:11-13)
Davidi asalaki nyonso oyo asengelaki kosala mpo na kosalisa Salomo (1Nt 22:14-16; w17.01 lok. 29 par. 7; talá elilingi ya ezipeli)
OMITUNA BOYE: ‘Ndenge nini nakoki kosalisa bilenge ya lisangá na biso bázala na esengo mpe bálonga na mosala ya Yehova?’—w18.03 nk. 11-12 par. 14-15.