Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb23 Juillet lok. 11
  • Oyo okoki kosala mpo libota na yo ezala na esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyo okoki kosala mpo libota na yo ezala na esengo
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Masolo mosusu
  • Mama moko apesi toli ya mayele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Okoki kozala na libota ya esengo
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Disiplini emonisaka ete Yehova alingaka biso
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Salelá mitinda ya Biblia mpo na kosalisa bana na yo bálonga na bomoi
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
mwb23 Juillet lok. 11
Bililingi: Bililingi euti na video ”‏Salá ete libota na yo ezala na esengo.”1 ‏. Bana basi bazali kotala ndenge baboti na bango bazali kolya mwa gato. 2. Bana bazali kosɛka na ntango ya losambo na kati ya libota. 3. Moko ya bana yango azali kotala ndenge mama na ye oyo abeli alali likoló ya divan.

BOMOI YA BAKRISTO

Oyo okoki kosala mpo libota na yo ezala na esengo

Yehova alingaka ete mabota ezala na esengo. (Nz 127:3-5; Mos 9:9; 11:9) Nzokande, mitungisi ya mokili oyo to mabunga ya bato mosusu ya libota ekoki kosala ete tóbungisa esengo na biso. Moto mokomoko na libota akoki kosala nini mpo libota ezala na esengo?

Mobali apesaka mwasi na ye lokumu. (1Pe 3:7) Alekisaka ntango elongo na ye. Asɛngaka mwasi na ye makambo ya mindɔndɔmindɔndɔ te mpe amonisaka botondi mpo na oyo mwasi na ye asalaka mpo na ye mpe mpo na libota mobimba. (Kol 3:15) Amonisaka ete alingaka ye mpe akumisaka ye.​—Mas 31:28, 31.

Mwasi asalaka nyonso mpo na kopesa mobali na ye mabɔkɔ. (Mas 31:12) Amikitisaka liboso na ye mpe asalaka na bomoko elongo na ye. (Kol 3:18) Alobaka malamu mpo na ye mpe asololaka na ye na boboto.​—Mas 31:26.

Baboti balekisaka ntango ná bana na bango. (Mib 6:6, 7) Bayebisaka bana na bango ete balingaka bango. (Mt 3:17) Bapesaka disiplini na bolingo mpe na makanisi malamu.​—Ef 6:4.

Bana bapesaka baboti na bango lokumu mpe batosaka bango. (Mas 23:22) Bayebisaka baboti na bango makanisi mpe mayoki na bango. Bandimaka disiplini ya baboti na bango mpe bamemyaka bango.​—Mas 19:20.

TALÁ VIDEO SALÁ ETE LIBOTA NA YO EZALA NA ESENGO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MOTUNA OYO:

Moto mokomoko na video oyo asalaki nini mpo libota ezala na esengo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto