Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb23 Septembre lok. 7
  • Babateli ya mpate oyo basalaka mpo na bolamu ya basaleli ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Babateli ya mpate oyo basalaka mpo na bolamu ya basaleli ya Yehova
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Masolo mosusu
  • ‘Bengá bankulutu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Ndenge ya komonisa bolingo mpe motema mawa ntango ndeko moko asali lisumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Ndeko mobali​—⁠Ozali koluka kokóma nkulutu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Bikateli oyo emonisaka ete totyelaka Yehova motema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
mwb23 Septembre lok. 7

BOMOI YA BAKRISTO

Babateli ya mpate oyo basalaka mpo na bolamu ya basaleli ya Yehova

Bato mingi bakaniselaka bato oyo bazali na bokonzi mabe. Mpo na nini tokoki komitya na esika na bango? Mpo bato basalelaka bokonzi na bango na ndenge ya mabe mpo na koluka kaka matomba na bango moko. (Mik 7:3) Tozali na botɔndi mingi ndenge bankulutu na lisangá bazwaka formasyo mpo na kosalela bokonzi na bango mpo na bolamu ya basaleli ya Yehova.—Est 10:3; Mt 20:​25, 26.

Bankulutu bakeseni mpenza na bakonzi ya mokili oyo. Basalaka lokola bakɛngɛli mpo balingaka Yehova mpe basaleli na ye. (Yn 21:16; 1Pe 5:​1-3) Na nse ya litambwisi ya Yesu, babateli ya mpate yango basalisaka mosakoli mokomoko amiyoka ete azali na kati ya libota ya basambeli ya Yehova mpe atikala penepene na ye. Bazalaka wana mpo na kolendisa bampate ya Yehova na elimo mpe kosalisa bango ntango bazali na mposa ya lisalisi ya minganga na lombangu to ntango likama ebimi. Soki ozali na mposa ya lisalisi, ekozala malamu ozwa likanisi ya kobenga nkulutu moko ya lisangá na bino.—Yk 5:14.

Elilingi oyo euti na video “Babateli ya mpate oyo babatelaka etonga.” Nkulutu moko ayambi Elias na esengo mpenza wana bazali kopesana mbote.

TALÁ VIDEO BABATELI YA MPATE OYO BABATELAKA ETONGA, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Matomba nini Mariana azwaki na lisalisi oyo bankulutu bapesaki ye?

  • Matomba nini Elias azwaki na lisalisi oyo bankulutu bapesaki ye?

  • Nsima ya kotala video oyo, ndenge nini ozali kotalela misala ya bankulutu?

Zwá likanisi ya kobenga nkulutu moko . . .

  • soki okei kofanda esika mosusu to okómi na nimero mosusu ya telefone

  • soki okutani na komekama makasi

  • soki okozala te na boumeli ya ntango molai

  • soki ozali kobɛla makasi to okɔti na lopitalo

  • soki osali lisumu moko monene

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto