Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb23 Septembre lok. 13
  • Salisá bato oyo basambelaka ata na lingomba moko te báluka koyeba Mozalisi na bango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salisá bato oyo basambelaka ata na lingomba moko te báluka koyeba Mozalisi na bango
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Masolo mosusu
  • Tósalisa bato oyo basambelaka ata na lingomba moko te báyeba Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Salelá malamu mikanda oyo toyekolaka na bato Biblia
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Tóteyaka solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Luka kotalela bilembeteli
    Lamuká!—2021
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
mwb23 Septembre lok. 13
Ndeko mwasi moko azali kopesa litatoli epai ya mwasi moko ya Azia.

BOMOI YA BAKRISTO

Salisá bato oyo basambelaka ata na lingomba moko te báluka koyeba Mozalisi na bango

Ekómelaka yo okakatana kopesa litatoli epai ya bato oyo basambelaka ata na lingomba moko te, mpe okanisaka ete bakoyoka te? Soki bongo, kobosana te ete bato mingi oyo bazalaki kosambela ata na lingomba moko te, ezala mpe bato oyo bazalaki kondima te ete Nzambe azalaka, bakómaki Batatoli ya Yehova. Mbala mingi, bazalaki kaka na mposa ete moto moko asalisa bango bámona bilembeteli oyo emonisi ete Nzambe azalaka.—Ro 1:20; 10:14.

TALÁ VIDEO BATO OYO BAZANGI KONDIMA BAKOKI KOKÓMA NA KONDIMA!—BATO OYO BASAMBELAKA ATA NA LINGOMBA MOKO TE, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

Ndenge nini ndakisa ya Tommaso esalisi yo ozala na likanisi malamu mpo na kopesa litatoli epai ya bato oyo basambelaka ata na lingomba moko te?

Ndenge ya kosala yango

Soki moto moko alobi ete andimelaka Nzambe te, zalá na boboto, salelá mayele, mpe tyá likebi na makanisi mpe mayoki na ye mpo na likambo yango. (2Ti 2:24) Lobelá makambo oyo ekobenda likebi na ye. Azali kosepela mpo bólobela bilembeteli oyo etindi bato mingi bándima ete Mozalisi moko azali? Soki ezali bongo, salelá mikanda mpe bavideo oyo ebongisami mpo na likambo yango. Mwa buku La vie a-t-elle ete créée ? mpe Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie ebakisami na kati ya bisaleli na biso mpo na koteya mpo tómona yango kozanga mindɔndɔ.

Na ebandeli, okoki kobanga kosolola na moto oyo andimelaka Nzambe te. Yango wana, ekozala malamu osɛnga lisalisi epai ya mosakoli oyo amesaná kosakola. Kobosana mpe te ete Yehova akoki kosalisa biso tósimba mitema ya baoyo bazali na ezaleli oyo ebongi, ata soki na ebandeli bandimaka te ete ye azalaka.—Mis 13:48.

Mwa buku “La vie a-t-elle ete créée ?”
Mwa buku “Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie.”
    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto