BOMOI YA BAKRISTO
Ebongiseli moko mpo na kobɔndisa bandeko ya Betele
Moto nyonso akutanaka na mikakatano mpe azalaka na mposa ya libɔndisi mpe ya lisungi. Ata baoyo bazali makasi na elimo to baoyo bazali na mikumba minene na ebongiseli ya Yehova bakoki kolɛmba nzoto. (Yb 3:1-3; Nz 34:19) Liteya nini tokoki kozwa na ebongiseli oyo ezwamaki ya kolendisa bandeko ya libota ya Betele?
TALÁ VIDEO “TYELÁ NZAMBE MOTEMA,” MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Mikakatano nini bandeko ya Betele bakutanaka na yango?
Makambo nini minei ebongisami mpo na kobɔndisa bango?
Matomba nini bandeko oyo babɔndisaka basusu bazali kozwa?