Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb23 Novembre lok. 9
  • Baboti​—⁠Bóteya bana na bino ndenge ya kosepelisa Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baboti​—⁠Bóteya bana na bino ndenge ya kosepelisa Nzambe
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Masolo mosusu
  • Bikateli oyo emonisaka ete totyelaka Yehova motema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Salelá mitinda ya Biblia mpo na kosalisa bana na yo bálonga na bomoi
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Luká biyano na mituna oyo
    Programɛ ya Liyangani ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova 2025-2026—Elongo na mokɛngɛli ya zongazonga
  • Kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe koluka bwanya
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
mwb23 Novembre lok. 9
Bililingi: Bisaleli mpo na koteya bana. 1. Bana ya bambula ekeseni bazali kotala buku “Écoutez le grand Enseignant.” 2. Buku “Écoutez le grand Enseignant.” 3. Mwana moko ya mwasi asimbi buku “Mokanda mpo na Masolo ya Biblia.” 4. Mwana mosusu ya mwasi azali kotánga “Mokanda mpo na Masolo ya Biblia.” 5. Elenge mwasi moko azali kotánga buku “Votre jeunesse : comment en tirer le meilleur parti” na liyangani. 6. Mwana moko ya mobali azali kotya langi na lokasa ya kotondisa na Jw.org. 7. Elilingi ya mwa buku “Mateya ya Biblia mpo na bana.” 8. Elilingi ya video ya Caleb ná Sofia ya bavideo “Kómá moninga ya Yehova.” 9. Buku “Zwá mateya na masolo ya Biblia.” Elilingi moko na buku yango oyo ezali komonisa Samsone azali kotindika makonzí mibale na makasi na ye.

BOMOI YA BAKRISTO

Baboti—Bóteya bana na bino ndenge ya kosepelisa Nzambe

Yehova azwaka bana na motuya mingi. Atyaka likebi ndenge bazali kokola na elimo mpe koyika mpiko. (1Sa 2:26; Lk 2:52) Ata soki bana bazali mike mpenza, bakoki kosepelisa motema ya Yehova soki bazali na bizaleli malamu. (Mas 27:11) Na nzela ya ebongiseli na ye, Yehova apesi bisaleli ya malamu mpenza mpo na kosalisa baboti báteya bana na bango bálinga Yehova mpe bátosa ye.

TALÁ VIDEO BILENGE—EZALELI NA BINO YA KOYIKA MPIKO ESEPELISAKA YEHOVA! MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Lisalisi mpe batoli nini Yehova apesi mpo na bana na boumeli ya bambula?

  • Bisaleli nini ekoki kosalisa baboti lelo oyo?

  • Soki ozali mwana, eloko nini oyo Yehova apesá esalisi yo, mpe mpo na nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto