BOMOI YA BAKRISTO
Bosembo mpe makanisi na biso
Tomonisaka bosembo kaka te na makambo oyo tolobaka mpe oyo tosalaka, kasi mpe na makambo oyo tokanisaka. (Nz 19:14) Yango wana, Biblia elendisi biso tókanisaka makambo oyo ezali solo, ya lokumu, ya sembo, ya pɛto, oyo ekoki kolingama, oyo elobelami malamu, oyo ezali malamu mpe oyo ebongi kokumisama. (Flp 4:8) Ya solo, tokoki ntango nyonso te kopekisa makanisi mabe eya na motó na biso. Kasi, komipekisa ekoki kosalisa biso tólongola likanisi ya mabe mpe tótya oyo ya malamu na esika na yango. Soki tozali sembo na makanisi ekosalisa biso mpe tózala sembo na misala na biso.—Mr 7:21-23.
Na nse ya vɛrsɛ mokomoko, komá lolenge ya makanisi oyo tosengeli koboya: