LISOLO YA BOYEKOLI 12
Bolingo esalisaka biso tóyika mpiko ata soki bato bazali koyina biso
“Na makambo wana, nazali kopesa bino mitindo mpo bólinganaka. Soki mokili eyini bino, boyebi ete eyinaki ngai liboso ya koyina bino.”—YOA. 15:17, 18.
LOYEMBO 129 Tokoyika mpiko tii na nsuka
NA MOKUSEa
1. Na kotalela Matai 24:9, mpo na nini tosengeli kokamwa te soki bato bazali koyina biso?
YEHOVA akelá biso mpo tólingaka bato mpe bato bálingaka biso. Yango wana, soki moto mosusu ayini biso, epesaka biso mpasi, mpe ekoki ata kobangisa biso. Na ndakisa, ndeko mwasi moko na nkombo Georgina oyo afandaka na Mpoto, alobi boye: “Ntango nazalaki na mbula 14, mama na ngai ayinaki ngai mpo nazalaki kosalela Yehova. Nayokaki ete nasundolami mpe nakómaki kutu komituna soki nazali mpenza moto malamu.”b Ndeko mobali moko na nkombo Danylo, akomi boye: “Ntango basoda babɛtaki ngai, bafingaki ngai, mpe balobaki ete bakozokisa ngai mpo nazali Motatoli ya Yehova, nabangaki mpenza mpe namimonaki ntina te.” Toyokaka mabe mpenza soki bato bayini biso ndenge wana, kasi yango ekamwisaka biso te. Yesu asakolaki ete bakoyina biso.—Tángá Matai 24:9.
2-3. Mpo na nini bato bayinaka bayekoli ya Yesu?
2 Mpo na nini mokili eyinaka bayekoli ya Yesu? Mpo ndenge moko na Yesu, biso mpe ‘tozali bato ya mokili te.’ (Yoa. 15:17-19) Na yango, atako totosaka bakonzi ya mokili oyo, toboyaka kosambela bango, to mpe bilembo oyo emonisaka bokonzi na bango. Tosambelaka kaka Yehova. Tondimaka ete kaka ye nde azali na lotomo ya koyangela bato. Nzokande, Satana ná “momboto” na ye baboyaka kondima likambo yango. (Eba. 3:1-5, 15) Tosakolaka ete Bokonzi ya Nzambe ezali elikya kaka moko mpo na bato, mpe ete mosika te ekoboma bato nyonso oyo batɛmɛlaka yango. (Dan. 2:44; Em. 19:19-21) Yango ezali nsango malamu mpo na bato ya komikitisa, kasi ezali nsango ya mawa mpo na bato mabe.—Nz. 37:10, 11.
3 Bato bayinaka biso mpe mpo totosaka mibeko ya Nzambe. Ndenge oyo Yehova atalelaka makambo ya malamu mpe ya mabe, ekeseni mpenza na ndenge oyo bato ya mokili batalelaka yango. Na ndakisa, bato mingi bakanisaka ete ezali mabe te komipesa na makambo ya mbindo mpe ya pite na ndenge ya mabe mpenza lokola oyo bato ya Sodoma ná Gomora bazalaki kosala; Nzambe abomaki bato yango mpo na bizaleli wana! (Yuda 7) Lokola totosaka mibeko ya Nzambe na oyo etali makambo yango, bato mingi batyolaka biso, mpe bamonaka ete tozalaka makambo makasi.—1 Pe. 4:3, 4.
4. Bizaleli nini epesaka biso makasi ata soki bato bazali koyina biso?
4 Nini ekoki kosalisa biso tóyika mpiko ntango bato bazali koyina mpe kotyola biso? Tosengeli kozala na kondima makasi ete Yehova akosalisa biso. Lokola nguba, kondima na biso ekoki “koboma mɔtɔ ya mbanzi nyonso oyo ezali kopela ya moto mabe.” (Ef. 6:16) Kasi tosengeli kosuka kaka te na kozala na kondima. Tosengeli mpe komonisa bolingo. Mpo na nini? Mpo bolingo “esilikaka te.” Ekangaka motema mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso. (1 Ko. 13:4-7, 13) Tótala sikoyo ndenge oyo kolinga Yehova, kolinga bandeko na biso bakristo, ata mpe kolinga banguna na biso esalisaka biso tóyika mpiko ata soki bato bazali koyina biso.
KOLINGA YEHOVA ESALISAKA BISO TÓYIKA MPIKO NTANGO BATO BAZALI KOYINA BISO
5. Lokola Yesu alingaka tata na ye, yango etindaki ye asala nini?
5 Na butu liboso banguna na ye báboma ye, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: ‘Nalingaka Tata, yango wana kaka ndenge tata apesi ngai mitindo, nazali kosala kaka bongo.’ (Yoa. 14:31) Kolinga Yehova epesaki Yesu makasi ya koyika mpiko na mikakatano oyo asengelaki kokutana na yango. Kolinga Yehova ekoki mpe kosalisa biso tósala bongo.
6. Na kotalela Baroma 5:3-5, basaleli ya Yehova bayokaka ndenge nini na likambo etali koyika mpiko atako mokili ezali koyina bango?
6 Kolinga Nzambe esalisaka basaleli ya Yehova báyika mpiko ntango bazali konyokola bango. Na ndakisa, ntango tribinale monene ya Bayuda epekisaki bantoma bátika kosakola, bolingo etindaki bango ‘bátosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.’ (Mis. 5:29; 1 Yoa. 5:3) Bolingo ya ndenge wana mpe epesaka bandeko na biso makasi lelo oyo, mpe mingi na bango bazali kotikala ngwi atako baguvɛrnema ya nguya ezali konyokola bango. Na esika tólɛmba nzoto, tomonaka ete ezali libaku malamu koyika mpiko ata soki mokili ezali koyina biso.—Mis. 5:41; tángá Baroma 5:3-5.
7. Tosengeli kosala nini soki bandeko ya libota na biso bazali kotɛmɛla biso?
7 Ekoki kozala mpasi mingi tóyika mpiko soki bato ya libota na biso moko bazali kotɛmɛla biso. Ntango bato ya libota na biso bamoni ete tokómi koyekola makambo etali Yehova, bakoki kokanisa ete tobungi nzela. Basusu bakoki kokanisa ete tobɛli motó. (Talá mpe Marko 3:21.) Bakoki kutu kotɛmɛla biso makasi mpenza. Yango esengeli kokamwisa biso te. Yesu alobaki: “Banguna ya moto bakozala bato ya ndako na ye moko.” (Mat. 10:36) Ata soki bato ya libota na biso bazali kotalela biso ndenge nini, tosengeli koyina bango te. Kutu ntango bolingo na biso mpo na Yehova ezali kokóma makasi, bolingo na biso mpo na bato mpe esengeli kokóma makasi. (Mat. 22:37-39) Kasi tokotika soki moke te kotosa mibeko ya Yehova to mpe mitinda ya Biblia kaka mpo na kosepelisa moto moko boye.
Tokoki konyokwama mpo na mwa ntango, kasi Yehova akozala ntango nyonso pene na biso mpo na kobɔndisa mpe kopesa biso makasi (Talá paragrafe 8-10)
8-9. Nini esalisaki ndeko mwasi moko ayika mpiko atako akutanaki na botɛmɛli ya makasi?
8 Georgina, oyo tolobelaki liboso, azwaki ekateli ya kotikala ngwi atako mama na ye azalaki kotɛmɛla ye makasi. Alobi boye: “Ngai ná mama na ngai tobandaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova. Kasi sanza motoba na nsima, ntango nakómaki na mposa ya koyangana na makita, mama na ngai akómaki kotɛmɛla ngai. Nayaki koyeba ete azalaki kosolola na bapɛngwi mpe azalaki kosalela makanisi yango ya bapɛngwi mpo na kosolola na ngai. Azalaki mpe kofinga ngai, kobenda ngai na nsuki, kokanga ngai na nkingo mpe kobwaka mikanda na ngai. Ntango nakómaki na mbula 15, nazwaki batisimo. Lokola mama na ngai alingaki kopekisa ngai nasalela Yehova, akendaki kotya ngai na ndako moko epai batyaka bilenge oyo basalaka makambo ya mobulu mpe oyo basalelaka drɔgɛ. Ezalaka mpasi koyika mpiko na minyoko, mingimingi soki ezali kouta epai ya moto oyo asengelaki komonisela yo bolingo mpe kotyela yo likebi.”
9 Nini esalisaki Georgina ayika mpiko? Alobi boye: “Kaka mokolo oyo mama na ngai akómaki kotɛmɛla ngai, nautaki kosilisa kotánga Biblia mobimba. Namindimisaki mpenza ete nazwaki solo mpe nakómaki komiyoka penepene na Yehova. Nazalaki kobondela ye mbala na mbala mpe azalaki koyoka ngai. Kaka mokolo oyo nalongwaki na ndako, ndeko mwasi moko abengisaki ngai epai na ye mpe toyekolaki Biblia elongo. Na boumeli ya ntango wana nyonso, bandeko bazalaki kolendisa ngai na Ndako ya Bokonzi. Bakómisaki ngai lokola moto ya libota na bango. Namonaki polele ete Yehova azali na makasi mingi koleka banguna na biso ata soki banguna yango bazali banani.”
10. Tokoki kotya motema ete Yehova Nzambe na biso akosala ntango nyonso nini?
10 Ntoma Paulo akomaki ete eloko moko te ekokoka “kokabola biso na bolingo ya Nzambe oyo ezali na Kristo Yesu Nkolo na biso.” (Rom. 8:38, 39) Ata soki tokoki konyokwama mpo na mwa ntango, Yehova akozala ntango nyonso pene na biso mpo na kobɔndisa mpe kopesa biso makasi. Ndenge ndakisa ya Georgina emonisi yango, Yehova asalisaka mpe biso na nzela ya bandeko na biso ya lisangá.
KOLINGA BANDEKO NA BISO BAKRISTO ESALISAKA BISO TÓYIKA MPIKO NTANGO BATO BAZALI KOYINA BISO
11. Ndenge nini bolingo oyo Yesu alobelaki na Yoane 15:12, 13 esalisaki bayekoli na ye? Pesá ndakisa.
11 Na butu liboso akufa, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete bálinganaka. (Tángá Yoane 15:12, 13.) Ayebaki ete bolingo oyo ezangi moimi ekosalisa bango bábatela bomoko mpe báyika mpiko atako mokili ezalaki koyina bango. Tótalela ndakisa ya lisangá ya Tesaloniki. Kobanda ntango lisangá yango efungwamaki, bandeko ya lisangá yango bazalaki kokutana na minyoko. Atako bongo, bandeko ya lisangá yango bakómaki bandakisa na likambo etali kotikala sembo mpe komonisa bolingo. (1 Tes. 1:3, 6, 7) Paulo alendisaki bango bákoba komonisa bolingo mpe básala yango na “ndenge ya malamu koleka.” (1 Tes. 4:9, 10) Bolingo esengelaki kotinda bango bábɔndisa bato oyo bazalaki konyokwama na makanisi mpe básalisa bato ya bolɛmbu. (1 Tes. 5:14) Batosaki malako ya Paulo, mpamba te na mokanda na ye ya mibale oyo akomelaki bango mbula soki moko na nsima, Paulo alobaki na bango ete: “Bolingo ya mokomoko na bino nyonso epai ya mosusu ezali kobakisama.” (2 Tes. 1:3-5) Bolingo esalisaki bango báyika mpiko na makambo ya mpasi mpe na minyoko.
Bolingo oyo bakristo bamonisaka ekoki kosalisa biso tóyika mpiko ntango bato bazali koyina biso (Talá paragrafe 12)c
12. Na ntango ya bitumba, ndenge nini bandeko ya ekólo moko boye bamoniselanaki bolingo?
12 Totalela ndakisa ya Danylo oyo tolobelaki liboso, mpe mwasi na ye. Ntango bitumba ekɔtaki na engumba epai bazalaki kofanda, bakobaki koyangana na makita, kosakola na kotalela makoki na bango, mpe kokabola bilei oyo bazalaki na yango elongo na bandeko mosusu. Kasi mokolo moko, basoda oyo bazalaki na mindoki bayaki na ndako na ye. Danylo alobi boye: “Basoda yango bayebisaki ngai natika kozala Motatoli ya Yehova. Kasi lokola naboyaki, babɛtaki ngai, balobaki bakoboma ngai, mpe babɛtaki masasi likoló ya motó na ngai. Liboso bákende, balobaki bakozonga lisusu mpo básangisa nzoto na makasi ná mwasi na ngai. Kasi bandeko bakɔtisaki biso nokinoki na engbunduka mpe tokendaki na engumba mosusu. Nakobosana soki moke te bolingo oyo bandeko yango bamoniselaki biso. Mpe ntango tokómaki na engumba yango, bandeko bapesaki biso bilei, mpe basalisaki biso tózwa mosala mpe esika ya kofanda. Yango esalisaki biso mpe tóyamba bandeko oyo bakimaki bitumba na bamboka na bango.” Masolo ya boye emonisi ete bolingo oyo bakristo bazalaka na yango, ekoki kosalisa biso tóyika mpiko ata soki bato bazali koyina biso.
KOLINGA BANGUNA NA BISO ESALISAKA BISO TÓYIKA MPIKO ATA SOKI BAZALI KOYINA BISO
13. Ndenge nini elimo santu esalisaka biso tóyika mpiko ntango tozali kosalela Yehova ata soki bato bazali koyina biso?
13 Yesu ayebisaki bayekoli na ye bálingaka banguna na bango. (Mat. 5:44, 45) Kosala bongo ezalaka pɛtɛɛ te! Kasi na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe, yango ekoki kosalema. Bolingo, motema molai, boboto, motema pɛtɛɛ mpe komipekisa ezali na kati ya mbuma ya elimo ya Nzambe. (Gal. 5:22, 23) Bizaleli yango esalisaka biso tóyika mpiko ata soki bato bazali koyina biso. Bato mingi batiká kotɛmɛla biso mpo molongani na bango, mwana na bango, to mpe moninga na bango moko ya kartye amonisaki bizaleli yango. Kutu, banguna na biso mingi bakómá bandeko na biso ya elimo. Na yango, soki omoni ete ezali mpasi olinga bato oyo bayinaka yo mpo osalelaka Yehova, sɛngá Yehova apesa yo elimo santu na ye. (Luka 11:13) Mpe yebá ete kotosa Nzambe ezalaka ntango nyonso likambo oyo eleki malamu oyo tosengeli kosala.—Mas. 3:5-7.
14-15. Ndenge nini Baroma 12:17-21 esalisaki Yasmeen amonisela mobali na ye bolingo atako azalaki kotɛmɛla ye makasi?
14 Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi moko na nkombo Yasmeen. Ntango akómaki Motatoli ya Yehova, mobali na ye akanisaki ete bakosaki ye, mpe alukaki kopekisa ye kosalela Nzambe. Afingaki ye mpe asɛngaki bandeko ya libota, mokonzi ya lingomba moko, mpe nganga-nkisi moko básala ye mabe. Lisusu, afundaki ye ete azali kokabola libota na ye. Kutu, mobali na ye afingaki bandeko ntango bazalaki na makita ya lisangá! Mbala mingi Yasmeen azalaki kolela mpo na makambo ya mabe oyo bazalaki kosalela ye.
15 Na Ndako ya Bokonzi, bandeko bazalaki kobɔndisa mpe kolendisa Yasmeen. Bankulutu balendisaki ye asalela toli oyo ezali na Baroma 12:17-21. (Tángá.) Yasmeen alobi boye: “Ezalaki mpasi, kasi nasɛngaki Yehova asalisa ngai mpe nasalaki oyo nakoki mpo nasalela makambo oyo Biblia elobi. Na yango, ntango mobali na ngai azalaki kosopa bosɔtɔ na kuku (cuisine) na ndenge ya mayele mpo nayeba te, nazalaki kokɔmbɔla yango. Ntango azalaki kofinga ngai, nazalaki kaka koloba na ye na boboto. Mpe ntango azalaki kobɛla, nazalaki kosalisa ye.”
Soki tomoniseli bato oyo bazali kotɛmɛla biso bolingo, yango ekoki kobongola ndenge oyo batalelaka biso (Talá paragrafe 16-17)d
16-17. Ndakisa ya Yasmeen eteyi yo nini?
16 Yasmeen azwaki mbano ndenge amoniselaki mobali na ye bolingo. Alobi boye: “Mobali na ngai akómaki kotyela ngai motema mingi mpo ayebaki ete nalobaka ntango nyonso solo. Akómaki koyoka ngai na likebi ntango tozalaki kolobela makambo ya Nzambe, mpe andimaki ete tótya kimya na ndako. Sikoyo alendisaka ngai nakende makita. Ngai ná mobali na ngai tozali na boyokani malamu mpenza mpe kimya ekɔtá na ndako na biso. Nazali na elikya ete mobali na ngai akondima mateya ya solo mpe tokosalela Yehova elongo.”
17 Ndakisa ya Yasmeen emonisi ete bolingo “ekangaka motema na makambo nyonso, . . . elikyaka makambo nyonso, mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso.” (1 Ko. 13:4, 7) Bakoki koyina biso makasi mpenza, mpe yango ekoki kopesa biso mpasi mingi, kasi bolingo ezali na nguya mingi koleka koyina. Soki tomoniseli basusu bolingo, yango ekoki kobongola lolenge oyo batalelaka biso mpe bakoki kotika kotɛmɛla biso. Mpe yango esepelisaka motema ya Yehova. Kasi ata soki banguna bazali kokoba koyina biso, tokoki kaka kozala na esengo. Na ndenge nini?
TOKOKI KOZALA NA ESENGO ATAKO BATO BAZALI KOYINA BISO
18. Mpo na nini tokoki kozala na esengo ata soki bato bazali koyina biso?
18 Yesu alobaki: “Esengo na bino ntango bato bazali koyina bino.” (Luka 6:22) Tosepelaka te ete bato báyina biso. Tosepelaka mpe te bato bányokola biso mpo na kondima na biso. Kasi, mpo na nini tokoki kosepela ntango bato bazali koyina biso? Tólobela bantina misato. Ya liboso, ntango tozali koyika mpiko, tosepelisaka motema ya Nzambe. (1 Pe. 4:13, 14) Ya mibale, kondima na biso ekómaka na motuya mpe ekómaka lisusu makasi koleka. (1 Pe. 1:7) Mpe ya misato, tokozwa mbano monene mpenza, elingi koloba bomoi ya seko.—Rom. 2:6, 7.
19. Mpo na nini bantoma basepelaki nsima ya kobɛta bango fimbo?
19 Mwa moke nsima ya lisekwa ya Yesu, bantoma na ye bazwaki esengo oyo alobelaki. Nsima ya kobɛta bango fimbo mpe ya kopesa bango mitindo ete bátika kosakola, bantoma basepelaki. Mpo na nini? ‘Mpo batángamaki bato oyo babongi kosambwisama mpo na nkombo ya Yesu.’ (Mis. 5:40-42) Bolingo mpo na Nkolo na bango ezalaki makasi koleka kobanga oyo bazalaki na yango mpo na banguna na bango. Mpe bamonisaki bolingo na bango na ndenge basakolaki nsango malamu “kozanga kotika.” Lelo oyo, bandeko na biso mingi bazali kokoba kosalela Yehova na bosembo atako mikakatano. Bayebi ete Yehova akobosana te mosala mpe bolingo oyo bazali komonisa mpo na nkombo na ye.—Ebr. 6:10.
20. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
20 Lokola tozali naino na ebongiseli oyo, mokili ekokoba koyina biso. (Yoa. 15:19) Kasi tosengeli kobanga te. Ndenge tokomona yango na lisolo oyo elandi, Yehova akopesa basaleli na ye ya sembo ‘makasi mpe akobatela bango.’ (2 Tes. 3:3) Na yango, tókoba kolinga Yehova, kolinga bandeko na biso bakristo, mpe kolinga ata baoyo bayinaka biso. Soki tosaleli toli yango, tokobatela bomoko na biso, mpe kondima na biso ekokóma makasi. Longola yango, tokopesa Yehova nkembo mpe tokomonisa ete bolingo ezali na nguya koleka koyina.
LOYEMBO 106 Tókolisa bolingo
a Na lisolo oyo, tokomona ndenge oyo kolinga Yehova, kolinga bandeko na biso bakristo, ata mpe kolinga banguna na biso esalisaka biso toyika mpiko ata soki mokili ezali koyina biso. Tokomona mpe ntina oyo Yesu alobaki ete tokoki kozala na esengo ata soki bato bazali koyina biso.
b Topesi bango bankombo mosusu.
c NDIMBOLA YA BILILINGI: Ntango basoda babɛtaki Danylo, bandeko basalisaki ye ná mwasi na ye bákende kofanda na engumba mosusu. Ntango bakómaki kuna, bandeko bayambaki bango malamu.
d NDIMBOLA YA BILILINGI: Mobali ya Yasmeen atɛmɛlaki ye, kasi bankulutu bapesaki Yasmeen toli ya malamu. Amonisaki ete azali mwasi malamu mpe asalisaki mobali na ye ntango abɛlaki.