Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w21 Octobre nk. 29-31
  • 1921—Eleki sikoyo mbula nkama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 1921—Eleki sikoyo mbula nkama
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • BASAKOLI YA MPIKO
  • BOYEKOLI YA MOTO YE MOKO MPE OYO YA LIBOTA
  • BUKU YA SIKA!
  • MOSALA OYO EZALAKI KOZELA BANGO
  • Kosala oyo Yehova asɛngi ememaka mapamboli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Mobu 1922—Eleki sikoyo mbula nkama moko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Bikateli oyo ememaka esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Libula moko oyo eumeli mabota nsambo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
w21 Octobre nk. 29-31

1921 Eleki Sikoyo Mbula Nkama

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI ya 01/01/1921 na Anglais etunaki Bayekoli ya Biblia ya molende motuna oyo: “Mosala nini ezali kozela biso na mbula oyo?” Mpo na koyanola na motuna yango, zulunalo yango etángaki Yisaya 61:1, 2, oyo ekundolelaki bango mosala na bango ya kosakola. Elobi: “Yehova atye ngai mafuta mpo nayebisa bato ya komikitisa nsango malamu . . . , nasakola mbula ya boboto oyo euti na Yehova mpe mokolo Nzambe na biso akozongisa mabe.”

BASAKOLI YA MPIKO

Mpo na kosakola nsango malamu, Bayekoli ya Biblia basengelaki kozala na mpiko. Basengelaki koyebisa bato ya komikitisa “nsango malamu” mpe “mokolo Nzambe na biso akozongisa mabe” epai ya basali-mabe.

Ndeko John Hoskin, oyo azalaki kofanda na Canada, asakolaki na mpiko mpenza atako botɛmɛli. Na ebandeli ya mobu 1921, akutanaki na pastɛrɛ moko ya lingomba ya Méthodiste. Mpo na kosolola na pastɛrɛ yango, ndeko Hoskin alobaki na ye boye: “Nalingi tósolola na kimya nyonso makambo etali Biblia, mpe ata soki toyokani te na makambo mosusu, tokoki kokata lisolo na kimya nyonso, mpe kotikala kaka baninga.” Kasi esalemaki bongo te. Ndeko Hoskin alobi boye: “Tosololaki kaka mwa miniti moke mpe na nsima pastɛrɛ yango atindikaki porte makasi mpe nakanisaki ete batalatala ya porte yango ekopanzana.”

Pastɛrɛ yango agangaki boye: “Mpo na nini okei te koteya bato oyo bazali bakristo te?” Ndeko Hoskin azongisaki ata eyano te. Kasi wana azalaki kokende, alobaki boye na nse ya motema: ‘Lolenge na ye ya kosala makambo emonisi ete azali mokristo te!’

Na mokolo oyo elandaki, ntango pastɛrɛ yango azalaki koteya, alobaki mabe mpo na ndeko Hoskin. Ndeko Hoskin alobi boye: “Pastɛrɛ yango ayebisaki bato ete nazali mobuki-lokuta monene na engumba wana mpe ete esengeli bábɛta ngai masasi.” Kasi ndeko Hoskin atikaki te, akobaki kosakola mpe bato ebele bandimaki koyoka ye. Alobi boye: “Nasepelaki mingi kosolola na bato ya engumba yango. Bamosusu kutu bazalaki koloba na ngai boye: ‘Toyebi ete ozali mosaleli ya Nzambe!’ mpe balobaki ete bakopesa ngai nyonso oyo esengeli mpo nazanga eloko te.”

BOYEKOLI YA MOTO YE MOKO MPE OYO YA LIBOTA

Mpo na kosalisa bato oyo bazalaki kosepela na solo bákola na elimo, Bayekoli ya Biblia babimisaki baprogramɛ ya koyekola Biblia na zulunalo L’Âge d’Or.a Programɛ ya koyekola Biblia mpo na bana, ezalaki na mituna oyo baboti bazalaki kosolola ná bana na bango. Baboti basengelaki “kotuna bana mituna yango mpe na nsima kosalisa bango bázwa biyano na kati ya Biblia.” Mituna mosusu ezalaki koteya makambo ya pɛtɛɛ oyo etali Biblia, na ndakisa “Biblia ezali na mikanda boni?” Motuna mosusu lokola: “Bakristo nyonso basengeli kozela ete bakokutana na minyoko?,” ezalaki kosalisa bilenge bálongola kobanga na mosala ya kosakola.

Programɛ mosusu ezalaki na mituna mpe biyano ya Biblia mpo na baoyo bayebaki makambo mingi ya Biblia. Biyano na mituna yango ezalaki na volimi ya liboso ya buku Étude des Écritures. Bato ebele oyo basalelaki baprogramɛ yango bazwaki mpenza matomba, kasi na nsima, nimero ya L’Âge d’Or ya 21/12/1921 elobaki ete baprogramɛ yango nyonso mibale ekobanda kobima lisusu te. Mpo na nini?

BUKU YA SIKA!

Buku La Harpe de Dieu

Karte moko oyo ezali na programɛ ya makambo ya kotánga na buku yango

Bakarte oyo ezalaki na mituna

Bandeko oyo bazalaki kokamba bamonaki ete bato basengelaki koyekola Biblia na molɔngɔ, elingi koloba lisolo moko nsima ya mosusu. Yango wana na sanza ya 11/1921 babimisaki buku La Harpe de Dieu. Bato oyo bandimaki kozwa buku yango, bakɔtaki na programɛ ya koyekola Biblia oyo bakokaki kosala bango moko. Boyekoli yango esalisaki batángi báyeba “Mokano ya Nzambe ya kopesa bato bomoi ya seko.” Boyekoli yango ezalaki kosalema ndenge nini?

Soki moto andimi kozwa buku moko, bazalaki kopesa ya mwa karte moko oyo ezalaki kosalisa ye ayeba makambo nini asengelaki kotánga na buku yango. Na pɔsɔ oyo elandi, bazalaki kopesa ye karte mosusu oyo ezalaki na mituna ndenge na ndenge mpo na makambo oyo autaki kotánga. Na nsuka ya karte yango, ezalaki na programɛ ya makambo ya kotánga mpo na pɔsɔ oyo ekolanda.

Pɔsɔ nyonso, na boumeli ya bapɔsɔ 12, bandeko ya lisangá oyo ezalaki penepene bazalaki kotindela moyekoli yango ya Biblia karte ya sika. Mbala mingi bandeko ya lisangá oyo bakómaki mibange to oyo bazalaki na likoki ya kobima na mosala ya kosakola te nde bazalaki kotindela bato bakarte yango. Na ndakisa, ndeko mwasi Anna Gardner, oyo azalaki kofanda na Millvale, na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis, alobaki boye: “Ntango babimisaki buku La Harpe de Dieu, esalisaki ndeko na ngai ya mwasi Thayle oyo azalaki na mokakatano ya kotambola. Akómaki na makambo mingi ya kosala, na ndakisa, kotindela bato pɔsɔ nyonso bakarte oyo ezalaki na mituna.” Soki moto asilisi boyekoli yango, ndeko moko ya lisangá azalaki kokende kotala ye mpo na kosalisa moto yango ayekola makambo mosusu ya Biblia.

Ndeko mwasi Thayle Gardner na kiti na ye ya bibɔsɔnɔ

MOSALA OYO EZALAKI KOZELA BANGO

Na nsuka ya mobu 1921 ndeko Joseph Rutherford atindelaki masangá nyonso mokanda moko. Alobaki boye: “Mosala ya kosakola Bokonzi oyo tosali na mbula oyo ezalaki monene mpe esalisi bato ebele koleka bambula oyo eleki.” Abakisaki boye: “Mosala monene ezali kozela biso. Bólendisa bato mosusu básangana elongo na biso na mosala yango ya kitoko.” Na ntembe te, Bayekoli ya Biblia balandaki mpenza toli na ye. Na mobu 1922, basakolaki na mpiko nyonso nsango ya Bokonzi koleka ndenge basalaki yango liboso.

Baninga oyo bamonisaki mpiko

Bayekoli ya Biblia bamonisaki bolingo ya bondeko ndenge basalisanaki. Ndenge lisolo oyo ekomonisa yango, bazalakaki baninga ya mpiko oyo ‘babotamaki mpo na ntango ya mpasi.’​—Mas. 17:17.

Na mokolo ya mibale, mwa 31/05/1921, kobomama moko monene esalemaki na engumba Tulsa, na etúká ya Oklahoma, na États-Unis. Likambo yango esalemaki ntango batyaki mobali moko ya moindo na bolɔkɔ mpo bafundaki ye ete abundisaki mwasi moko ya mondele. Ntango etuluku moko ya mindele ya bato koleka 1 000 babendanaki na etuluku moko ya moke ya baindo, na mbala moko bitumba ebandaki mpe epalanganaki nokinoki na kartye babengi Greenwood, epai baindo bazalaki kofanda. Babɔtɔlaki mpe batumbaki bandako mpe bisika ya mombongo koleka 1 400. Bakonzi balobaki ete motángo ya bato oyo bakufaki ezalaki 36, kasi emonani ete ezalaki soki 300. Babengaka likambo yango Kobomama monene ya mindele mpe baindo na Tulsa.

Ndeko Richard Hill, moyekoli ya Biblia ya moindo oyo azalaki kofanda na kartye yango, alobaki boye: “Na butu ya mokolo oyo likambo yango esalemaki, tozalaki kosala makita ya lisangá lokola momesano. Ntango kaka makita esilaki, toyokaki ndenge bazalaki kobɛta masasi na engumba. Ekobaki tii na butu makasi.” Na mokolo ya misato, mwa 01/06 na ntɔngɔ, makambo ebebaki lisusu koleka. Ndeko Hill abakisi boye: “Bato bayaki mpe balobaki ete soki tolingi komibatela, ekozala malamu tókende mbala moko na ndako moko monene esika oyo basalaka teyatre.” Na yango, ndeko Hill ná mwasi na ye, elongo na bana na bango mitano, bakendaki komibomba na esika yango. Kuna, bakutaki mibali mpe basi baindo soki 3 000 mpe bapolisi oyo guvɛrnema etindaki mpo na kotya kimya bazalaki kobatela bango.

Kaka na ntango yango, ndeko Arthur Claus, oyo azalaki mondele, amonisaki mpiko mpe azwaki ekateli moko ya ntina mingi. Alobaki boye: “Ntango nayokaki ete bato bazali kobɔtɔla mpe kotumba bandako na Greenwood, nazwaki ekateli ya kokende kuna mpo na koyeba soki moninga na ngai Hill azali ndenge nini.”

Ndeko Arthur Claus azali kosalela buku La Harpe de Dieu mpo na kosalisa bana 14 báyeba makambo ya Biblia

Ntango akómaki na ndako ya ndeko Hill, amonaki moninga moko ya kartye ya ndeko Hill oyo azalaki mondele asimbi monduki. Moto yango, oyo azalaki mpe moninga ya ndeko Hill, akanisaki ete ndeko Arthur azalaki moko ya bato oyo bazalaki kosala mobulu. Moto yango agangaki boye: “Oyei kosala nini awa?”

Arthur alobi boye: “Soki napesaka ye eyano ya malamu te, mbɛlɛ abɛtaki ngai masasi. Nayebisaki ye ete nazali moninga ya ndeko Hill mpe ete nayaka na ndako na ye mbala na mbala.” Ndeko Arthur ná mobali yango babatelaki lopango ya ndeko Hill mpo bato oyo bazalaki kosala mobulu bákɔta te.

Eumelaki te, ndeko Arthur ayaki koyeba ete ndeko Hill ná libota na ye bazalaki na esika ya teyatre. Bayebisaki ndeko Arthur ete baindo bakokaki te kolongwa na esika yango, soki mokonzi moko ya basoda na nkombo Barrett apesi mitindo te. Ndeko Arthur alobi boye: “Kokutana na mokonzi ya basoda yango ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Ntango nayebisaki ye ete nazalaki na mposa ya kozwa libota ya ndeko Hill, atunaki ngai boye: ‘Okokoka mpenza kobatela libota oyo mpe kokokisa bamposa na bango?’ Na esengo nyonso, nandimaki.”

Lokola ndeko Arthur azwaki ndingisa, akɔtaki na esika oyo batyaki bandeko yango. Ntango alakisaki mokanda oyo mokonzi ya basoda apesaki ye epai ya soda moko, soda yango akamwaki mpe alobaki: “Mokonzi ye moko nde apesi yo yango! Oyebi ete yo nde moto ya liboso obimisa moto na esika oyo lelo?” Eumelaki te, ndeko Arthur ná soda yango bamonaki ndeko Hill ná libota na ye. Bango nyonso bamataki na motuka ya ndeko Arthur mpe bazongaki ndako.

“Na miso ya Nzambe, biso nyonso tozali kaka ndenge moko”

Ndeko Claus asalaki nyonso mpo na kobatela ndeko Hill ná libota na ye. Ntango bato mosusu bamonaki mpiko mpe bolingo ya bondeko oyo ndeko Claus amonisaki, bakamwaki mpenza. Arthur alobi boye: “Mobali oyo abatelaki biloko ya ndeko Hill akómaki kosepela na solo. Mpe bato ebele bakómaki kosepela na nsango ya Bokonzi mpo bamonaki ete ata soki tokeseni na loposo, na miso ya Nzambe, biso nyonso tozali kaka ndenge moko.”

a L’Âge d’Or ekómaki kobengama Consolation na 1937 mpe Lamuká! na 1946.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto