Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp22 No. 1 lok. 3
  • Tokoki kotika ezaleli ya koyina basusu!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tokoki kotika ezaleli ya koyina basusu!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini bato bayinanaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
  • Maloba ya ebandeli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
  • Mokolo mosusu koyinana ekosila mpo na libela!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
  • Bato oyo bayinami bazali bisika nyonso na mokili mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
wp22 No. 1 lok. 3
Bililingi: Mobali moko alembi nzoto mpo na koyinana oyo azali komona na esika afandi. 1. Mwasi moko oyo asimbi telefone azali kotyola ye. 2. Mwasi mosusu azali komona ye ntina te. 3. Mobali moko oyo azali kotanga zulunalo azali kogangela ye. 4. Mopanzi nsango moko azali koloba na TV.

Tokoki kotika ezaleli ya koyina basusu!

Basilá koyina yo?

Soki bayiná yo naino te, ntango mosusu omoná ndenge bazali koyina moto mosusu. Mbala mingi, tomonaka ndenge bazali konyokola bato mpo bautá na mboka mosusu, bazali bato ya loposo mosusu to mpo basangisaka nzoto mibali na mibali to basi na basi. Yango wana, baguvɛrnema mingi ezali kobimisa mibeko mpo na kopesa etumbu ya makasi na baoyo bazali konyokola etuluku moko boye ya bato.

Mbala mingi, bato oyo bayinami, na ngala na bango mpe bayinaka bato oyo bazali koyina bango. Mpe mbala na mbala basalelaka bango makambo mingi ya mabe.

Ntango mosusu basilá kokanisela yo mabe, kotalela yo na ndenge moko boye, kotyola yo, kofinga yo, mpe konyokola yo. Kutu, koyina ekendaka mosika mpenza. Mbala mingi etindaka na kobɛta bato, kosalela bango makambo ya mabe, koyiba biloko na bango, koboma bango, to mpe koboma etuluku moko boye ya bato na likanisi ya kosilisa bango.

Zulunalo oyo ekopesa biyano na mituna oyo elandi mpe ekomonisa ndenge ya kotika koyina basusu:

  • Mpo na nini bato bazali koyinana mingi boye?

  • Ndenge nini koyinana ekoki kosila?

  • Ezali na ntango oyo koyinana ekosila mpo na libela?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto