Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w22 Juillet nk. 14-19
  • Esakweli moko ya kala oyo ezali na ntina mingi mpo na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esakweli moko ya kala oyo ezali na ntina mingi mpo na yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ESAKWELI YANGO ELOBELI BANANI?
  • NDENGE NINI ESAKWELI YANGO EZALI KOKOKISAMA?
  • NDENGE NINI TOZALI KOZWELA ESAKWELI YANGO MATOMBA?
  • B1 Nsango ya Biblia
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Mombóto ya Nyoka: Lolenge nini etɔndɔlami?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Yehova amonisi mokano na ye
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Ntina oyo lisolo ya Edene etali mpe yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
w22 Juillet nk. 14-19

LISOLO YA BOYEKOLI 30

Esakweli moko ya kala oyo ezali na ntina mingi mpo na yo

“Nakotya bonguna kati na yo ná mwasi.”​—EBA. 3:15.

LOYEMBO 15 Tókumisa Mwana ya liboso ya Yehova!

NA MOKUSEa

1. Na kotalela Ebandeli 3:15, Yehova asalaki nini mwa moke na nsima wana Adama ná Eva basalaki lisumu?

MWA moke na nsima wana Adama ná Eva basalaki lisumu, Yehova apesaki bakitani na bango elikya na nzela ya esakweli moko ya ntina mingi. Makambo oyo alobaki ezali na Ebandeli 3:15.​—Tángá.

2. Mpo na nini esakweli oyo ezali na ntina mingi?

2 Esakweli yango ezwami na mokanda ya liboso ya Biblia. Kasi na lolenge moko to mosusu, mikanda mosusu nyonso ya Biblia ezali na boyokani na esakweli yango. Kaka ndenge basangisaka nkasa mingi ya buku moko esika moko, maloba oyo ezali na Ebandeli 3:15 esangisi makambo nyonso oyo ezali na mikanda mosusu nyonso ya Biblia na nsango kaka moko, elingi koloba, Nzambe akotinda Mobikisi moko oyo akoboma Zabolo mpe bato nyonso ya mabe.b Yango ekozala mapamboli mpo na bato oyo balingaka Yehova!

3. Tokoyanola na mituna nini na lisolo oyo?

3 Na lisolo oyo, tokoyanola na mituna oyo elandi na likambo etali esakweli oyo ezali na Ebandeli 3:15: Esakweli yango elobeli banani? Ndenge nini esakweli yango ezali kokokisama? Mpe ndenge nini tozali kozwela yango matomba?

ESAKWELI YANGO ELOBELI BANANI?

Bililingi: “Bato oyo Ebandeli 3:14, 15 elobeli.” 1. Nyoka: Satana, azali ekelami ya elimo. 2. Momboto ya nyoka: bilimo mabe. 3. Mwasi: baanzelu ya sembo. 4. Momboto ya mwasi: Yesu Kristo mpe bato oyo batyami mafuta na elimo oyo bakoyangela elongo na ye oyo bazali na nkembo kuna na likoló. Bililingi oyo ezongelami na paragrafe 4, 5, 7, mpe8.

4. Nani nde azali “nyoka,” mpe ndenge nini toyebi yango?

4 Esakweli oyo ezali na Ebandeli 3:14, 15 elobeli “nyoka,” “momboto” ya nyoka, “mwasi,” mpe “momboto” ya mwasi. Biblia esalisi biso tóyeba mokomoko na bango.c Tólobela naino nyoka yango. Nyoka ya solosolo ekokaki te kokanga ntina ya makambo oyo Yehova alobaki na elanga ya Edene. Yango wana, esengelaki na ekelamu moko ya mayele mpo akanga ntina ya etumbu ya lisambisi ya Yehova. Yehova azalaki koloba na nani? Emoniseli 12:9 emonisi polele soki nani nde azali nyoka yango. Elobi ete “nyoka ya ebandeli” ezali bongo Satana Zabolo. Kasi banani nde bazali momboto ya nyoka yango?

Satana, azali ekelami ya elimo.

NYOKA

Satana Zabolo, Emoniseli 12:9 ebengi ye “nyoka ya ebandeli” (Talá paragrafe 4)

5. Momboto ya nyoka ezali banani?

5 Na bantango mosusu, Biblia esalelaka liloba “momboto” mpo na komonisa bato oyo bamekolaka mpenza moto mosusu mpo bákóma kobengama bana ya moto yango. Na yango, momboto ya nyoka ezali baanzelu oyo bazali sembo te, mpe bato oyo batɛmɛlaka Yehova Nzambe mpe basaleli na ye, kaka ndenge Satana asalaka. Yango esangisi mpe baanzelu oyo batikaki esika na bango na likoló mpe bayaki awa na mabele na ntango ya Noa, ezala mpe bato mabe oyo basalaka makambo lokola tata na bango Zabolo.​—Eba. 6:1, 2; Yoa. 8:44; 1 Yoa. 5:19; Yuda 6.

bilimo mabe.

MOMBOTO YA NYOKA

Baanzelu oyo bazali sembo te mpe bato oyo batɛmɛlaka Yehova Nzambe mpe basaleli na ye (Talá paragrafe 5)

6. Mpo na nini “mwasi” yango ekokaki kozala Eva te?

6 Sikoyo, tólobela soki “mwasi” yango ezali nani. Mwasi yango ekokaki kozala Eva te. Mpo na nini tolobi boye? Tótalela kaka ntina moko mpamba. Esakweli yango elobi ete momboto ya mwasi ‘ekopanza’ motó ya nyoka. Ndenge touti komona yango, nyoka ezali Satana anzelu mabe, mpe mokitani moko te ya Eva oyo azali moto ya kozanga kokoka akoki kopanza ye. Kasi ndenge nini Satana alingaki kobomama?

7. Ndenge Emoniseli 12:1, 2, 5, 10 emonisi yango, nani nde azali mwasi oyo Ebandeli 3:15 elobeli?

7 Mokanda ya nsuka ya Biblia nde esalisi biso tóyeba soki mwasi oyo Ebandeli 3:15 elobeli ezali nani. (Tángá Emoniseli 12:1, 2, 5, 10.) Ezali te mwasi moko awa na mabele! Mpamba te mwasi yango azali na sanza na nse ya makolo na ye mpe na motole moko ya minzoto 12 na motó na ye. Aboti mwana moko ya ndenge mosusu, elingi koloba, Bokonzi ya Nzambe. Bokonzi yango ezali na likoló, yango wana mwasi yango asengeli mpe kozala na likoló. Mwasi yango azali komonisa eteni ya ebongiseli ya Yehova na likoló oyo esalemi na baanzelu na ye ya sembo.​—Gal. 4:26.

Baanzelu ya sembo.

MWASI

Eteni ya ebongiseli ya Yehova na likoló oyo esalemi na baanzelu na ye ya sembo (Talá paragrafe 7)

8. (a) Nani azali eteni ya liboso ya momboto ya mwasi? (b) Na kotalela Ebandeli 22:15-18, ntango nini akómaki eteni ya liboso ya mwasi yango?

8 Liloba ya Nzambe esalisi mpe biso tóyeba soki nani azali eteni ya liboso ya momboto ya mwasi. Momboto yango asengelaki kozala mokitani moko ya Abrahama. (Tángá Ebandeli 22:15-18.) Mpe ndenge esakolamaki, Yesu azalaki mokitani ya Abrahama, moto wana ya sembo. (Luka 3:23, 34) Kasi momboto yango asengelaki kozala na nguya mingi koleka moto nyonso, mpo asengelaki koboma Zabolo. Na yango, ntango Yesu azalaki na mbula soki 30, atyamaki mafuta lokola Mwana ya Nzambe oyo abotamaki na elimo. Ntango atyamaki mafuta na elimo, Yesu akómaki eteni ya liboso ya momboto ya mwasi. (Gal. 3:16) Nsima ya liwa mpe lisekwa ya Yesu, Nzambe ‘alatisaki ye motole ya nkembo mpe ya lokumu’ mpe apesaki ye “bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele,” ezala mpe bokonzi ya “kobukabuka misala ya Zabolo.”​—Ebr. 2:7; Mat. 28:18; 1 Yoa. 3:8.

Yesu Kristo mpe bato oyo batyami mafuta na elimo oyo bakoyangela elongo na ye oyo bazali na nkembo kuna na likoló.

MOMBOTO YA MWASI

Yesu Kristo mpe bato 144 000 oyo batyami mafuta na elimo oyo bakoyangela elongo na ye (Talá paragrafe 8-9)

9-10. (a) Banani mosusu bazali eteni ya momboto ya mwasi, mpe ntango nini bakómaka basangani ya momboto yango? (b) Tokoyekola nini sikoyo?

9 Kasi longola Yesu, ezali mpe na bato mosusu oyo bazali eteni ya mibale ya momboto ya mwasi. Ntoma Paulo amonisaki eteni ya momboto yango ntango ayebisaki Bayuda mpe bato ya bikólo oyo bazalaki bakristo mpe batyamaki mafuta na elimo boye: “Soki bozali bato ya Kristo, bozali mpenza momboto ya Abrahama, bazwi-ya-libula ya elaka.” (Gal. 3:28, 29) Ntango Yehova atyaka mokristo moko mafuta na elimo santu, mokristo yango akómaka moko ya basangani ya momboto ya mwasi. Na yango, momboto yango esalemi na Yesu Kristo mpe bato 144000 oyo bakoyangela elongo na ye. (Em. 14:1) Bango nyonso bamonisaka elimo ya Tata na bango, Yehova Nzambe.

10 Sikoyo toyebi bato oyo Ebandeli 3:15 elobeli, tokoyekola makambo oyo Yehova asili kosala mpo na kokokisa esakweli yango mpe ndenge tozali kozwela yango matomba.

NDENGE NINI ESAKWELI YANGO EZALI KOKOKISAMA?

11. Na ndenge nini momboto ya mwasi azokisamaki na “litindi”?

11 Esakweli oyo ezali na Ebandeli 3:15 emonisaki ete nyoka ekozokisa momboto ya mwasi “na litindi.” Yango ekokisamaki ntango Satana atindaki Bayuda ná Baroma báboma Mwana ya Nzambe. (Luka 23:13, 20-24) Ntango moto azoki na litindi, mpo na mwa ntango ekómaka mpasi atambola, ndenge moko mpe, mpo na mwa ntango, Yesu azalaki na likoki ya kosala eloko moko te ntango akufaki mpe akundamaki na lilita.​—Mat. 16:21.

12. (a) Ndenge nini bakopanza motó ya nyoka? (b) Ntango nini bakopanza motó yango?

12 Esakweli oyo ezali na Ebandeli 3:15 emonisaki ete Yesu asengelaki te kotikala libela na lilita. Mpo na nini? Mpamba te na kotalela esakweli yango, momboto yango asengelaki kopanza motó ya nyoka. Yango elingi koloba ete Yesu asengelaki kosekwa. Na ntembe te, Yesu asekwaki! Na mokolo ya misato ya liwa na ye, Yesu asekwaki mpo azala na bomoi ezangi kokufa kuna na likoló. Na ntango oyo Nzambe atye, Yesu akoboma Satana mpo na libela. (Ebr. 2:14) Kristo ná bato oyo bakoyangela elongo na ye bakoboma banguna ya Nzambe, elingi koloba, momboto ya nyoka.​—Em. 17:14; 20:4, 10.d

Mwa makambo ya ntina oyo esali ete Ebandeli 3:15 ekokisama

Mwa makambo ya ntina oyo esali ete Ebandeli 3:15 ekokisama. A. 1943 L.T.B: Abrahama azali kotala likoló oyo etondi na minzoto. B. 29 T.B.: Yesu atyami mafuta na elimo santu ntango Yoane abatisaki ye. C. Elekeli ya mobu 33 T.B.: Yesu akakisami na nzete ya mpasi. D. Pantekote ya mobu 33 T.B.: “Ndemo lokola nde ya mɔtɔ” ezali komonana na mitó ya bayekoli ya Kristo. E. 1914 T.B.: Yesu abwaki Satana ná bademo na ye uta na likoló. F. Nsuka ya boyangeli ya mbula nkóto: Satana ná bademo na ye babwakami na laki ya mɔtɔ.
  1. A. 1943 L.T.B.

    Nzambe abandi kokokisa elaka oyo apesaki ete moko ya bakitani ya Abrahama akokóma momboto oyo alakamaki. (Eba. 12:1-3; 22:15-18)

  2. B. 29 T.B.

    Yesu atyami mafuta na elimo, akómi eteni ya liboso ya momboto ya mwasi. (Mat. 3:16; Gal. 3:16)

  3. C. ELEKELI YA MOBU 33 T.B.

    Yesu azokisami na litindi kasi abiki nsima ya mikolo misato. (Mat. 16:21; 26:1, 2)

  4. D. PANTEKOTE YA MOBU 33 T.B.

    Bato ya liboso oyo bazali eteni ya mibale ya momboto ya mwasi batyami mafuta na elimo santu. (Mis. 2:1-4; Gal. 3:29)

  5. E. 1914

    Satana abwakami uta na likoló, mpe azali konyokola momboto ya mwasi lisusu mingi koleka. (Em. 12:9, 12, 17)

  6. F. NSUKA YA BOYANGELI YA MBULA NKÓTO

    Satana abebisami mpo na libela. (Em. 20:7, 10)

NDENGE NINI TOZALI KOZWELA ESAKWELI YANGO MATOMBA?

13. Ndenge nini tozali kozwa matomba na kokokisama ya esakweli oyo?

13 Soki ozali mosaleli ya Nzambe oyo amipesi na ye, ozali kozwa matomba na kokokisama ya esakweli yango. Yesu ayaki awa na mabele lokola moto. Amonisaki na ndenge ya kokoka bizaleli ya Tata na ye. (Yoa. 14:9) Yango wana, na nzela na ye toyekoli koyeba Yehova Nzambe mpe kolinga ye. Tozwi mpe matomba na mateya ya Yesu mpe litambwisi na ye lokola azali kokamba lisangá ya bokristo lelo oyo. Ateyi biso ndenge ya kozala na bomoi oyo ekosala ete Yehova andima biso. Lisusu, lokola bazokisaki Yesu na litindi, to babomaki ye, esalaki ete biso nyonso tókoka kozwa matomba. Na ndenge nini? Ntango Yesu asekwaki, apesaki mbeka ya kokoka oyo “ezali kopɛtola biso na lisumu nyonso.”​—1 Yoa. 1:7.

14. Makambo oyo Yehova alobaki na Edene ekokisamaki mbala moko? Limbolá.

14 Makambo oyo Yehova alobaki na Edene emonisaki ete ntango esengelaki koleka liboso esakweli yango ekokisama na mobimba na yango. Esengelaki kotika ntango eleka mpo mwasi abimisa momboto oyo alakamaki, Zabolo ayanganisa bato na ye, mpe koyinana, to likunya emonana kati ya bituluku yango mibale. Tozali kozwa matomba ndenge toyebi esakweli yango mpo eyebisi biso ete mokili oyo etambwisami na Satana ekoyina basambeli ya Yehova. Yango wana, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete bakoyina bango. (Mrk. 13:13; Yoa. 17:14) Na ntembe te, tomoni kokokisama ya mwa ndambo ya esakweli yango, mingimingi na boumeli ya mbula 100 oyo eleki. Na ndenge nini?

15. (a) Mpo na nini mokili ezali koyina lisusu mingi basaleli ya Nzambe? (b) Mpo na nini tozali na ntina ya kobanga Satana te?

15 Mwa moke na nsima Yesu atyamaki lokola Masiya Mokonzi na 1914, Satana abwakamaki uta na likoló. Sikoyo azali zingazinga ya mabele, azali kozela ete abomama. (Em. 12:9, 12) Kasi akangi mabɔkɔ te, azali kosala misala na ye. Satana azali na elikya te, azali na nkanda makasi, mpe azali kobundisa basaleli ya Nzambe. (Em. 12:13, 17) Yango wana, mokili ezali koyina lisusu mingi basaleli ya Nzambe. Atako bongo, tozali na ntina ya kobanga Satana ná bato na ye te. Kutu, tosengeli kozala na kondima lokola oyo ntoma Paulo azalaki na yango, oyo akomaki: “Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akosala biso mabe?” (Rom. 8:31) Tosengeli kotyela Yehova motema na biso mobimba, mpamba te, ndenge tomoni yango, makambo mingi etali esakweli oyo ezali na Ebandeli 3:15 esili kokokisama.

16-18. Matomba nini ndeko Curtis, Ursula, mpe Jessica bazwaki ntango bakangaki ntina ya esakweli oyo ezali na Ebandeli 3:15?

16 Elaka ya Yehova oyo ezali na Ebandeli 3:15 ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na komekama nyonso oyo tozali kokutana na yango. Ndeko mobali Curtis, oyo azali misionɛrɛ na ekólo Guam, alobi boye: “Makambo mingi oyo ekómelaki ngai esalaki ete ezala mpasi mpo natikala sembo epai ya Yehova. Kasi komanyola na esakweli oyo ezali na Ebandeli 3:15 esalisaka ngai nakoba kotyela Tata na ngai ya likoló motema.” Ndeko Curtis azali kozela na mposa makasi mokolo oyo Yehova akolongola mabe nyonso.

17 Ndeko mwasi moko na nkombo Ursula, oyo afandaka na Bavaria na Allemagne alobi ete kokanga ntina ya esakweli oyo ezali na Ebandeli 3:15 esalisaki ye andima ete Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Amonaki ndenge bisakweli mosusu eyokani na esakweli yango, mpe ekamwisaki ye makasi. Abakisi boye: “Ntango nayekolaki ete Yehova asalaki mbala moko likambo moko mpo na kopesa biso elikya, yango etindaki ngai nalinga ye lisusu mingi.”

18 Ndeko mwasi Jessica, oyo afandaka na ekólo Micronésie, alobi boye: “Nabosanaka te ndenge nayokaki ntango mbala ya liboso nayebaki ete nazwaki solo! Esakweli oyo ezali na Ebandeli 3:15 ezali kokokisama. Esalisaki ngai nayeba ete makambo oyo tozali kokutana na yango lelo oyo ezali te makambo oyo Nzambe akanaki mpo na biso. Esakweli yango esalisaki ngai nakómisa lisusu kondima na ngai makasi mpe kosalela Yehova lelo oyo ezali kosala ete nazala na bomoi ya malamu sikoyo, mpe na mikolo oyo ezali koya nakozala na bomoi ya malamu koleka.”

19. Mpo na nini tokoki kondima ete eteni ya nsuka ya esakweli oyo ekokokisama?

19 Ndenge tomoni yango, esakweli oyo ezali na Ebandeli 3:15 ezali kokoba kokokisama. Momboto ya mwasi mpe momboto ya nyoka basili komonisama polele. Yesu, eteni ya liboso ya momboto ya mwasi, abikaki na mpota oyo azokaki na litindi mpe azali sikoyo Mokonzi ya nguya oyo akoki kokufa te. Sikoyo Yehova asili kopona mingi ya bato oyo bakoyangela elongo na Mwana na ye na likoló. Lokola eteni ya liboso ya esakweli oyo esili kokokisama, tosengeli mpenza komindimisa ete eteni ya suka, elingi koloba, kopanza motó ya nyoka, ekokokisama. Basaleli ya Nzambe bakosepela ntango Satana akobomama! Lokola mokolo yango ekómi naino te, kotika te. Nzambe na biso abongi kotyelama motema. Na nzela ya momboto ya mwasi, akosopela “bikólo nyonso ya mabele” ebele ya mapamboli.​—Eba. 22:18.

OKOKI KOLIMBOLA ESAKWELI OYO EZALI NA EBANDELI 3:15?

  • Nani azali nyoka mpe momboto na yango, mpe nani azali mwasi mpe momboto na ye?

  • Ndenge nini esakweli oyo esili kokokisama?

  • Matomba nini ozwi na kokokisama ya esakweli yango?

LOYEMBO 23 Yehova abandi koyangela

a Tokoki te kokanga ntina ya nsango ya Biblia malamumalamu, soki tokangi te ntina ya esakweli oyo ezali na Ebandeli 3:15. Koyekola esakweli yango ekoki kokómisa kondima na biso epai ya Yehova makasi mpe kondima ete akokokisa bilaka na ye nyonso.

b Talá eteni “Nsango ya Biblia” na Mwa buku mpo na koyekola Liloba ya Nzambe.

c Talá etanda “Bato oyo Ebandeli 3:14, 15 elobeli.”

d Talá etanda “Mwa makambo ya ntina oyo esali ete Ebandeli 3:15 ekokisama.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto