Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w22 Juillet lok. 31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Masolo mosusu
  • Solo ememaka “kimya te, kasi mopanga”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Okoki kofanda malamu ná bandeko oyo bazali Batatoli te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Nzambe azali na esika ya liboso kati na libota na bino?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Okoki kosalisa molongani oyo azali Motatoli te?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
w22 Juillet lok. 31

Mituna ya batángi

Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki: “Bókanisa te ete nayaki kotya kimya”?

▪ Yesu ateyaki bayekoli na ye bázala na kimya na bato mosusu. Kasi, mokolo moko, ayebisaki bantoma na ye boye: “Bókanisa te ete nayaki kotya kimya na mabele; nayaki kotya kimya te, kasi mopanga. Mpo nayaki kokabola: moto akotombokela tata na ye, mpe mwana mwasi akotombokela mama na ye, mpe elenge mwasi ya libala akotombokela bokilo na ye ya mwasi.” (Mat. 10:34, 35) Yesu alingaki koloba nini?

Yesu alingaki te kokabola basangani ya libota, kasi ayebaki ete mateya na ye ekosala ete bato ya libota moko bákabwana. Yango wana, baoyo bazali na mposa ya kokóma bayekoli ya Kristo mpe kozwa batisimo basengeli koyeba ete ntango mosusu basangani ya libota na bango bakosepela te na ekateli na bango wana. Soki balongani na bango oyo bazali Batatoli ya Yehova te to bato mosusu ya libota batɛmɛli bango, ekoki kozala mpasi bákangama na mateya ya Kristo.

Biblia elendisaka bakristo ‘bázala na kimya na bato nyonso.’ (Rom. 12:18) Kasi mateya ya Yesu ekoki kokóma lokola “mopanga” na mabota mosusu. Yango esalemaka ntango moto moko ya libota andimi mateya ya Yesu wana basusu bazali koboya to kotɛmɛla mateya yango. Na ntango wana, bandeko wana ya libota bamikómisaka “banguna” ya moto oyo azali koyekola solo.​—Mat. 10:36.

Elenge mwasi moko azali kokende na kimya, mama na ye azali kolanda ye na nsima, azali kosala bajɛstɛ mpe kobondela ye. Elenge mwasi yango asimbi buku “Sepelá na bomoi na libela na libela!”

Bayekoli ya Kristo oyo bafandaka na libota oyo basangani na yango basambelaka na lingomba moko te na bantango mosusu bakutanaka na makambo oyo emekaka bolingo oyo bamoniselaka Yehova mpe Yesu. Na ndakisa, bandeko ya libota oyo bazali Batatoli ya Yehova te bakoki kotinda bango na makasi básala fɛti moko ya mangomba. Ntango bamekami, basengeli kopona nani bakosepelisa. Yesu alobaki boye: “Moto oyo alingi tata to mama koleka ngai abongi na ngai te.” (Mat. 10:37) Na ntembe te, Yesu alingaki koloba te ete mpo na kozala bayekoli na ye, baoyo bazali koyekola solo basengeli kotika kolinga baboti na bango mingi. Kutu, azalaki koteya bango ndenge ya kopona makambo oyo ezali na ntina mingi na bomoi na bango. Soki basangani ya libota oyo bazali Batatoli ya Yehova te bazali kotɛmɛla milende oyo tozali kosala mpo na kosambela Yehova, tokobaka kolinga bango, kasi toyebaka ete bolingo oyo tolingaka Nzambe ezalaka na esika ya liboso.

Na ntembe te, botɛmɛli oyo eutaka na libota ekoki kosala biso mabe mpenza. Kasi, bayekoli ya Yesu babosanaka te makambo oyo alobaki: “Moto nyonso oyo andimi te kozwa nzete na ye ya mpasi mpe kolanda ngai abongi na ngai te.” (Mat. 10:38) Na maloba mosusu, bakristo batalelaka botɛmɛli oyo eutaka na libota lokola minyoko oyo bayekoli ya Kristo basengeli koyikela mpiko. Kaka na ntango yango, bazalaka na elikya ete etamboli na bango ya malamu ekoki kotinda bandeko ya libota na bango oyo bazali Batatoli ya Yehova te bábongola makanisi na bango mpe bándima koyekola Biblia.​—1 Pe. 3:1, 2. 

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto