Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp24 No. 1 lok. 3
  • Mabe ná malamu: Likambo oyo biso nyonso tokutanaka na yango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mabe ná malamu: Likambo oyo biso nyonso tokutanaka na yango
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2024
  • Masolo mosusu
  • Zalá na kondima mpe zwáká bikateli na bwanya!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Bikateli na yo ekumisa Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Oyo okoki kosala mpo na kozwa bikateli ya malamu
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Maloba ya ebandeli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2024
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2024
wp24 No. 1 lok. 3
Mobateli ya parke moko azali kosalisa elenge mobali oyo balobeli na elilingi ya ezipeli. Mobateli ya parke yango asaleli karte mpo na kolakisa ye nzela nini asengeli kozwa mpo akóma na esika azali kokende, na likoló ya ngomba.

Mabe ná malamu: Likambo oyo biso nyonso tokutanaka na yango

Soki olingi kosala mobembo na esika moko boye oyo naino okenda te, okosala nini?

  1. 1. Okozwa mbala moko nzela oyo okanisi ete ekomema yo na esika yango?

  2. 2. Okolanda bato mosusu, na elikya ete bayebi esika yango?

  3. 3. To, okosalela karte to mpe okolanda moninga moko ya motema oyo ayebi nzela yango malamu?

Soki oponi pwɛ ya liboso to ya mibale, ekomema yo esika moko, kasi mbala mosusu te esika oyo ozalaki na mposa ya kokende. Nzokande, soki oponi pwɛ ya misato, okoki kondima ete okokóma na esika olingi kokende.

Bomoi ya bato ezali lokola mobembo—oyo elikya ezali ete ekomema biso na avenire moko ya malamu. Bikateli oyo tozwaka ezali na ntina mingi, ekoki kosala ete tózwa avenire yango ya malamu to te.

Bikateli mingi oyo tozwaka ezalaka ya mike, kasi misusu ezalaka mpenza ya minene. Bikateli ya minene oyo tozwaka emonisaka ndenge oyo totalelaka mabe ná malamu. Bikateli ya ndenge wana ekoki kobimisela biso mpe bato oyo tolingaka makama to komemela biso bolamu mpo na ntango molai. Bikateli yango ekoki kotalela makambo lokola:

  • Kosangisa nzoto mpe libala

  • Bosembo, mosala, mpe makambo ya mbongo

  • Ndenge ya kobɔkɔla bana

  • Ndenge ya kosalela basusu makambo

Ndenge nini okoki koyeba ete bikateli oyo ozwaka na makambo yango ekosala ete yo ná bato ya libota na yo bózala na avenire ya malamu?

Motuna oyo mokomoko na biso asengeli komituna ezali: Nini ekoki kosalisa ngai nayeba oyo ezali malamu to mabe mpo nazwa bikateli ya malamu?

Zulunalo oyo ekomonisa mpo na nini tokoki kondima oyo Biblia elobi na oyo etali malamu ná mabe mpe ndenge nini yango ekoki kosalisa biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto