Epai wapi okoki kozwa litambwisi ya malamu lelo oyo?
Na mokili oyo ezali kobongwana nokinoki, nini ekoki kosalisa yo mpo oyeba soki ekateli moko ekomemela yo esengo? Nini ekoki kondimisa yo ete likambo oyo ezali komonana malamu lelo ekomonana mabe te lobi?
Biblia ekoki kosalisa yo ozwa bikateli oyo ekomemela yo mpasi ata moke te. Ndenge nini yango ekoki kosalema? Biblia euti na Mozalisi na biso, mpe ayebi oyo ekosala ete tózala mpenza na esengo mpe na kimya.
“Ayebisi yo oyo ezali malamu.”—Mika 6:8.
Tokoki kotyela bwanya oyo ezali na Biblia motema. Mpo “ebongi kotyelama motema ntango nyonso, sikoyo mpe mpo na libela.”—Nzembo 111:8.
Tosɛngi yo otalela yo moko ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa yo na mokili oyo ezali kobongwana nokinoki.