Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w24 Juin lok. 32
  • Ozali na kondima?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali na kondima?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Masolo mosusu
  • Monisá kondima na bilaka ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Kondima—Ezaleli oyo epesaka makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Tózala na kondima oyo etongami likoló na solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • “Bakiselá biso kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
w24 Juin lok. 32

MAKANISI YA BIBLIA

Ozali na kondima?

Mpo na kosepelisa Yehova, tosengeli kozala na kondima. Nzokande, Biblia elobi ete “bato nyonso te nde bazalaka na kondima.” (2 Tes. 3:2) Ntoma Paulo alobelaki baoyo bazalaki konyokola ye, “bato oyo bayokisaka mpasi mpe bato mabe,” oyo Nzambe asengelaki kobikisa ye mabɔkɔ na bango. Kasi likambo oyo alobaki mpo na kondima etaleli kaka bato yango te. Bato mosusu balingaka te na nko kondima makambo oyo emonisi mpenza polele ete Nzambe akelá biloko nyonso. (Rom. 1:20) Basusu balobaka ete bandimelaka eloko to moto ya nguya koleka. Kasi koloba ndenge wana ekoki te mpo na kozala na kondima oyo esepelisaka Yehova.

Tosengeli komindimisa ete Yehova azali mpe ete “apesaka mbano” na baoyo bazali na kondima makasi. (Ebr. 11:6) Kondima ezali moko ya bizaleli ya mbuma ya elimo santu. Moto akoki kosɛnga Yehova elimo santu na ye na libondeli. (Luka 11:​9, 10, 13) Lolenge mosusu ya ntina ya kozwa elimo santu ezali ya kotánga Liloba ya Nzambe mpo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu. Na nsima tokoki kokanisa makambo oyo totángi mpe komeka kosalela oyo toyekoli. Elimo ya Yehova ekoki kobongisa bomoi na biso, kosalisa biso tózala na kondima oyo esepelisaka Nzambe.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto