LISOLO YA BOYEKOLI 28
LOYEMBO 123 Tótosaka ebongiseli ya Teokrasi
Oyebaka kokesenisa solo na lokuta?
“Bótɛlɛma ngwi . . . solo ekangami na loketo na bino lokola mokaba.”—EF. 6:14.
NA MOKUSE
Tokoyekola ndenge ya kokesenisa solo oyo toyekoli epai ya Yehova mpe lokuta oyo Satana ná banguna na biso bazali kopanza.
1. Oyokaka ndenge nini mpo na solo?
BISO basaleli ya Yehova tolingaka solo oyo ezali na Liloba ya Nzambe. Makambo oyo tondimaka euti kuna. (Rom. 10:17) Tondimá ete Yehova atyá lisangá ya bokristo mpo ezala “likonzí mpe eloko oyo esimbi solo.” (1 Tim. 3:15) Mpe na esengo nyonso, tomikitisaka liboso ya “baoyo bazali kokamba” biso, baoyo balimbwelaka biso solo oyo ezali na Biblia mpe bapesaka biso litambwisi oyo eyokani na mokano ya Nzambe.—Ebr. 13:17.
2. Na kotalela Yakobo 5:19, nini ekoki kokómela biso ata nsima ya koyeba solo?
2 Nzokande, ata nsima ya kondima solo mpe kondima ete tosengeli kolanda litambwisi oyo ebongiseli ya Nzambe ezali kopesa, ekoki kokóma ete tóbunga nzela. (Tángá Yakobo 5:19.) Satana alukaka mpenza kotinda biso tótika kotyela Biblia motema, to mpe tótika kolanda litambwisi oyo tozwaka na nzela ya ebongiseli ya Nzambe.—Ef. 4:14.
3. Mpo na nini tosengeli kokangama makasi na solo? (Baefese 6:13, 14)
3 Tángá Baefese 6:13, 14. Mosika te, Zabolo akosalela makanisi ya lokuta mpenza mpo na kokosa bato ya bikólo nyonso mpo bátɛmɛla Yehova. (Em. 16:13, 14) Tóyeba mpe ete Satana akokoba kobakisa milende mpo na kokosa basaleli ya Yehova. (Em. 12:9) Na yango, ezali na ntina mingi ete tóyekola ndenge ya kokesenisa solo na lokuta mpe kotosa solo. (Rom. 6:17; 1 Pe. 1:22) Yango nde ekosala ete tóbika to te na ntango ya bolɔzi monene!
4. Tokotalela nini na lisolo oyo?
4 Na lisolo oyo, tokolobela bizaleli mibale oyo ekosalisa biso tóyeba solo oyo euti na Biblia, mpe tóndima litambwisi ya ebongiseli ya Nzambe. Na nsima, tokotalela makambo misato oyo tosengeli kosala mpo tókoba kokangama makasi na solo.
BIZALELI OYO EKOSALISA BISO TÓYEBA ETE SOLO YANGO OYO
5. Ndenge nini kobanga Yehova ekosalisa biso tóyeba ete solo yango oyo?
5 Kobanga Yehova. Soki toyekoli kobanga Yehova na ndenge oyo ebongi, tokolinga ye mingi mpe tokosala ata eloko moko te mpo na kopesa ye mpasi. Tolingaka mpenza koyeba kokesenisa mabe na malamu, mpe solo na lokuta, mpo Yehova andima biso. (Mas. 2:3-6; Ebr. 5:14) Tosengeli kotika ata moke te ete kobanga bato ekóma makasi koleka ndenge oyo tolingaka Yehova, mpo mbala mingi, makambo oyo bato basepelaka na yango esepelisaka Yehova te.
6. Ndenge nini kobanga bato etindaki bankumu zomi ya Yisraele bábalola solo?
6 Soki tokómi kobanga bato koleka Nzambe, tokoki kotika nzela ya solo. Tótalela ndakisa ya bankumu 12 oyo bakendaki konɔnga mokili oyo Yehova alakaki kopesa Bayisraele. Banɔngi zomi babangaki Bakanana mingi koleka ndenge oyo bazalaki kolinga Yehova. Bayebisaki lisangá ya Yisraele ete: “Tokokoka te komata mpo na kobunda na bato yango, mpo baleki biso na makasi.” (Mit. 13:27-31) Na miso ya bomoto, Bakanana balekaki Bayisraele na makasi; likambo wana ezalaki solo. Kasi, koloba ete Bayisraele bakokoka te kolonga banguna na bango, wana ezalaki kotya Yehova mopanzi. Banɔngi yango zomi basengelaki kotya makanisi na likambo oyo Yehova alingaki ete Bayisraele básala. Basengelaki mpe kokanisa makambo oyo Yehova autaki kosala mpo na bango mikolo eleki. Na bongo, balingaki komona ete makasi ya Bakanana ezalaki eloko te liboso ya nguya ya Yehova oyo eleki nyonso. Na bokeseni na banɔngi wana oyo bazangaki kondima, Yosua ná Kalebe balingaki ete Yehova andima bango. Bayebisaki bato boye: “Soki Yehova asepeli na biso, akokɔtisa mpenza biso na mokili oyo mpe akopesa biso yango.”—Mit. 14:6-9.
7. Nini ekoki kosalisa biso tókóma kobanga Yehova mingi? (Talá mpe elilingi.)
7 Mpo tókóma kobanga Yehova mingi, tosengeli koluka libosoliboso kosepelisa ye na bikateli nyonso oyo tozali kozwa. (Nz. 16:8) Ntango ozali kotánga masolo ya Biblia, omitunaka boye: ‘Soki nazalaki ntango likambo oyo esalemaki, ekateli nini nalingaki kozwa?’ Na ndakisa, kanisá ete ozali koyoka ntango bankumu zomi ya Yisraele bazalaki koloba ete Bayisraele bakokoka te kolonga Kanana. Olingaki kondima yango mpe kobanda kobanga bato, to bolingo na yo mpo na Yehova mpe mposa na yo ya kosepelisa ye elingaki koleka makasi? Bayisraele nyonso ya ntango wana balongaki te komona solo oyo Yosua ná Kalebe balobaki. Na yango, bazwaki te libaku ya kokɔta na Mokili ya Ndaka.—Mit. 14:10, 22, 23.
Olingaki kondimela nani? (Talá paragrafe 7)
8. Ezaleli nini tosengeli kosala makasi tólona, mpe mpo na nini?
8 Komikitisa. Yehova amonisaka solo epai bato ya komikitisa. (Mat. 11:25) Na komikitisa nyonso, tondimaki básalisa biso tóyeba solo. (Mis. 8:30, 31) Kasi, tosengeli kokeba ete tókóma na lolendo te. Lolendo ekoki kotinda biso tóbanda kokanisa ete lolenge na biso ya kotalela makambo ezali solo kaka lokola mitinda ya Biblia mpe litambwisi oyo eutaka na ebongiseli ya Yehova.
9. Ndenge nini tokoki kobatela komikitisa?
9 Mpo na kobatela komikitisa na biso, tosengeli kobosanaka te ete tozali mpenza moke liboso ya bonene ya Yehova. (Nz. 8:3, 4) Tokoki mpe kobondela mpo Yehova asalisa biso tózala na motema ya komitikisa, oyo endimaka koteyama. Yehova akosalisa biso tólekisa makanisi na ye, oyo apesi biso na nzela ya Liloba na ye mpe ebongiseli na ye, liboso ya makanisi na biso. Ntango ozali kotánga Biblia, luká makambo oyo emonisi ete Yehova alingaka ezaleli ya komikitisa mpe ayinaka lolendo, komikumisa mpe lofundo. Mpe salá makasi mpenza obatela komikitisa soki ozwi mokumba oyo epesi yo mwa bokonzi to mpe esali ete oyebana.
OYO TOKOKI KOSALA MPO TÓKANGAMA NA SOLO
10. Yehova asaleli banani mpo na kopesa bato na ye malako mpe litambwisi?
10 Kobá kotyela malako ya ebongiseli ya Yehova motema. Na Yisraele ya kala, Yehova asalelaki Moize mpe na nsima Yosua mpo na kopesa bato na Ye malako. (Yos. 1:16, 17) Bayisraele bazalaki kozwa mapamboli ntango bazalaki kotalela mibali yango ete bazali bamonisi ya Yehova Nzambe. Bankama ya bambula na nsima, ntango lisangá ya bokristo efungwamaki, bantoma 12 nde bazalaki kopesa malako. (Mis. 8:14, 15) Na nsima, etuluku yango esangisaki mpe bankulutu mosusu na Yerusaleme. Ntango bandeko bazalaki kolanda malako oyo euti epai ya mibali yango ya sembo, “masangá ekobaki mpenza kokóma makasi na kondima mpe bato bazalaki kobakisama mokolo na mokolo.” (Mis. 16:4, 5) Lelo oyo, biso mpe tozwaka mapamboli ntango tolandi litambwisi oyo ebongiseli ya Yehova epesi. Kasi, Yehova akoyoka ndenge nini soki toboyi kondima bato oyo ye atye mpo na kokamba? Tokozwa eyano na motuna yango soki totaleli makambo oyo esalemaki ntango Bayisraele bazalaki kokende na Mokili ya Ndaka.
11. Nini ekómelaki baoyo batɛmɛlaki Moize, moto oyo Nzambe atyaki mpo na kokamba bato na Ye? (Talá mpe elilingi.)
11 Na kati ya mobembo na bango mpo na kokende na Mokili ya Ndaka, mibali ya lokumu batɛmɛlaki Moize mpe mokumba oyo Yehova apesaki ye. Balobaki: “Liyangani mobimba ezali mosantu, bango nyonso, [kaka Moize te] mpe Yehova azali na kati na bango.” (Mit. 16:1-3) Atako ezalaki solo ete na miso ya Nzambe “liyangani mobimba” ezalaki mosantu, Yehova aponaki nde Moize mpo na kokamba bato na Ye. (Mit. 16:28) Ndenge batomboki yango balobaki mabe mpo na Moize, balobaki nde mabe mpo na Yehova. Bazalaki kokipe te likambo oyo Yehova alingaki; bakipaki kaka oyo bango bazalaki koluka—kozwa bokonzi mingi mpe koyebana. Nzambe abomaki bankumu yango oyo batombokaki, ná bankóto ya bato oyo balandaki bango. (Mit. 16:30-35, 41, 49) Lelo oyo, tóyeba ete Yehova asepelaka te na baoyo bazangaka limemya mpo na bibongiseli ya teokrasi.
Olingaki kozala na ngámbo nini? (Talá paragrafe 11)
12. Mpo na nini tokoki kokoba kotyela ebongiseli ya Yehova motema?
12 Tokoki kokoba kotyela ebongiseli ya Yehova motema. Ntango bandeko oyo bazali kokamba bamoni polele ete esengeli kosembola boyebi na biso na liteya moko ya Biblia to mpe ndenge oyo mosala ya Bokonzi esengeli kosalema, bakakatanaka te kosala bambongwana oyo esengeli. (Mas. 4:18) Basalaka yango mpo balukaka libosoliboso kosepelisa Yehova. Basalaka mpe makasi mpo bikateli oyo bazwi eyokana na Liloba ya Nzambe, oyo ezali na mateya oyo basaleli nyonso Yehova basengeli kolanda.
13. “Ndakisa ya maloba oyo ezali pɛto” ezali nini, mpe tosengeli kosala na yango nini?
13 “Kangamá ntango nyonso na ndakisa ya maloba oyo ezali pɛto.” (2 Tim. 1:13, msl) “Ndakisa ya maloba oyo ezali pɛto” ezali mateya nyonso ya bokristo oyo ezali na Biblia. (Yoa. 17:17) Mateya yango nde esimbi bindimeli na biso nyonso. Ebongiseli ya Yehova eteyaka biso tókangama makasi na ndakisa yango. Ntango nyonso oyo tosali bongo, tokozwa mapamboli.
14. Ndenge nini bakristo mosusu batikaki “ndakisa ya maloba oyo ezali pɛto”?
14 Nini ekoki kosalema soki totiki “ndakisa ya maloba oyo ezali pɛto”? Tótalela ndakisa moko. Na siɛklɛ ya liboso, emonani ete bakristo mosusu bazalaki kopanza nungunungu oyo elobaki ete mokolo ya Yehova esilá koya. Mbala mosusu ezalaki na mokanda moko oyo elobaki likambo yango, mpe bakanisaki ete ntoma Paulo nde akomaki yango. Kozanga bálandela likambo yango malamu mpo na koyeba bosolo na yango, bakristo mosusu ya Tesaloniki bandimaki nungunungu yango mpe babandaki kutu kopanza yango. Balingaki kokosama te soki bákanisaka lisusu makambo oyo Paulo ateyaki bango ntango azalaki elongo na bango. (2 Tes. 2:1-5) Paulo apesaki bandeko toli ete bándimaka te likambo nyonso oyo bayoki. Mpe mpo na kosalisa bango bákosama lisusu te, Paulo asukisaki mokanda na ye ya mibale epai ya Batesaloniki na maloba oyo: “Oyo ezali mbote na ngai, Paulo, nakomi yango na lobɔkɔ na ngai moko, yango ezali elembo na mikanda na ngai nyonso; wana ezali ndenge nakomaka.”—2 Tes. 3:17.
15. Ndenge nini tokoki komibatela na makambo ya lokuta oyo ezali komonana lokola solo? Pesá ndakisa. (Talá mpe bililingi.)
15 Maloba ya Paulo epai ya Batesaloniki ekoki koteya biso nini? Ntango toyoki likambo moko oyo eyokani te na makambo oyo toyekolá na Biblia, to ntango toyoki nungunungu oyo eningisi biso, tosengeli kosalela bososoli. Na ex-Union soviétique, banguna na biso batambwisaki mokanda moko oyo emonanaki lokola ete eutaki na biro monene. Mokanda yango elendisaki bandeko mosusu bálongwa mpe básala ebongiseli mosusu ya bango moko. Mokanda yango emonanaki lokola ya solo mpenza. Kasi bandeko oyo bazalaki sembo bakosamaki te. Bamonaki ete makambo oyo ezali na mokanda yango eyokanaki te na mateya oyo bayekolá. Lelo mpe, na bantango mosusu banguna ya solo basalelaka Internet mpe basite ya kosolola na bato mpo na kokɔtisa mobulungano kati na biso mpe kokabola biso. Tosengeli te ‘kobulungana nokinoki na makanisi na biso’; tosengeli komibatela, kotala malamumalamu soki makambo oyo toyoki to totángi eyokani na mateya ya solo oyo toyekolá.—2 Tes. 2:2; 1 Yoa. 4:1.
Lokuta oyo ezali komonana lokola solo ekosa yo te (Talá paragrafe 15)a
16. Na kotalela Baroma 16:17, 18, tosengeli kosala nini soki bato mosusu batiki solo?
16 Batelá bomoko elongo na baoyo bazali sembo epai ya Yehova. Nzambe alingi tósalela ye na bomoko. Tokobatela bomoko na biso soki tokangami na solo. Moto nyonso oyo atiki solo mpe abandi kopanza makambo ya lokuta akokɔtisa bokabwani na lisangá, yango wana Nzambe asɛngi biso ‘tóboya kozala elongo na bango.’ Soki tosali bongo te, tokoki kobanda kondima makambo ya lokuta mpe kotika solo.—Tángá Baroma 16:17, 18.
17. Matomba nini tokozwa soki toyebi solo mpe kokangama na yango makasi?
17 Soki tozali koyeba solo mpe tokangami na yango makasi, tokozala ntango nyonso penepene na Yehova mpe tokobatela kondima na biso makasi. (Ef. 4:15, 16) Tokomibatela na mateya ya lokuta ya Satana mpe makanisi oyo apanzaka, mpe Yehova akobatela biso na ntango ya bolɔzi monene. Kobá kokangama makasi na oyo ezali solo, “mpe Nzambe ya kimya akozala na [yo].”—Flp. 4:8, 9.
LOYEMBO 122 Tópikama makasi, tóninganaka te!
a NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndenge makambo esalemaki eleki bambula ebele: bandeko ya ex-Union soviétique bazwi mokanda oyo emonanaki lokola euti na biro monene kasi eutaki nde epai ya banguna na biso. Lelo mpe, banguna na biso bakoki kosalela Internet mpo na kopanza makambo ya lokuta mpo na ebongiseli ya Yehova.