Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w24 Décembre lok. 30
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Masolo mosusu
  • Baanzelu—“Bilimo mpo na mosala ya bolamu ya bato nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Baanzelu bazali banani?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Baanzelu bazali kosala nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Ndenge oyo Baanzelu bakoki kosalisa yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
w24 Décembre lok. 30

Mituna ya batángi

“Baanzelu oyo baponami,” oyo 1 Timote 5:21 elobeli, ezali banani?

Ntoma Paulo akomelaki Timote oyo azalaki nkulutu lokola ye ete: “Liboso ya Nzambe, ya Kristo Yesu mpe ya baanzelu oyo baponami, nazali kopesa yo mitindo ete olanda malako oyo kozanga kokanisela bato mabe, mpe kopona elongi ya moto te.”—1 Tim. 5:21.

Liboso, tólobela naino baoyo bazali te na kati ya baanzelu oyo baponami. Ezali polele ete ezali te bato 144000. Ntango Paulo akomelaki Timote, lisekwa ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpo na kokende na likoló ebandaki naino te. Lokola bantoma mpe bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo bakómaki naino te bikelamu ya elimo, “baanzelu oyo baponami” ekokaki kozala bango te.—1 Ko. 15:​50-54; 1 Tes. 4:13-17; 1 Yoa. 3:2.

Longola yango, “baanzelu oyo baponami” bakokaki te kozala baanzelu oyo batombokaki na ntango ya Mpela. Baanzelu wana bamityaki na ngámbo ya Satana mpe bakómaki bademo, mpe Yesu atɛmɛlaki bango. (Eba. 6:2; Luka 8:30, 31; 2 Pe. 2:4) Na mikolo ekoya, bakokangama na libulu mozindo na boumeli ya mbula 1000 mpe na nsima bakobomama mpo na libela elongo na Zabolo.—Yuda 6; Em. 20:1-3, 10.

Na yango, “baanzelu oyo baponami,” oyo Paulo alobelaki, esengeli kozala baanzelu na likoló oyo bazalaki kopesa ‘Nzambe ná Kristo Yesu’ mabɔkɔ, bato mibale oyo vɛrsɛ yango elobeli mpe.

Ezali na bankóto na bankóto ya baanzelu ya sembo. (Ebr. 12:22, 23) Tosengeli kokanisa te ete bango nyonso bazalaka na mokumba moko na ntango moko. (Em. 14:17, 18) Tóbosana te ete na libaku moko, anzelu moko nde azwaki mokumba ya koboma basoda 185000 ya limpinga ya Asiri. (2 Bak. 19:35) Mbala mosusu baanzelu ebele nde bazwá mokumba ya ‘kolongola na Bokonzi [ya Yesu] nyonso oyo ebɛtisaka libaku mpe bato oyo babukaka mibeko.’ (Mat. 13:39-41) Ekoki kozala ete basusu ‘bayanganisaka esika moko bato oyo ye aponá’ kuna na likoló. (Mat. 24:31) Mpe basusu bazwi mitindo ya ‘kobatela biso na banzela na biso nyonso.’—Nz. 91:11; Mat. 18:10; talá mpe Matai 4:11; Luka 22:43.

Mwasi moko ná mobali na ye bazali na mosala ya kosakola, anzelu azali komema bango na ndako moko. Mobali oyo azali na kati ya ndako azali kobondela.

Emonani ete “baanzelu oyo baponami,” oyo 1 Timote 5:21 elobeli, ezalaki baanzelu oyo bazwaki mokumba moko ya ntina mingi na boyokani na basaleli ya Nzambe. Na mokapo yango, Paulo apesaki toli ya bwanya epai ya bankulutu, baoyo lisangá ebongi kopesa limemya. Na ngámbo na bango, bankulutu basengelaki kokokisa mikumba na bango “kozanga kokanisela bato mabe, mpe kopona elongi ya moto” mpe basengelaki te kozwa ekateli to kokata likambo moko kozanga kokanisa na mozindo. Ntina monene oyo basengelaki kolanda toli ya Paulo oyo ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe ezali ete bazali kosala “liboso ya Nzambe, ya Kristo Yesu mpe ya baanzelu oyo baponami.” Na yango ezali polele ete baanzelu mosusu bazali na mikumba oyo etali lisangá, na ndakisa kobatela yango, kotambwisa mosala ya kosakola, mpe kopesa Yehova lapolo.—Mat. 18:10; Em. 14:6.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto