LISOLO YA BOYEKOLI 9
LOYEMBO 51 Tomipesi na Nzambe!
Koumela te mpo na kozwa batisimo
“Mpo na nini ozali koumela? Tɛlɛmá, zwá batisimo.”—MIS. 22:16.
NA MOKUSE
Kotalela ndakisa ya Basamaria, ya Saulo moto ya Tarse, ya Korneyi mpe ya Bakorinti ekopesa yo makasi oyo osengeli na yango mpo na kokola tii na batisimo.
1. Wapi mwa bantina malamu ya kozwa batisimo?
OLINGAKA Yehova Nzambe, moto oyo apesá yo likabo nyonso ya kitoko, ata mpe bomoi? Olingi komonisa ete olingaka ye? Lolenge ya malamu ya kosala yango ezali ya komipesa na ye na libondeli mpe na nsima kozwa batisimo mpo na komonisa bato ete omipesi na Nzambe. Soki ozwi batisimo, okɔti na libota ya Yehova. Na bongo, Tata mpe Moninga na yo akotambwisa yo mpe akozala elongo na yo mpo okómi moto na ye. (Nz. 73:24; Yis. 43:1, 2) Komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo ekopesa yo mpe elikya ya kozala na bomoi ya esengo libela na libela.—1 Pe. 3:21.
2. Tokolobela nini na lisolo oyo?
2 Ezali na makambo oyo ezali kopekisa yo ozwa batisimo? Soki ezali bongo, yebá ete ozali yo moko te. Bamilio ya bandeko basalá bambongwana na bizaleli na bango mpe na lolenge na bango ya kokanisa mpo na kokokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo. Lelo oyo, bazali kosalela Yehova na esengo mpe na molende. Mateya nini okoki kozwa epai ya bato mosusu oyo bazwaki batisimo na siɛklɛ ya liboso? Tokolobela mikakatano oyo bazalaki na yango, mpe tokotalela mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa na bango.
NDAKISA YA BASAMARIA
3. Basamaria mosusu basengelaki kosala nini mpo bázwa batisimo?
3 Na mikolo ya Yesu, Basamaria bazalaki na mwa lingomba moko oyo bandimi na yango mingi bazalaki kofanda zingazinga ya engumba Shekeme ya kala mpe na Samaria, na nɔrdi ya Yudea. Liboso Basamaria bázwa batisimo, basengelaki kokóma na boyebi mingi ya Liloba ya Nzambe. Basamaria bazalaki kondima ete kaka mikanda mitano ya liboso ya Biblia, elingi koloba mokanda ya Ebandeli tii na mokanda ya Kolimbola Mibeko, nde ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, mpe mbala mosusu ná mokanda ya Yosua. Kasi, bazalaki kozela koya ya Masiya, na kotalela elaka ya Nzambe oyo ezali na Kolimbola Mibeko 18:18, 19. (Yoa. 4:25) Mpo bázwa batisimo, basengelaki kondima ete Yesu nde Masiya oyo alakamaki. “Basamaria mingi” bandimaki yango. (Yoa. 4:39) Mbala mosusu, esɛngaki mpe Basamaria mosusu bátika kokanisela basusu mabe, ezaleli oyo ezalaki kati na Basamaria ná Bayuda, mpe bándima Bayuda báteya bango.—Luka 9:52-54.
4. Na kotalela Misala 8:5, 6, 14, Basamaria mosusu basalaki nini ntango Filipe asakwelaki bango?
4 Nini esalisaki Basamaria bázwa batisimo? Ntango Filipe, mopalanganisi ya nsango malamu asakolaki “Kristo epai na bango,” Basamaria mosusu ‘bayambaki liloba ya Nzambe.’ (Tángá Misala 8:5, 6, 14.) Filipe azalaki Moyuda, kasi Basamaria bayokaki ye. Mbala mosusu bamikundwelaki bavɛrsɛ ya Pantatɛkɛ oyo emonisi ete Nzambe aponaka bilongi te. (Mib. 10:17-19) Ezala bongo to te, batyaki “likebi na makambo oyo Filipe azalaki koloba” mpo na Kristo, mpe bandimaki makambo oyo emonisaki polele ete Nzambe azalaki elongo na ye. Filipe azalaki mpe kosala makamwisi mingi, na ndakisa kobikisa bato ya maladi mpe kobimisa bademo.—Mis. 8:7.
5. Liteya nini okoki kozwa epai ya Basamaria?
5 Basamaria yango bakokaki kokanisela Filipe mabe mpo azalaki Moyuda to koboya koyekola mateya ya sika. Kasi basalaki bongo te; batikaki te ete makambo wana epekisa bango kokola na elimo. Nsima ya komindimisa ete Filipe ateyaki bango solo, Basamaria baumelaki te mpo na kozwa batisimo. Biblia elobi ete “ntango bandimaki Filipe, oyo azalaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya nkombo ya Yesu Kristo, babandaki kobatisama, mibali ná basi.” (Mis. 8:12) Ondimi mpenza ete Liloba ya Nzambe ezali solo mpe ete Batatoli ya Yehova bakaniselaka basusu mabe te kasi basalaka makasi ya komoniselana bolingo ya solosolo, oyo ezali elembo ya bakristo ya solo? (Yoa. 13:35) Soki bongo, zwá ekateli ya kozwa batisimo, mpe tyá motema ete Yehova akopambola yo.
6. Ndenge nini ndakisa ya Ruben ekoki kosalisa yo?
6 Ruben oyo afandaka na Allemagne, akolá na libota ya Batatoli. Kasi na bolenge, azalaki na bantembe ete Yehova azali. Ndenge nini asilisaki bantembe na ye? Lokola amonaki ete azalaki na boyebi mingi te, azwaki ekateli ya komipesa na koyekola. Alobi boye: “Na boyekoli na ngai moko, nasengelaki koluka kosilisa bantembe na ngai. Nayekolaki liteya ya evolisyo mbala ebele.” Atángaki buku Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous ? Buku yango esalisaki Ruben mingi. Amilobaki: ‘Ya solo, Yehova azalaka mpenza.’ Mpe ntango bakendaki kotala biro monene, Ruben akómaki kolinga lisusu mingi libota ya bandeko na mokili mobimba oyo ezali na bomoko. Ntango azongaki na Allemagne, Ruben azwaki batisimo na mbula 17. Soki ozali na bantembe mpo na oyo oyekolá na oyo etali Nzambe, Biblia to makambo mosusu, salá bolukiluki na mikanda na biso mpo osilisa bantembe yango. “Boyebi ya solosolo” ekoki kolongola bantembe. (Ef. 4:13, 14) Mpe ntango ozali koyoka masolo oyo ezali komonisa bolingo mpe bomoko ya basaleli ya Yehova na bisika mosusu na mokili, mpe omoni yango na lisangá na bino, okosepela lisusu mingi na lisangá na biso ya bandeko na mokili mobimba.
NDAKISA YA SAULO MOTO YA TARSE
7. Mpo na nini Saulo asengelaki kobongisa makanisi na ye?
7 Tótalela ndakisa ya Saulo moto ya Tarse. Azalaki moto monene na Lingomba ya Bayuda mpe abɔkwamaki mpenza na mimeseno ya Bayuda. (Gal. 1:13, 14; Flp. 3:5) Na ntango moko oyo Bayuda mingi bazalaki komona bakristo lokola bapɛngwi, Saulo anyokolaki bakristo yango makasi. Azalaki kokanisa ete azalaki kosala mokano ya Nzambe. (Mis. 8:3; 9:1, 2; 26:9-11) Mpo andima Yesu mpe azwa batisimo mpo na kokóma mokristo, Saulo ye moko asengelaki mpe kondima konyokwama.
8. (a) Nini esalisaki Saulo azwa batisimo? (b) Na kotalela Misala 22:12-16, ndenge nini Ananiasi asalisaki Saulo? (Talá mpe elilingi.)
8 Nini esalisaki Saulo azwa batisimo? Ntango Nkolo Yesu oyo azongaki likoló abimelaki ye, miso ya Saulo ezalaki komona lisusu te. (Mis. 9:3-9) Na boumeli ya mikolo misato, Saulo akilaki bilei mpe na ntembe te amanyolaki na makambo oyo eutaki kokómela ye. Saulo andimaki ete Yesu azalaki Masiya mpe ete bayekoli na ye bazalaki lingomba ya solo. Na ntembe te azalaki koyoka mawa ndenge apesaki mabɔkɔ na liwa ya Stefano! (Mis. 22:20) Na nsuka ya mikolo misato, moyekoli moko na nkombo Ananiasi ayaki epai ya Saulo na boboto nyonso, asalisaki ye amona lisusu mpe alendisaki ye azwa batisimo kozanga koumela. (Tángá Misala 22:12-16.) Na komikitisa nyonso, Saulo andimaki lisalisi mpe azwaki batisimo.—Mis 9:17, 18.
Okondima malendisi ya kozwa batisimo, ndenge kaka Saulo asalaki? (Talá paragrafe 8)
9. Liteya nini okoki kozwa na ndakisa ya Saulo?
9 Tokoki kozwa mateya na ndakisa ya Saulo. Akokaki kotika ete lolendo mpe kobanga bato epekisa ye kozwa batisimo. Kasi asalaki bongo te. Na komikitisa nyonso, Saulo asalaki mbongwana na bomoi na ye ntango andimaki solo oyo etali Kristo. (Mis. 26:14, 19) Saulo andimaki kokóma mokristo atako ayebaki ete akokutana na minyoko. (Mis. 9:15, 16; 20:22, 23) Nsima ya batisimo na ye, akobaki kotyela Yehova motema ete akosalisa ye ayika mpiko na mikakatano ndenge na ndenge. (2 Ko. 4:7-10) Soki ozwi batisimo mpe okómi Motatoli ya Yehova, okoki kokutana na makambo oyo ekomeka kondima na yo to kokutana na mikakatano, kasi okozanga lisalisi te. Okoki kotya motema ete Nzambe mpe Kristo bakosunga yo.—Flp. 4:13.
10. Ndenge nini ndakisa ya Anna ekoki kosalisa yo?
10 Anna akolaki na libota moko na Mpoto ya Ɛsti. Ntango mama ya Anna azwaki batisimo, Anna mpe abandaki koyekola Biblia ntango azalaki na mbula 9 mpe tata na ye andimaki yango. Kasi yango esepelisaki te bandeko mosusu ya libota oyo bazalaki kofanda elongo na libota ya Anna. Bamonaki ete ezali nsɔni moto alongwa na lingomba ya bankɔkɔ. Ntango Anna akómaki na mbula 12, asɛngaki tata na ye nzela ete azwa batisimo. Tata na ye atunaki ye soki ezalaki ekateli na ye moko to soki moto moko nde azalaki kotya ye mbamba. Anna ayanolaki: “Nalingaka Yehova.” Tata na ye andimaki azwa batisimo. Nsima ya kozwa batisimo, Anna akutanaki na kotyola mpe minyoko ya ndenge na ndenge. Moto moko na libota na ye ayebisaki ye: “Elingaki koleka malamu ozala na bomoi ya mbindo mpe omɛlaka makaya, na esika ozala Motatoli ya Yehova.” Nini esalisaki Anna ayika mpiko? Alobaki boye: “Yehova asalisaki ngai nazala makasi, mpe mama ná papa basungaki ngai mingi.” Anna akomaka na liste moko mbala nyonso oyo amoni polele lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na ye. Atángaka liste yango mbala na mbala mpo abosana te ndenge oyo Yehova asalisi ye. Soki ozali kobanga kokutana na minyoko, kobosana te ete Yehova akosalisa mpe yo.—Ebr. 13:6.
NDAKISA YA KORNEYI
11. Nini ekokaki kosala ete Korneyi aumela mpo na kozwa batisimo?
11 Biblia epesi mpe ndakisa ya Korneyi. Azalaki mokonzi ya etuluku ya basoda soki 100 na limpinga ya Roma. (Mis. 10:1) Na yango, mbala mosusu azalaki moto ya lokumu epai ya bana-mboka mpe na kati ya basoda. “Azalaki kopesa makabo mingi epai ya babola.” (Mis. 10:2) Yehova atindaki ntoma Petro asakwela ye nsango malamu. Lokola Korneyi azalaki moto monene, yango esalaki nde ete aumela mpo na kozwa batisimo?
12. Nini esalisaki Korneyi azwa batisimo?
12 Nini esalisaki Korneyi azwa batisimo? Biblia elobi ete “azalaki kobanga Nzambe elongo na bato nyonso ya ndako na ye.” Lisusu, Korneyi “azalaki ntango nyonso kosala libondeli epai ya Nzambe.” (Mis. 10:2) Ntango Petro asakwelaki Korneyi nsango malamu, ye ná libota na ye bandimaki Kristo mpe bazwaki mbala moko batisimo. (Mis. 10:47, 48) Na ntembe te, Korneyi andimaki kosala mbongwana nyonso oyo esengeli mpo ye ná libota na ye bákoka kosambela Yehova elongo.—Yos. 24:15; Mis. 10:24, 33.
13. Liteya nini okoki kozwa na ndakisa ya Korneyi?
13 Ndenge moko na Saulo, Korneyi akokaki kotika lokumu oyo azalaki na yango epekisa ye kokóma mokristo. Kasi, asalaki bongo te. Ezali kosɛnga ete osala bambongwana minene na bomoi na yo mpo ozwa batisimo? Soki ezali bongo, Yehova akosalisa yo. Akopambola ekateli na yo ya kosalela ye na boyokani na mitinda ya Biblia.
14. Ndenge nini ndakisa ya Tsuyoshi ekoki kosalisa yo?
14 Tsuyoshi, na Japon, asengelaki kosala mbongwana na mosala na ye mpo akoka kozwa batisimo. Azalaki mosungi ya mokambi ya eteyelo ya Ikenobo, oyo elakisaka bato ndenge ya kobongisa bafololo. Soki mokambi ya eteyelo azali na likoki te ya kokende na molulu ya kokunda ebembe, mbala mingi Tsuyoshi nde azalaki momonisi na ye na milulu ya Lingomba ya Buda. Kasi ntango Tsuyoshi ayekolaki solo na oyo etali bakufi, kosala milulu yango ekómaki kopekisa ye azwa batisimo. Azwaki ekateli ya kosangana lisusu te na milulu ya Lingomba ya Buda. (2 Ko. 6:15, 16) Tsuyoshi asololaki likambo yango na mokambi ya eteyelo. Esukaki ndenge nini? Balongolaki Tsuyoshi na mosala te mpe azalaki lisusu kosangana na milulu wana te. Azwaki batisimo mbula soki moko nsima ya kobanda koyekola Biblia.a Soki esɛngi osala mbongwana na mosala na yo mpo osepelisa Yehova, tyá motema ete akokokisa bamposa na yo mpe ya libota na yo.—Nz. 127:2; Mat. 6:33.
NDAKISA YA BAKORINTI
15. Makambo nini ekokaki kopekisa Bakorinti bázwa batisimo?
15 Engumba Korinti ya kala eyebanaki lokola esika oyo etondi na bolingo ya biloko ya mokili mpe makambo ya mbindo. Bato mingi ya engumba yango bazalaki kosala makambo oyo Nzambe alingaka te. Ezali polele ete esika yango ezalaki mokakatano mpo na moto nyonso oyo akondima nsango malamu. Atako bongo, ntango ntoma Paulo ayaki na engumba yango mpe asakolaki nsango malamu oyo etali Kristo, “Bakorinti mingi oyo bayokaki, bakómaki bandimi mpe bazwaki batisimo.” (Mis. 18:7-11) Na nsima, Nkolo Yesu Kristo abimelaki Paulo na emonaneli mpe alobaki: “Nazali na bato ebele na engumba oyo.” Na yango, Paulo akobaki kosakola kuna mbula moko na ndambo.
16. Nini esalisaki bato mosusu na Korinti básala mbongwana mpe bázwa batisimo? (2 Bakorinti 10:4, 5)
16 Nini esalisaki Bakorinti bázwa batisimo? (Tángá 2 Bakorinti 10:4, 5.) Liloba ya Nzambe mpe elimo santu na ye ya nguya esalisaki bango básala bambongwana minene na bomoi na bango. (Ebr. 4:12) Bato ya Korinti oyo bandimaki nsango malamu oyo etali Kristo batikaki mimeseno mpe makambo lokola kolangwa masanga, koyiba mpe kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi.—1 Ko. 6:9-11.b
17. Liteya nini okoki kozwa na ndakisa ya Bakorinti?
17 Lokola bato mosusu ya Korinti basengelaki kotika mimeseno ya mabe oyo epikamaki makasi, balobaki te ete ekozala mpasi mingi mpenza mpo bákóma bakristo. Kasi, basalaki milende mpenza mpo na kokɔta na nzela ya nkaka oyo ezali komema na bomoi ya seko. (Mat. 7:13, 14) Yo mpe ozali kobundisa ezaleli moko to momeseno moko ya mabe mpo okoka kozwa batisimo? Kotika te kobundisa yango! Sɛngá Yehova elimo santu na ye mpo esalisa yo otɛmɛla mposa ya kosala oyo ezali mabe.
18. Ndenge nini ndakisa ya Monika ekoki kosalisa yo?
18 Monika, oyo afandaka na ekólo Géorgie, asalaki makasi mpo atika koloba maloba ya mbindo mpe kominanola ya mabe mpo akola na elimo mpe azwa batisimo. Alobaki boye: “Ntango nazalaki elenge, nguya na ngai ezalaki na libondeli. Yehova ayebaki ete nazalaki na mposa ya kosala makambo ya malamu, mpe azalaki ntango nyonso kosalisa ngai mpe kotambwisa ngai.” Monika azwaki batisimo na mbula 16. Ezali na mimeseno oyo osengeli kotika mpo osalela Yehova na ndenge oyo andimaka? Kobá kosɛnga ye apesa yo nguya mpo osala bambongwana. Yehova apesaka elimo santu na ye na kokakatana te.—Yoa. 3:34.
KONDIMA NA YO EKOKI KOLONGOLA BANGOMBA
19. Nini ekoki kosalisa yo olonga mikakatano oyo ezali lokola ngomba? (Talá mpe elilingi.)
19 Yebá ete Yehova alingaka yo mpe alingi ete okɔta na libota na ye. Ezali bongo ata soki ozali na makambo oyo ezali kopekisa yo ozwa batisimo. Yesu alobaki na etuluku moko ya bayekoli na ye ya siɛklɛ ya liboso ete: “Soki bozali na kondima monene lokola mbuma ya mutarde, bokoloba na ngomba oyo: ‘Longwá awa kende kuna,’ mpe ekolongwa mpe ekokende. Mpe ekozala na likambo moko te oyo bokokoka kosala te.” (Mat. 17:20) Baoyo bayokaki maloba yango bazalaki elongo na Yesu bambula moke kaka; na yango bakómaki naino na kondima makasi te. Kasi Yesu ayebisaki bango ete soki bakómi na kondima makasi, Yehova akosalisa bango bálonga mikakatano oyo ezali lokola ngomba. Yehova akosalisa yo mpe osala bongo!
Yebá ete Yehova alingaka yo mpe alingi ete okɔta na libota na ye (Talá paragrafe 19)c
20. Bandakisa ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso mpe ya mikolo na biso oyo tolobeli na lisolo oyo, ekoki kolendisa yo osala nini?
20 Soki omoni makambo oyo ezali kopekisa yo ozwa batisimo, koumela te mpo na kosala oyo esengeli mpo na kolongola yango. Tiká ete bandakisa ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso mpe ya mikolo na biso ebɔndisa yo mpe epesa yo makasi. Elendisa yo mpe etinda yo omipesa na Yehova mpe ozwa batisimo. Ezali ekateli eleki malamu oyo okoki kozwa!
LOYEMBO 38 Akokómisa yo makasi
a Lisolo ya bomoi ya ndeko Tsuyoshi Fujii ezali na Réveillez-vous ! ya 8 Août 2005, nk. 20-23.
c NDIMBOLA YA ELILINGI: Bandeko bazali koyamba na esengo nyonso baoyo bauti kozwa batisimo.