LISOLO YA BOYEKOLI 12
LOYEMBO 119 Tosengeli kozala na kondima
Kobá kotambola na kondima
“Tozali kotambola na kondima, kasi na komona te.”—2 KO. 5:7.
NA MOKUSE
Tokotalela ndenge ya kokoba kotambola na kondima ntango tozali kozwa bikateli ya minene.
1. Mpo na nini ntoma Paulo akokaki kosepela mpo na ndenge oyo asalelaki bomoi na ye?
NA NTANGO moko boye, ntoma Paulo ayebaki ete mosika te bakoboma ye, kasi azalaki mpenza na ntina ya kosepela mpo asalelaki bomoi na ye malamu. Yango wana alobaki: “Napoti mbangu tii na nsuka, nabateli kondima.” (2 Tim. 4:6-8) Paulo azwaki bikateli ya bwanya mpo na kosalela Yehova, mpe amonaki mpenza ete Yehova azalaki kosepela na ye. Biso mpe tolingaka kozwa bikateli ya malamu mpe tolingaka Nzambe andima biso. Ndenge nini tokoki kosala yango?
2. Kotambola na kondima elakisi nini?
2 Paulo alobaki mpo na ye moko mpe bakristo mosusu ya sembo ete: “Tozali kotambola na kondima, kasi na komona te.” (2 Ko. 5:7) Paulo alingaki koloba nini? Na Biblia, “kotambola” emonisaka na bantango mosusu lolenge ya bomoi oyo moto aponi. Moto oyo atambolaka kaka na komona azwaka bikateli na kolanda kaka oyo azali komona na miso, koyoka to na kolanda mayoki na ye. Kasi moto oyo atambolaka na kondima atyelaka Yehova Nzambe motema mpo na kozwa bikateli. Misala na ye emonisaka ete andimaka ete Yehova akopesa ye mbano, mpe ete akozwa matomba soki alandi toli ya Yehova oyo ezali na Liloba na Ye.—Nz. 119:66; Ebr. 11:6.
3. Matomba nini tokoki kozwa soki tozali kotambola na kondima? (2 Bakorinti 4:18)
3 Ya solo, biso nyonso tozwaka bikateli mosusu na kolanda oyo tozali komona na miso mpe koyoka. Kasi, soki tozali kotalela kaka oyo tozali komona to koyoka ntango tozali kozwa bikateli ya minene, tokozanga te kokutana na mikakatano. Mpo na nini? Mpo miso mpe matoi na biso ekoki kokosa biso. Ata soki ekosi biso te, soki totambolaka kaka na komona, nsukansuka tokosala likambo oyo eyokani te na mokano ya Nzambe to na toli na ye. (Mos. 11:9; Mat. 24:37-39) Kasi, soki tozali kotambola na kondima, tokobanda kozwa mingi bikateli oyo ‘endimami na Nkolo.’ (Ef. 5:10) Kolanda toli ya Nzambe ekopesa biso kimya ya motema mpe esengo ya solosolo. (Nz. 16:8, 9; Yis. 48:17, 18) Mpe soki tokobi kotambola na kondima, tokozwa bomoi ya seko.—Tángá 2 Bakorinti 4:18.
4. Nini ekoki kosalisa moto ayeba soki atambolaka na kondima to na komona?
4 Ndenge nini okoki koyeba soki otambolaka na kondima to na komona? Mpo na kozwa eyano, omituna boye: Makambo nini natalelaka mpo na kozwa bikateli? Natalelaka kaka makambo oyo miso ezali komona? To natyelaka Yehova motema mpe nalandaka toli na ye? Sikoyo, tótala ndenge oyo tokoki kokoba kotambola na kondima na makambo misato ya ntina: ntango tolingi kozwa mosala moko, ntango tolingi kopona molongani, mpe ntango tozwi malako ya ebongiseli ya Yehova. Na likambo mokomoko, tokomona makambo oyo tosengeli kotalela mpo na kozwa bikateli ya malamu.
NTANGO OLINGI KOZWA MOSALA
5. Tosengeli kotalela nini ntango tolingi kozwa mosala?
5 Biso nyonso tolingaka ete tózala na likoki ya kokokisa bamposa na biso mpe ya bato ya libota na biso. (Mos. 7:12; 1 Tim. 5:8) Misala mosusu efutaka malamu. Yango ekoki kosalisa moto akokisa bamposa na ye ya mokolo na mokolo mpe abomba mwa mbongo mpo na mikolo ezali koya. Kasi misala mosusu efutaka mbongo mingi te, kaka mwa mbongo oyo esengeli mpo na kokokisa bamposa ya libosoliboso ya libota, na ndakisa kolya, kolata, mpe esika ya kolala. Na yango, ntango tozali kotalela mosala moko, mbala mingi, totalaka mpe mbongo oyo tokozwa, mpe yango ezali mabe te. Kasi, moto akoki kotambola na komona soki ataleli kaka mbongo.
6. Ndenge nini tokoki kotambola na kondima ntango tolingi kozwa mosala? (Baebre 13:5)
6 Soki tozali kotambola na kondima, tokotalela mpe soki mosala yango ekoki kosala nini na boninga na biso na Yehova. Tokoki komituna boye: ‘Mosala yango ekosɛnga nasala makambo oyo Yehova ayinaka?’ (Mas. 6:16-19) ‘Ekobanda kozangisa ngai makita mpe mosala ya kosakola, mpe ekoki kokabola ngai na libota na ngai ntango molai?’ (Flp. 1:10) Soki oyanoli ɛɛ na mituna yango, ekozala likambo ya bwanya ondima mosala yango te, ata soki ezali mpasi kozwa mosala. Soki tozali kotambola na kondima, tokozwa bikateli oyo ekomonisa ete tondimi ete Yehova akokokisa bamposa na biso na lolenge moko boye.—Mat. 6:33; tángá Baebre 13:5.
7-8. Ndenge nini ndeko moko na Amerika ya Sudi atambolaki na kondima? (Talá mpe elilingi.)
7 Talá ndenge Javier,a ndeko mobali moko na Amerika ya Sudi, amonaki ntina ya kotambola na kondima. Alobi boye: “Napesaki nkombo mpo na mosala moko oyo elingaki kopesa ngai mbongo mbala mibale koleka oyo nazalaki kozwa mpe ekokaki kosepelisa ngai mpenza.” Kasi, Javier azalaki mpe na mposa makasi ya kokóma mobongisi-nzela. Abakisi boye: “Babengisaki ngai mpo mokonzi monene ya kompani asolola na ngai. Liboso dati yango ekoka, nabondelaki Yehova asalisa ngai mpo nandimaki ete ayebaki oyo elekaki malamu mpo na ngai. Nazalaki na mposa ya kozwa mosala ya malamu, kasi nakondima mosala yango te soki ekopekisa ngai nakokisa mikano na ngai ya elimo.”
8 Javier alobi: “Ntango nazalaki kosolola na mokonzi, ayebisaki ngai ete ekosɛnga nasalaka mbala na mbala nsima ya bangonga ya mosala. Nayebisaki ye na boboto nyonso ete nakokoka kosala yango te mpo na makambo na ngai ya losambo.” Na yango, Javier aboyaki mosala yango. Pɔsɔ mibale na nsima, abandaki mosala ya mobongisi-nzela. Mpe mwa basanza na nsima, azwaki mosala mosusu oyo ezalaki kotikela ye ntango. Alobi boye: “Yehova ayokaki mabondeli na ngai mpe apesaki ngai mosala oyo eyokani na programɛ na ngai ya mobongisi-nzela. Nazali mpenza na esengo ya kozala na mosala oyo ezali kotikela ngai ntango ya komipesa mingi na kosalela Yehova mpe bandeko na ngai.”
Soki balingi komatisa yo grade na mosala, ekateli na yo ekomonisa ete ondimaka ete Yehova ayebi oyo eleki malamu mpo na yo? (Talá paragrafe 7-8)
9. Liteya nini ozwi na ndakisa ya Trésor?
9 Tokosala nini soki tomoni ete mosala oyo tozali na yango esalisaka biso te tótambola na kondima? Tótalela ndakisa ya Trésor, ndeko moko ya Congo. Alobi boye: “Mosala oyo nazwaki ekokisaki bandɔtɔ na ngai. Bazalaki kofuta ngai mbongo ebele, mbala misato koleka oyo nazalaki kozwa liboso, mpe bato bazalaki kopesa ngai limemya.” Kasi, Trésor azalaki kozangisa makita mingi mpo azalaki kosala nsima ya bangonga ya mosala. Bazalaki mpe kotya ye mbamba mpo abomba makambo ya kozanga bosembo oyo ezalaki kosalema na kompanyi. Trésor alingaki kolongwa na mosala yango, kasi azalaki kobanga kozala lisusu na mosala te. Nini esalisaki ye? Alobi: “Habakuku 3:17-19 esalisaki ngai namona ete ata soki nazali kozwa lisusu mbongo yango te, Yehova akokokisa bamposa na ngai na lolenge moko boye. Na yango, nalongwaki na mosala yango.” Asukisi boye: “Bapatrɔ mingi bakanisaka ete soki moto azwi mosala oyo efutaka malamu, akoki kosundola nyonso, ata mpe libota na ye mpe makambo na ye ya elimo. Nazali na esengo ndenge nabatelaki boyokani na ngai na Yehova mpe bandeko na ngai ya libota. Mbula moko na nsima, Yehova asalisaki ngai nazwa mosala oyo esalisi ngai nazala na bomoi ezangi mindɔndɔ mpe na ntango mingi mpo na makambo ya elimo. Soki totye Yehova na esika ya liboso, tokoki kokutana na mikakatano ya mbongo, kasi Yehova akokokisa bamposa na biso.” Ya solo, soki totyeli toli ya Yehova mpe bilaka na ye motema, tokokoba kotambola na kondima mpe akopambola biso.
NTANGO OLINGI KOPONA MOLONGANI
10. Nini ekoki kosala ete tótambola na komona ntango tolingi kopona molongani?
10 Libala ezali likabo oyo euti na Yehova, mpe ezali mabe te kolinga kobala. Ntango ndeko mwasi azali kotalela moto oyo akoki kokóma molongani na ye, akoki kotala bizaleli ya ndeko mobali yango, ndenge azali komonana, lokumu na ye, mbongo oyo azali na yango, mikumba na ye na libota, mpe ndenge oyo azali kosepelisa ye.b Makambo wana ezali na ntina. Kasi soki ndeko mwasi ataleli kaka makambo wana, mbala mosusu azali kotambola na komona.
11. Ndenge nini tokoki kotambola na kondima ntango tolingi kopona molongani? (1 Bakorinti 7:39)
11 Na ntembe te, Yehova asepelaka mpenza na bandeko basi mpe mibali oyo balandaka toli na ye ntango balingi kopona molongani! Na ndakisa, liboso ya kolingana na moto, balandaka toli ya kozela tii ntango bakolekisa “eleko ya bolenge.” (1 Ko. 7:36, msl.) Batalaka epai ya moto oyo akoki kokóma molongani na bango, mingimingi bizaleli oyo Yehova alobi ete esalaka ete moto azala mobali malamu to mwasi malamu. (Mas. 31:10-13, 26-28; Ef. 5:33; 1 Tim. 5:8) Soki moto oyo azali Motatoli ya Yehova te alingi bango, bandimaka te; balandaka toli ya kobalana “kaka na moyekoli ya Nkolo,” ndenge emonisami na 1 Bakorinti 7:39. (Tángá.) Bakobaka kotambola na kondima, mpe batyaka motema ete Yehova akosalisa bango malamu koleka moto mosusu nyonso mpo bázala na mayoki ya malamu.—Nz. 55:22.
12. Liteya nini ozwi na ndakisa ya Rosa?
12 Tótalela ndakisa ya Rosa, mobongisi-nzela moko na Colombie. Na mosala na ye, azalaki kokutana mbala na mbala na mobali moko oyo azalaki Motatoli ya Yehova te, mpe mobali yango alingaki ye. Rosa mpe asepelaki na ye. Alobi boye: “Azalaki komonana moto malamu. Azalaki kosalisa bato ya kartye na bango mpe azalaki na bomoi ya mabe te. Nazalaki kosepela na ndenge oyo azalaki kosalela ngai makambo. Azalaki na bizaleli oyo nazalaki koluka epai ya mobali, kaka nde, azalaki Motatoli te.” Abakisi: “Ezalaki mpasi nayebisa ye ete naboyi mpo motema na ngai esepelaki na ye. Na ntango yango, nazalaki komiyoka ete nazali ngai moko mpe nazalaki na mposa ya kobala, kasi nazalaki kozwa moto te na kati ya solo.” Atako bongo, Rosa atalaki kaka te oyo azalaki komona. Akanisaki oyo ekateli yango ekosala na boninga na ye na Yehova. Na yango, akataki boyakani nyonso na mobali yango mpe akobaki komipesa na makambo ya elimo. Mwa moke na nsima, babengaki ye na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi, mpe sikoyo azali kosala lokola mobongisi-nzela monene. Rosa alobi: “Yehova atondisi motema na ngai na esengo mingi.” Ata soki ezalaka pɛtɛɛ te kotambola na kondima na makambo oyo motema na biso elingi, kosala yango epesaka ntango nyonso matomba.
NTANGO TOZWI MALAKO YA EBONGISELI YA YEHOVA
13. Nini ekoki kosala ete tótambola na komona ntango tozwi malako ya ebongiseli ya Yehova?
13 Tozwaka mbala mingi malako oyo euti na bankulutu ya lisangá, mokɛngɛli ya zongazonga, Betele, to Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Kasi tokosala nini soki na libaku moko tokangi te ntina oyo bapesi biso malako moko boye? Tokoki kotala kaka mikakatano oyo malako yango ekoki kobimisela biso. Tokoki kutu kobanda kotya miso kaka na kozanga kokoka ya bandeko oyo bapesaki malako yango.
14. Nini ekosalisa biso tótambola na kondima ntango tozwi malako ya ebongiseli ya Yehova? (Baebre 3:17)
14 Soki tozali kotambola na kondima, tokotya motema ete Yehova nde azali kotambwisa makambo mpe ete ayebi makambo ya bomoi na biso. Yango ekosala ete tótosa nokinoki mpe tósala yango na makanisi malamu. (Tángá Baebre 13:17.) Tobosanaka te ete botosi na biso ekosalisa lisangá na biso ezala na bomoko. (Ef. 4:2, 3) Totyaka motema ete atako bandeko oyo bazali kokamba biso bazali bato ya kozanga kokoka, Yehova akopambola biso soki totosi. (1 Sa. 15:22) Na ntango oyo ebongi, akosembola likambo nyonso oyo esengeli mpenza kosembolama.—Mika 7:7.
15-16. Nini esalisaki ndeko moko atambola na kondima atako akakatanaki mpo na kondima malako oyo azwaki? (Talá mpe elilingi.)
15 Tótalela ndakisa moko oyo emonisi litomba moko ya kotambola na kondima. Na Pérou, atako monɔkɔ ya Espagnol elobamaka mingi mpenza, bato mingi mpe balobaka minɔkɔ ya mboka na ndako. Moko ya minɔkɔ yango ezali Quechua. Na boumeli ya bambula ebele, bandeko oyo balobaka Quechua balukaki bato oyo balobaka monɔkɔ yango na teritware. Kasi, mpo na kolanda mibeko ya guvernɛma, mbongwana esalemaki mpo na ndenge ya koluka bato yango. (Rom. 13:1) Na yango, bandeko mosusu bakanisaki ete ekozongisa mosala nsima. Lokola bandeko bandimaki mbongwana yango, Yehova apambolaki milende na bango mpo na kozwa bato ebele oyo balobaka Quechua.
16 Kevin, nkulutu moko na lisangá moko ya Quechua, azalaki moko ya bato oyo bamitungisaki mpo na mbongwana yango. Alobi boye: “Namitunaki boye, ‘Ndenge nini tokomona lisusu bato oyo balobaka Quechua?’” Kevin asalaki nini? Abakisi boye: “Nakanisaki maloba ya Masese 3:5. Nakanisaki mpe Moize. Asengelaki kobimisa Bayisraele na Ezipito mpe kokamba bango na esika oyo emonanaki lokola bakei kokufa, lokola nde bakweaki na motambo ya Baezipito. Kasi atosaki, mpe Yehova apambolaki botosi na ye na ndenge ya kokamwa.” (Kob. 14:1, 2, 9-11, 21, 22) Kevin abongolaki lolenge na ye ya kosakola. Esukaki ndenge nini? Alobi boye: “Nakamwaki komona ndenge Yehova apambolaki biso. Liboso, tozalaki kotambola mingi na mosala ya kosakola mpe ntango mosusu tozalaki kozwa kaka moto moko to mibale oyo balobaka Quechua. Sikoyo tozali kotya likebi mingi na bateritware oyo bato mingi balobaka Quechua. Yango esali ete tózwa bato mingi ya kosolola na bango, ya kozongela, mpe koyekola na bango Biblia. Motángo ya bayangani na makita na biso emati.” Ya solo, soki tozali kotambola na kondima, Yehova akopesa biso ntango nyonso mbano.
Bandeko bamonaki ete bato mingi bazalaki kolakisa bango bisika oyo bakoki kokuta bato oyo balobaka Quechua (Talá paragrafe 15-16)
17. Toyekoli nini na lisolo oyo?
17 Tomoni ndenge ya kokoba kotambola na kondima na makambo misato ya ntina. Kasi tosengeli kokoba kotambola na kondima na makambo nyonso ya bomoi na biso, na ndakisa, ntango tozali kopona kominanola, ntango tozali kotalela kelasi oyo tokotánga, to bana boni tokobota. Na bikateli nyonso oyo tolingi kozwa, tosengeli kolanda kaka te makambo oyo tozali komona kasi tosengeli mpe kotalela boyokani na biso na Yehova, toli na ye mpe elaka na ye ya kokokisa bamposa na biso. Soki tosali bongo, “tokotambola na nkombo ya Yehova Nzambe na biso libela na libela.”—Mika 4:5.
LOYEMBO 156 Na kondima . . .
a Topesi bango bankombo mosusu.
b Tolobeli kaka ndeko mwasi nde azali koluka mobali. Kasi toli yango etali mpe ndeko mobali oyo azali koluka mwasi.