Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Avril nk. 2-7
  • “Bópona bino moko . . . nani bokosalela”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bópona bino moko . . . nani bokosalela”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NTINA OYO YESU APONAKI KOSALELA YEHOVA
  • NTINA OYO YEHOVA ABONGI TÓSAMBELA YE
  • BANTINA OYO TOPONÁ KOSALELA YEHOVA
  • KOBÁ KOSALELA YEHOVA
  • Ndimá ete okoki koyeba makambo mosusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Bikateli oyo emonisaka ete totyelaka Yehova motema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Kobosanaka te ete Yehova azali “Nzambe ya bomoi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Yehova “abikisaka baoyo bazoki na motema”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Avril nk. 2-7

LISOLO YA BOYEKOLI 14

LOYEMBO 8 Yehova azali ekimelo na biso

“Bópona bino moko . . . nani bokosalela”

“Ngai ná libota na ngai, tokosalela Yehova.”—YOS. 24:15.

NA MOKUSE

Lisolo oyo ekokundwela biso bantina oyo toponá kosalela Yehova.

1. Tosengeli kosala nini mpo tózala na esengo ya solosolo, mpe mpo na nini? (Yisaya 48:​17, 18)

TATA na biso ya likoló alingaka biso mingi, mpe alingi ete tósepela na bomoi sikoyo mpe na mikolo ezali koya. (Mos. 3:​12, 13) Ntango akelaki biso, apesaki biso makoki ya kokamwa, kasi apesaki biso te likoki ya komiyangela biso moko mpe kolonga, to ya komityela mibeko na oyo etali malamu to mabe. (Mos. 8:9; Yir. 10:23) Ayebi ete mpo tózala na esengo ya solosolo, tosengeli kosalela ye mpe kotosa mibeko na ye na bomoi na biso.—Tángá Yisaya 48:​17, 18.

2. Satana alingaka tóndima nini, mpe Yehova asalaki nini mpo na lokuta yango?

2 Satana alingaka tóndima ete tokoki kozala na esengo ata soki tosaleli Yehova te, ete bato bakoki komiyangela bango moko mpe kolonga. (Eba. 3:​4, 5) Mpo na komonisa ete maloba ya Satana ezali lokuta, Yehova apesi bato nzela bámiyangela bango moko mpo na mwa ntango. Tozali komona polele ete boyangeli ya bato ebimisi mbuma mabe. Nzokande, Biblia ezali na bandakisa ebele ya mibali mpe basi oyo bazalaki na bomoi ya esengo mpo basalelaki Yehova. Moko na bango, oyo azalaki na esengo koleka, ezali Yesu Kristo. Tólobela naino bantina oyo Yesu aponaki kosalela Yehova. Na nsima, tokotalela ntina oyo Tata na biso ya likoló abongi tósambela ye. Na nsuka, tokomikundwela bantina mosusu oyo toponá kosalela Yehova.

NTINA OYO YESU APONAKI KOSALELA YEHOVA

3. Satana ayebisaki Yesu ete akopesa ye nini, kasi Yesu aponaki nini?

3 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, asengelaki kopona nani oyo ye akosalela. Mwa moke nsima ya batisimo ya Yesu, Satana ayebisaki Yesu ete akopesa ye makonzi nyonso ya mabele soki asaleli ye kaka likambo moko ya losambo. Yesu alobaki na ye: “Longwá, Satana! Mpo ekomamá ete: ‘Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye nde osengeli kosalela mosala mosantu.’” (Mat. 4:​8-10) Mpo na nini Yesu aponaki kosalela Yehova? Tótalela mwa bantina.

4-5. Wapi mwa bantina oyo Yesu aponaki kosalela Yehova?

4 Ntina ya libosoliboso oyo Yesu aponaki kosalela Yehova ezali bolingo; Yesu alingaka Tata na ye mingi mpenza. (Yoa. 14:31) Lisusu, Yesu asalelaka Yehova mpo yango nde likambo oyo ebongi kosala. (Yoa. 8:​28, 29; Em. 4:11) Ayebi ete Yehova nde Mopesi ya bomoi, abongi kotyelama motema mpe akabaka. (Nz. 33:4; 36:9; Yak. 1:17) Yehova azalaki ntango nyonso koloba na Yesu solo mpe apesaki ye eloko nyonso oyo azalaki na yango. (Yoa. 1:14) Nzokande, Satana akɔtisá lisumu mpe liwa. Azali moto ya lokuta, atondi na lokoso mpe azali moimi. (Yoa. 8:44) Lokola Yesu ayebaki nyonso wana, akanisaki ata moke te komekola Satana, ete atombokela Yehova.—Flp. 2:​5-8.

5 Ntina mosusu oyo Yesu aponaki kosalela Yehova ezali ete atyaki makanisi na mbuma malamu oyo bosembo na ye ekobimisa. (Ebr. 12:2) Ayebaki ete soki atikali sembo, akosantisa nkombo ya Tata na ye mpe ekopesa nzela na kosilisa bampasi nyonso oyo Satana abimisá.

NTINA OYO YEHOVA ABONGI TÓSAMBELA YE

6-7. Mpo na nini bato mingi lelo bazali kosalela Yehova te, kasi mpo na nini Yehova abongi tósambela ye?

6 Lelo oyo, bato mingi bazali kosalela Yehova te mpo bayekoli naino bizaleli na ye ya malamu te, mpe bayebi te nyonso oyo Yehova asali mpo na bango. Ezalaki mpe bongo mpo na bato oyo ntoma Paulo asakwelaki na Atene.—Mis. 17:​19, 20, 30, 34.

7 Paulo alimbwelaki bato yango ya Atene ete Nzambe ya solo “apesaka bato nyonso mpema, bomoi mpe biloko nyonso.” Abakisaki: “Na nzela na ye nde tozali na bomoi mpe totambolaka mpe tozali.” Nzambe azali Mozalisi; “na nzela ya moto moko abimisi bikólo nyonso ya bato,” yango wana abongi mpenza tósambela ye.—Mis. 17:​25, 26, 28.

8. Nini oyo Yehova akosala soki moke te, kasi ndenge nini amonisi ete alingaka biso mingi?

8 Lokola azali Mozalisi mpe Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba, Yehova akokaki kotinda bato básalela ye na makasi. Kasi akosala yango soki moke te. Na esika asala bongo, apesi biso bilembeteli oyo emonisaka ete azalaka mpenza mpe ete alingaka mokomoko na biso mingi mpenza. Alingi ete bato mingi bákóma baninga na ye ya libela na libela. (1 Tim. 2:​3, 4) Yango wana Yehova apesi biso formasyo mpo tóteya basusu makambo oyo etali mokano na ye mpe tóyebisa bango makambo ya malamu oyo akosala mpo na bato. (Mat. 10:​11-13; 28:​19, 20) Atye biso na masangá epai tokoki kosambela ye mpe apesi biso bakɛngɛli oyo basalisaka biso na bolingo nyonso.—Mis. 20:28.

9. Ndenge nini bolingo ya Yehova emonanaka polele?

9 Bolingo monene ya Yehova emonanaka mpe na makambo oyo asalelaka baoyo baponi kondimela ye te. Na ndakisa, banda kala, bamiliare ya bato baponaka kolanda mibeko na bango moko na oyo etali malamu mpe mabe. Atako bongo, na boboto na ye, Yehova apesaka bango biloko oyo basengeli na yango mpo na kozala na bomoi mpe kosepela na yango. (Mat. 5:​44, 45; Mis. 14:​16, 17) Apesi bango likoki ya kozala na baninga oyo balingaka bango, kobota bana, mpe kosepela na mbuma malamu ya mosala na bango ya makasi. (Nz. 127:3; Mos. 2:24) Nyonso wana emonisi polele ete Tata na biso ya likoló alingaka bato nyonso. (Kob. 34:6) Tótalela sikoyo mwa bantina oyo toponá kosalela Yehova mpe ndenge oyo apambolaka biso mpo na yango.

BANTINA OYO TOPONÁ KOSALELA YEHOVA

10. (a) Wapi ntina ya libosoliboso oyo tosalelaka Yehova? (Matai 22:37) (b) Matomba nini ozwi mpo na motema molai ya Yehova? (Nzembo 103:​13, 14)

10 Lokola Yesu, tosalelaka Yehova libosoliboso mpo tolingaka Ye mingi mpenza. (Tángá Matai 22:37.) Tosepelaka na Yehova mingi ntango toyekoli bizaleli na ye. Na ndakisa, tótalela motema molai na ye epai na biso bato. Ntango Bayisraele bazangaki botosi, alobaki na bango: “Nabondeli bino, bóbongwana, bótika etamboli na bino ya mabe.” (Yir. 18:11) Yehova abosanaka te ete tozali bato ya kozanga kokoka, ete tozali putulu. (Tángá Nzembo 103:​13, 14.) Ntango ozali komanyola na motema molai ya Yehova mpe bizaleli na ye mosusu, oyokaka te mposa ya kosalela ye libela na libela?

11. Wapi mwa bantina mosusu oyo toponi kosalela Tata na biso ya likoló?

11 Ntina mosusu oyo tosalelaka Yehova ezali ete yango nde likambo oyo ebongi kosala. (Mat. 4:10) Longola yango, toyebi ete soki tozali sembo epai ya Yehova, yango ekobimisa mbuma malamu. Bosembo na biso esalisaka na kosantisa nkombo ya Yehova, emonisaka ete Zabolo azali moto ya lokuta, mpe esepelisaka motema ya Yehova. Mpe soki toponi kosalela ye lelo, tozwi elikya ya kosalela ye libela na libela!—Yoa. 17:3.

12-13. Liteya nini tozwi na lisolo ya Jane ná Pam?

12 Ata ntango tozali naino bilenge mpenza, tokoki kolinga Yehova mingi mpenza, mpe bolingo yango ekokoba kokóma makasi wana tozali kokola. Talá ndakisa ya bana basi mibale, Jane ná leki na ye Pam.a Jane azalaki na mbula 11 mpe Pam azalaki na mbula 10 ntango babandaki koyekola Biblia. Baboti na bango basepelaki koyekola te, kasi bapesaki Jane ná Pam nzela ya koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, soki bakokoba mpe kokende na ndako-nzambe elongo na libota na nsuka ya pɔsɔ. Jane alobi boye: “Makambo oyo Batatoli bateyaki ngai na Biblia esalisaki ngai natɛmɛla mbamba oyo baninga na ngai bazalaki kotya ngai mpo na komɛla drɔgɛ mpe kosala pite.”

13 Nsima ya mwa bambula, Jane ná Pam bakómaki basakoli. Na nsima bakómaki babongisi-nzela mpe bazalaki kosalisa baboti na bango oyo bakómaki mikóló. Nsima ya kokanisa makambo oyo bakutaná na yango, Jane alobi boye: “Namonaki mpenza ete Yehova akokisaka mposa ya baninga na ye na bosembo nyonso, mpe ndenge 2 Timote 2:19 elobi yango, ‘Yehova ayebi bato na ye.’” Ya solo, Yehova akokisaka bamposa ya baoyo baponi kolinga ye mpe kosalela ye!

14. Ndenge nini topesaka mabɔkɔ na kopɛtola nkombo ya Yehova na lokuta nyonso oyo elobama mpo na yango? (Talá mpe bililingi.)

14 Tolingaka kopesa mabɔkɔ na kopɛtola nkombo ya Yehova na lokuta nyonso oyo elobama mpo na yango. Kanisá ete moninga na yo moko ya motema azalaka na boboto, akabaka mpe alimbisaka. Kasi mokolo mosusu oyoki moto moko alobi ete moninga na yo azali moto mabe, mpe azangá bosembo. Okosala nini? Okokɔtela ye. Ndenge moko mpe, ntango Satana ná baoyo balandaka ye balukaka kobebisa lokumu ya Yehova na ndenge bapanzaka makambo ya lokuta mpo na Ye, tokɔtelaka Ye na mpiko nyonso mpe toyebisaka basusu solo oyo etali Yehova. (Nz. 34:1; Yis. 43:10) Na maloba mpe misala na biso, tomonisaka ete tolingi kosalela Yehova na molimo na biso mobimba.

Mwasi moko ayoki ndenge banguna na biso bazali kosala mobulu esika liyangani lama, na nsima apusani pene na shario na biso mpo na koyoka maloba ya solo.

Okokɔtela nkombo ya Yehova? (Talá paragrafe 14)b


15. Matomba nini ntoma Paulo azwaki ndenge abongolaki mikano na ye? (Bafilipi 3:​7, 8)

15 Lisusu, tondimaka kobongola mikano na biso mpo tókoka kosalela Yehova na ndenge oyo andimaka to kosala mingi lisusu na mosala na ye. Na ndakisa, ntoma Paulo azalaki na esika ya lokumu na Lingomba ya Bayuda, kasi aponaki kotika yango mpo na kolanda Kristo mpe kosalela Yehova. (Gal. 1:14) Na yango, azalaki na bomoi ya malamu na mosala ya Yehova mpe azwaki libaku ya koyangela elongo na Kristo na likoló. Ayokaki mawa ata moke te mpo na ekateli oyo azwaki ya kosalela Yehova; biso mpe tokoyoka mawa soki moke te.—Tángá Bafilipi 3:​7, 8.

16. Liteya nini tozwi na lisolo ya Julia? (Talá mpe bililingi.)

16 Soki totye mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na biso, biso mpe tokoki kozala na bomoi ya malamu sikoyo mpe na mikolo ekoya. Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi moko na nkombo Julia. Liboso ayekola solo, Julia azalaki koyemba na lingomba moko banda bomwana mpenza. Alangá-nzembo moko amonaki ete Julia azali na makoki mingi mpe apesaki ye formasyo. Eumelaki te, Julia ayebanaki lokola elenge mwasi oyo ayebi miziki mpe azalaki koyemba na bandako ya minene ya kobɛta miziki. Ntango azalaki kotánga na eteyelo moko ya miziki, moninga moko ya kelasi akómaki koyebisa ye makambo ya Nzambe mpe ayebisaki ye ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. Mwa moke na nsima, Julia akómaki koyekola Biblia mbala mibale na pɔsɔ. Nsukansuka, azwaki ekateli ya komipesa na kosalela Yehova na esika ya kokoba na mosala ya miziki. Kozwa ekateli yango ezalaki pɛtɛɛ te. Alobi boye: “Bato mingi bayebisaki ngai ete nazali kobebisa likabo na ngai, kasi nalingaki kopesa bomoi na ngai mobimba na kosalela Yehova.” Amiyokaka ndenge nini mpo na likambo oyo aponaki eleki sikoyo mbula koleka 30? Alobi boye: “Nazali na kimya ya makanisi, mpe natyaka motema ete Yehova akokokisa mposa nyonso ya motema na ngai na mikolo ekoya.”—Nz. 145:16.

Bililingi: Ndenge makambo esalemaki mpo na komonisa ekateli oyo Julia azwaki. 1. Azali koyemba liboso ya bato ebele. 2. Azali koyemba elongo na mobali na ye na likita moko.

Ntango totye mosala ya Yehova na esika ya liboso, tokozala na bomoi ya esengo mpenza (Talá paragrafe 16)c


KOBÁ KOSALELA YEHOVA

17. Ndenge tozali mpenza pene ya nsuka ya mokili oyo elimboli nini mpo na baoyo baponá kosalela Nzambe mpe baoyo basali yango naino te?

17 Tozali mpenza pene ya nsuka ya mokili oyo. Ntoma Paulo akomaki boye: “Mpo etikali ‘mwa ntango moke mpenza,’ mpe ‘moto oyo azali koya akoya mpe akoumela te.’” (Ebr. 10:37) Yango elimboli nini? Mpo na baoyo bazali naino kosalela Yehova te, báyeba ete ntango oyo etikali ya kopona kosala yango ekómi mokuse. (1 Ko. 7:29) Mpe biso baoyo tosilá kopona kosalela Nzambe, toyebi ete mikakatano oyo tokoki kokutana na yango ekozala kaka mpo na “mwa ntango moke mpenza.”

18. Yehova ná Yesu balingi tósala nini?

18 Yesu alendisaki bayekoli na ye kaka te ete bábanda kolanda ye, kasi bákoba kolanda ye. (Mat. 16:24) Na yango, soki tozali kosalela Yehova esali sikoyo bambula mingi, tózala na ekateli ya kotika te. Tosengeli kosala makasi ya kokoba kokokisa ekateli na biso ya kosalela ye. Mbala mosusu ezali pɛtɛɛ te, kasi yango ekoki komemela biso mapamboli mpe esengo mingi, ata sikoyo!—Nz. 35:27.

19. Liteya nini tozwi na lisolo ya Gene?

19 Bato mosusu bamonaka lokola kosalela Yehova esɛngaka komipimela makambo mingi. Soki ozali elenge, omonaka ete mbala mosusu okozanga eloko moko soki ozali kosalela Yehova? Ndeko mobali moko ya elenge na nkombo Gene alobi boye: “Nazalaki komona lokola kozala Motatoli ya Yehova ezali nkaka. Ezalaki komonana ete bana mingi oyo nakolaki na bango bazalaki kosala bafɛti elongo, kobima na moto to kobɛta masano ya mobulu na video, wana ngai nasengelaki kolekisa ntango na ngai na makita mpe na mosala ya kosakola.” Makanisi wana esalaki nini epai ya Gene? Alobi boye: “Nakómaki kosala makambo yango na kobombana, mpe nasepelaki na yango mpo na mwa ntango. Kasi yango epesaki ngai esengo ya solosolo te. Nakómaki kokanisa mateya ya Biblia oyo naponaki kotya pembeni, mpe nazwaki ekateli ya kosalela Yehova na motema na ngai mobimba. Banda wana, emonani ete Yehova ayanoli na libondeli na ngai mokomoko.”

20. Ekateli nini tosengeli kozala na yango?

20 Mokomi ya nzembo ayembelaki Yehova boye: “Esengo na moto oyo oponi mpe obendi mpo afanda na mapango na yo.” (Nz. 65:4) Tiká ete tókoba na ekateli oyo Yosua mpe azalaki na yango, ete: “Ngai ná libota na ngai, tokosalela Yehova.”—Yos. 24:15.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Wapi bantina oyo Yesu aponaki kosalela Yehova?

  • Mpo na bantina nini Yehova abongi tósambela ye?

  • Mpo na bantina nini oponi kosalela Yehova?

LOYEMBO 28 Tózala baninga ya Yehova

a Topesi bango bankombo mosusu.

b NDIMBOLA YA BILILINGI: Mwasi moko ayoki ndenge banguna na biso bazali kosala mobulu esika liyangani ezali kosalema, na nsima apusani pene na shario na biso mpo na koyoka maloba ya solo.

c NDIMBOLA YA ELILINGI: Elilingi oyo emonisi ndenge Julia aponaki kotya mosala ya Yehova na esika ya liboso.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto