Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Avril nk. 26-31
  • Bandeko mibali ya bilenge: Bómekola Marko ná Timote

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bandeko mibali ya bilenge: Bómekola Marko ná Timote
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MEKOLÁ MARKO: MONISÁ ETE OLINGI KOSALELA BASUSU
  • MEKOLÁ TIMOTE: TYELÁKÁ BASUSU LIKEBI
  • ZWÁ MATOMBA NA TOLI OYO PAULO APESAKI
  • MATOMBA YA KOSALELA BASUSU
  • “Azalaki kolendisa masangá”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Bikateli oyo emonisaka ete totyelaka Yehova motema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Ndeko mobali​—⁠Ozali koluka kokóma mosaleli na misala?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Kobosanaka te ete Yehova azali “Nzambe ya bomoi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Avril nk. 26-31

LISOLO YA BOYEKOLI 18

LOYEMBO 65 Kende liboso!

Bandeko mibali ya bilenge: Bómekola Marko ná Timote

“Yaká na Marko, mpo akosalisa ngai na mosala.”—2 TIM. 4:11.

NA MOKUSE

Ndenge oyo ndakisa ya Marko mpe ya Timote ekoki kosalisa bandeko mibali ya bilenge bákolisa bizaleli oyo esengeli mpo na kosalela Yehova mpe bandeko na lisangá lisusu mingi.

1-2. Makambo nini ekokaki kopekisa Marko ná Timote kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova?

BANDEKO mibali oyo bozali naino bilenge, bolingaka kosala mingi na mosala ya Yehova mpe kosalisa mingi bandeko na lisangá? Na ntembe te bozalaka na mposa yango. Ezali mpenza esengo komona ndenge ebele ya bilenge mibali bazali komipesa mpo na kosalela basusu! (Nz. 110:3) Kasi, mbala mosusu ezali bongo te mpo na yo. Na ndakisa, okakatanaka mpo na komipesa mingi na mosala ya Yehova mpo obangaka ndenge oyo bomoi ekoki kokóma? Esilá kokómela yo oboya kondima mokumba moko mpo omonaki ete ozali na makoki ya kosala yango te? Soki ezali bongo, yebá ete ozali moto ya liboso te.

2 Marko ná Timote bakutanaki na mikakatano ya ndenge wana. Kasi batikaki te ete kobanga ndenge oyo bomoi ekoki kokóma to kozanga makoki epekisa bango kosalela basusu. Mbala mosusu, Marko azalaki kofanda elongo na mama na ye na ndako moko ya malamu mpenza ntango ntoma Paulo ná Barnabasi bazwaki ye mpo bákende elongo na mobembo na bango ya liboso ya misionɛrɛ. (Mis. 12:​12, 13, 25) Marko atikaki esika oyo amesanaki na yango mpe akendaki na mosala ya Yehova. Liboso, akendaki na Antioka. Na nsima, akendaki elongo na Paulo ná Barnabasi na bisika mosusu mosika. (Mis. 13:​1-5) Ekoki kozala ete Timote mpe azalaki kofanda elongo na baboti na ye ntango Paulo azwaki ye mpo básala elongo na mosala ya kosakola. Lokola Timote azalaki elenge mpe ayebaki makambo mingi te, akokaki kotika ete kobanga epekisa ye kokende elongo na Paulo. (Talá mpe 1 Bakorinti 16:​10, 11 mpe 1 Timote 4:12.) Kasi, andimaki libyangi ya Paulo mpe yango ememelaki ye mapamboli mingi.—Mis. 16:​3-5.

3. (a) Nini emonisi ete Paulo asepelaki mingi na Marko ná Timote? (2 Timote 4:​6, 9, 11) (Talá mpe bililingi.) (b) Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?

3 Marko ná Timote bayekolaki makambo mingi mpe bayebaki kokokisa mikumba ya minene ata ntango bazalaki naino bilenge. Paulo asepelaki na bilenge mibali yango mingi, yango wana na nsima alingaki bázala pene na ye ntango amonaki ete mosika te akokufa. (Tángá 2 Timote 4:​6, 9, 11.) Marko ná Timote bamonisaki bizaleli nini oyo esalaki ete Paulo alinga bango mingi? Ndenge nini bandeko mibali ya bilenge bakoki komekola bango? Mpe ndenge nini toli oyo Paulo apesaki ekoki kosalisa bilenge mibali?

Bililingi: 1. Marko azali kobongisa bilei ná eloko ya komɛla mpo na Paulo ná Barnabasi. 2. Timote azali kotángela bankulutu mokanda.

Paulo alingaki Marko ná Timote mingi mpo bandimaki mikumba na bolenge na bango (Talá paragrafe 3)b


MEKOLÁ MARKO: MONISÁ ETE OLINGI KOSALELA BASUSU

4-5. Ndenge nini Marko amonisaki ete alingaki kosalela basusu?

4 Buku moko emonisi ete kosalela basusu epesaka likanisi ya koluka kosalisa bango “na molende mpe na mpiko.” Marko azali ndakisa malamu na likambo yango. Ntango Paulo aboyaki komema ye na mobembo ya mibale ya misionɛrɛ, ekoki kozala ete Marko ayokaki mpasi mpe alɛmbaki nzoto. (Mis. 15:​37, 38) Kasi yango esalaki te ete Marko aboya kosalela bandeko na ye.

5 Marko andimaki kosala elongo na ndeko na ye Barnabasi. Mbula soki 11 na nsima, Marko azalaki na kati ya baoyo basungaki Paulo ntango azalaki mokangami mbala ya liboso na Roma. (Flm. 23, 24) Kutu, Paulo asepelaki na lisungi yango mpo alobaki ete Marko azali “libɔndisi mpenza.”—Kol. 4:​10, 11.

6. Matomba nini Marko azwaki ndenge asalaki elongo na bakristo oyo bakɔmɛli na elimo? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

6 Marko azwaki matomba mingi ndenge asalaki elongo na bakristo oyo bakɔmɛli na elimo. Nsima ya kolekisa mwa ntango elongo na Paulo na Roma, Marko akendaki epai ya ntoma Petro na Babilone. Bakómaki na boyokani makasi mpenza, yango wana Petro abengaki ye “Marko, mwana na ngai.” (1 Pe. 5:13) Wana bazalaki kosala elongo, na ntembe te Petro ayebisaki Marko, moninga na ye ya elenge, makambo mingi ata ya mikemike oyo etali bomoi mpe mosala ya Yesu; na nsima Marko akomaki yango na Evanzile na ye.a

7. Ndenge nini ndeko mobali moko na nkombo Seung-Woo amekolaki ndakisa ya Marko? (Talá mpe elilingi.)

7 Marko abatelaki molende na ye mpe atikalaki pene na bandeko mibali oyo bakɔmɛli na elimo. Ndenge nini okoki komekola Marko? Soki osilá kozanga mokumba moko mpo okokisi masɛngami te, zalá na motema molai mpe kobá koluka ndenge mosusu ya kosalela Yehova mpe lisangá. Talá ndakisa ya Seung-Woo, oyo azali lelo nkulutu. Na bolenge na ye, azalaki komikokanisa na bandeko mibali ya mbula na ye. Basusu kati na bango bazwaki mikumba liboso na ye. Seung-Woo amonaki lokola babosanaki ye mpe nsukansuka afungwamaki epai ya bandeko mibali oyo bakɔmɛli na elimo. Nkulutu moko ayebisaki ye ete asala oyo akokaki mpo na kosalela bandeko na lisangá ata soki basusu bazali komona te makambo ya malamu oyo azali kosala. Toli yango etindaki Seung-Woo amipesa na kosalisa mibange mpe baoyo bazalaki na mposa moto amema bango na makita. Nsima ya kokanisa makambo wana, alobi boye: “Nayebaki malamu soki kosalela basusu mingi elimboli nini. Nayokaki esengo mpo nazalaki kopesa basusu lisalisi oyo basengeli na yango.”

Ndeko mobali moko ya elenge azali komema ndeko mobali moko ya mobange na motuka na makita.

Ndenge nini bilenge mibali bakoki kozwa matomba soki bazali mbala na mbala elongo na bandeko oyo bakɔmɛli? (Talá paragrafe 7)


MEKOLÁ TIMOTE: TYELÁKÁ BASUSU LIKEBI

8. Mpo na nini Paulo aponaki Timote azala moninga na ye ya mobembo? (Bafilipi 2:​19-22)

8 Paulo azalaki na mposa ya baninga ya mpiko mpo na kosala mibembo na ye ntango azongaki na bingumba epai akutanaki na botɛmɛli. Aponaki liboso Silasi, mokristo moko oyo akɔmɛli mingi mpo akende elongo na ye. (Mis. 15:​22, 40) Na nsima, Paulo aponaki mpe Timote mpo asala elongo na ye. Mpo na nini aponaki Timote? Ya liboso, bandeko bazalaki koloba malamu mpo na ye. (Mis. 16:​1, 2) Ya mibale, Timote azalaki mpenza komitungisa mpo na bato.—Tángá Bafilipi 2:​19-22.

9. Ndenge nini Timote amonisaki ete azalaki mpenza komitungisa mpo na bandeko?

9 Banda na ebandeli ya mosala na ye elongo na Paulo, Timote amonisaki ete azalaki mpenza komitungisa mpo na basusu koleka mpo na ye moko. Yango wana Paulo abangaki te kotika ye na Beroya mpo alendisa bayekoli ya sika kuna. (Mis. 17:​13, 14) Na libaku yango, na ntembe te Timote ayekolaki makambo mingi epai ya Silasi, oyo atikalaki mpe na Beroya. Kasi na nsima, Paulo atindaki Timote ye moko na Tesaloniki mpo apesa bakristo ya engumba yango makasi. (1 Tes. 3:2) Na bambula soki 15 oyo elandaki, Timote ayekolaki ‘kolela elongo na bato oyo bazali kolela,’ komitya na esika ya moto nyonso oyo azalaki komona mpasi. (Rom. 12:15; 2 Tim. 1:4) Ndenge nini bilenge bakristo ya mibali bakoki komekola Timote?

10. Ndenge nini ndeko moko na nkombo Woo Jae ayekolaki kotyela basusu likebi mingi?

10 Ndeko mobali moko na nkombo Woo Jae ayekolaki kotyela mpenza basusu likebi mingi. Ntango azalaki elenge, Woo Jae azalaki kokoka te kosolola na bandeko oyo bakómi mikóló. Na yango, na Ndako ya Bokonzi, azalaki kaka kopesa bango mbote ya mokuse mpe aleki. Nkulutu moko ayebisaki Woo Jae ete mpo na kobanda lisolo, ayebisa bandeko yango makambo oyo asepelaka na yango epai na bango. Nkulutu yango alendisaki ye mpe akanisa makambo oyo ekoki kosepelisa moto oyo azali kosolola na ye. Woo Jae asalelaki toli yango. Lelo oyo, Woo Jae azali nkulutu mpe alobi boye: “Nazalaka lisusu na mokakatano te ya kosolola na bato ya bambula nyonso. Nazalaka na esengo ndenge nayebi malamu mitungisi oyo basusu bazali na yango. Yango esalisaka ngai mingi nayeba mposa ya bandeko mpe ndenge ya kosalisa bango malamu.”

11. Ndenge nini bandeko mibali ya bilenge bakoki koyekola kotyela bandeko ya lisangá likebi? (Talá mpe elilingi.)

11 Bino mpe bandeko mibali ya bilenge bokoki koyekola ndenge ya kotyela basusu likebi. Ntango oyei na makita, sololáká na bato ya bambula nyonso. Tuná bango soki bazali ndenge nini, mpe yoká eyano oyo bakopesa. Kendekende, okoki koyeba ndenge oyo okoki kosalisa bango. Na kati ya lisolo, okomona ete ndeko moko ya mobange ná mwasi na ye bazali na mposa ete moto alakisa bango ndenge ya kosalela JW Library®. To okoki koyeba ete bazali na moto te mpo na kobima na bango na mosala ya kosakola. Okoki kolakisa bango ndenge ya kosalela batelefone na bango to kozwa bibongiseli mpo na kobima na bango na mosala ya kosakola? Soki ozali kozwa likanisi ya kosalisa basusu ndenge wana, okopesa bato nyonso ndakisa malamu.

Ndeko mobali moko ya elenge azali kosakola elongo na ndeko mobali moko ya mobange. Ndeko mobali ya mobange azali kosolola na mobali moko wana ndeko mobali ya elenge azali kolakisa video na tablɛti.

Bilenge mibali bakoki kosalisa lisangá na makambo mingi (Talá paragrafe 11)


ZWÁ MATOMBA NA TOLI OYO PAULO APESAKI

12. Ndenge nini bilenge mibali bakoki kozwa matomba na toli oyo Paulo apesaki Timote?

12 Paulo apesaki Timote toli oyo esalisaki ye alonga na bomoi mpe na mosala ya Nzambe. (1 Tim. 1:18; 2 Tim. 4:5) Bandeko mibali ya bilenge bokoki mpe kozwa matomba na toli oyo Paulo apesaki. Ndenge nini? Tángá mikanda mibale ya Paulo epai ya Timote lokola nde akomelaki yo yango, mpe luká toli oyo okoki kosalela na bomoi na yo. Tózwa mwa bandakisa.

13. Ndenge nini okoki kolona ezaleli ya kokangama na Yehova?

13 “Salá makasi [salá ngalasisi, msl] okóma na ezaleli ya kokangama na Nzambe.” (1 Tim. 4:7b) Ezaleli ya kokangama na Nzambe ezali nini? Elimboli kozala sembo epai ya Yehova mpe kosala makambo oyo esepelisaka ye. Lokola tobotamaka na ezaleli yango te, tosengeli kolona yango. Ndenge nini? Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “salá ngalasisi” ezalaki mbala mingi kosalelama mpo na kolobela ngalasisi ya makasi oyo bapoti-mbangu bazalaki kosala mpo na kobongisa momekano moko. Bapoti-mbangu yango basengelaki komipesa disiplini. Biso mpe tosengeli komipesa disiplini mpo na kokolisa mimeseno oyo ekosalisa biso tópusana mingi penepene na Yehova.

14. Mokano na yo esengeli kozala nini ntango ozali kotánga Biblia? Pesá ndakisa.

14 Soki okómi na momeseno ya kotánga Biblia mbala na mbala, kobosana te ete mokano na yo ezali ya kopusana lisusu penepene na Yehova. Na ndakisa, liteya nini okoki kozwa na lisolo oyo elobeli Yesu ntango akutanaki na elenge oyo azalaki mozwi? (Mrk. 10:​17-22) Elenge mobali yango andimaki ete Yesu azalaki Masiya, kasi azangaki kondima oyo ekokaki kotinda ye alanda Yesu. Atako bongo, Yesu “atalaki ye na bolingo.” Yesu asololaki na elenge mobali yango na boboto nyonso! Emonani ete Yesu alingaki elenge yango azwa ekateli ya malamu. Amoniselaki ye mpe bolingo ya Yehova. (Yoa. 14:9) Kanisá lisolo yango mpe talelá makambo ya bomoi na yo, na nsima omituna boye: ‘Nasengeli kosala nini mpo napusana lisusu penepene na Yehova mpe nasalela basusu mingi koleka?’

15. Mpo na nini ndeko mobali ya elenge asengeli kotya likebi na ndakisa oyo azali kopesa? Pesá ndakisa. (1 Timote 4:​12, 13)

15 “Zalá ndakisa epai ya bato ya sembo.” (Tángá 1 Timote 4:​12, 13.) Paulo alendisaki Timote akolisa kaka te mayele, lokola koyeba kotánga mpe koteya, kasi akolisa mpe bizaleli lokola bolingo, kondima, mpe bizaleli ya pɛto. Mpo na nini? Ndakisa malamu elobaka makasi koleka maloba. Kanisá ete bapesi yo lisolo olobela ndenge ya kobakisa molende na biso na mosala ya kosakola. Okozala na mpiko ya kosala lisolo yango soki yo moko omipesaka na mosala ya kosakola. Ndakisa na yo ekobakisa kilo na maloba na yo.—1 Tim. 3:13.

16. (a) Na makambo nini bilenge bakristo bakoki kopesa ndakisa? (b) Ndenge nini elenge mobali akoki kozala ndakisa “na maloba”?

16 Mokapo ya 1 Timote 4:12 elobeli ndenge Paulo amonisi ndenge ndeko mobali ya elenge akoki kozala ndakisa na makambo mitano. Okoki kotalela yango na boyekoli na yo moko, mpe okanisa makambo yango mokomoko! Na ndakisa, soki olingi kokóma ndakisa malamu “na maloba,” kanisá ndenge oyo okoki kosalela maloba na yo mpo na kolendisa basusu. Soki ozali naino kofanda na ndako ya baboti, okoki koyebisaka bango mbala na mbala ete ozali na botɔndi mpo na oyo bazali kosalela yo? Nsima ya makita, okoki koyebisa baoyo basali masolo makambo oyo osepeli na yango? Okoki mpe komeka kopesa biyano na maloba na yo moko. Milende na yo mpo na kokóma ndakisa na maloba ekomonisa ete ozali kokende liboso na elimo.—1 Tim. 4:15.

17. Makambo nini ekosalisa ndeko mobali ya elenge akokisa mikano na ye ya elimo? (2 Timote 2:22)

17 “Kimá bamposa ya bolenge, kasi landá nde bosembo.” (Tángá 2 Timote 2:22.) Paulo alendisaki Timote abundisa bamposa oyo ekokaki kolongola likebi na ye na mikano na ye ya elimo mpe kobebisa boyokani na ye na Yehova. Mbala mosusu okomona mpe ete makambo mosusu oyo ezali mpenza mabe te ekoki kolya yo ntango oyo okokaki kopesa na makambo ya elimo. Na ndakisa, kanisá ngonga oyo olekisaka na kosala masano, kosalela Internet, to kobɛta masano ya video. Okoki kosalela ndambo ya ntango yango na makambo ya elimo. Okoki kosɛnga ete opesa mabɔkɔ na mosala ya kobatela Ndako ya Bokonzi, to na programɛ ya lisangá na bino ya kosakola na shario. Soki ozali kopesa mabɔkɔ na misala wana, na ntembe te okozwa baninga ya sika oyo bakosalisa yo omityela mpe okokisa mikano ya elimo.

MATOMBA YA KOSALELA BASUSU

18. Mpo na nini tokoki koloba ete Marko ná Timote bazalaki na bomoi oyo etondi na makambo ya esengo?

18 Marko ná Timote bamipimelaki makambo mosusu mpo bámipesa mobimba na kosalela basusu, mpe yango esalaki ete bázala na bomoi oyo etondi na makambo ya esengo. (Mis. 20:35) Mpo na kosalela bandeko na ye, Marko asalaki mibembo na bisika ndenge na ndenge. Akomaki mpe lisolo ya bomoi mpe mosala ya Yesu. Timote asalisaki Paulo mpo na kofungola masangá mpe kolendisa kondima ya bandeko. Ezali polele ete Yehova asepelaki na elimo ya komipimela oyo Marko ná Timote bamonisaki.

19. Mpo na nini bandeko mibali ya bilenge basengeli kosalela toli oyo Paulo apesaki Timote, mpe bakozwa matomba nini?

19 Bolingo oyo Paulo azalaki na yango epai ya Timote ekoki komonana polele na mikanda oyo akomelaki elenge yango. Mikanda yango oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe emonisi mpe ete Yehova alingaka bino bilenge mibali mingi mpenza. Alingi ete bólonga na bomoi. Na yango, bósalela toli oyo Paulo apesaki mpe bókolisa mposa ya kosalela basusu mingi mpenza. Soki bosali bongo, bokozala na bomoi oyo etondi na makambo ya esengo lelo oyo, mpe ‘bokosimba makasi bomoi ya solosolo’ na mikolo ezali koya.—1 Tim. 6:​18, 19.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Mateya nini ozwi na ndakisa ya Marko?

  • Ndenge nini okoki komekola Timote na oyo etali kosalela basusu makambo?

  • Toli nini ya Paulo ekoki kosalisa elenge mobali asalela lisusu Yehova mingi koleka?

LOYEMBO 80 ‘Bómeka mpe bómona malamu ya Yehova’

a Lokola Petro azalaki moto oyo abombaka mayoki na ye te, ezalaki pɛtɛɛ alimbwela Marko ndenge oyo Yesu amiyokaki mpe asalaki na mabaku ndenge na ndenge. Mbala mosusu yango wana na mokanda na ye, Marko alobelaki mbala mingi mayoki mpe misala ya Yesu.—Mrk. 3:5; 7:34; 8:12.

b NDIMBOLA YA ELILINGI: Marko azali kokokisa bamposa ya Paulo ná Barnabasi na mobembo na bango ya misionɛrɛ. Timote andimi kokende kotala lisangá moko mpo na kopesa bandeko makasi mpe kolendisa bango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto