LISOLO YA BOYEKOLI 19
LOYEMBO 6 Likoló ezali kosakola nkembo ya Nzambe
Mekolá baanzelu ya sembo
“Bósanzola Yehova, bino nyonso baanzelu na ye.”—NZ. 103:20.
NA MOKUSE
Tokotalela mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya baanzelu ya sembo.
1-2. (a) Na makambo nini tokeseni na baanzelu? (b) Na makambo nini tokokani na baanzelu?
NTANGO Yehova abendaki yo na solo, akɔtisaki yo na libota na ye ya bolingo oyo esangisi mibali mpe basi oyo basambelaka ye na mokili mobimba, ata mpe bamilio ya baanzelu ya sembo. (Dan. 7:9, 10) Ntango tokanisaka baanzelu, mbala mingi tomonaka ndenge bakeseni na biso bato. Na ndakisa, baanzelu bakelamá kala, ntango mingi liboso bato bákelama. (Yobo 38:4, 7) Lisusu, baleki biso na nguya. Mpe bazali basantu mpe sembo koleka biso, mpo tozali bato ya kozanga kokoka.—Luka 9:26.
2 Kasi, atako tokeseni na baanzelu na makambo mosusu, tokokani mpe na makambo mingi. Na ndakisa, ndenge moko na baanzelu, tokoki komekola bizaleli ya Yehova. Lisusu, tozali na bonsomi ya kopona, kaka lokola baanzelu. Ndenge moko na bango, mokomoko na biso azali na nkombo na ye, bomoto na ye mpe mikumba oyo ekeseni na ya basusu na mosala ya Yehova. Mpe lokola baanzelu, tozalaka na mposa ya kosambela Mozalisi na biso.—1 Pe. 1:12.
3. Makambo nini tokoki komekola epai ya baanzelu ya sembo?
3 Lokola tokokani na baanzelu na makambo mingi, ndakisa na bango ya malamu ekoki kolendisa mpe kopesa biso mateya mingi ya ntina. Na lisolo oyo, tokomona ndenge tokoki komekola komikitisa ya baanzelu ya sembo, bolingo na bango epai ya bato, ezaleli na bango ya koyika mpiko, mpe milende na bango mpo na kobatela lisangá pɛto.
BAANZELU BAZALAKA NA KOMIKITISA
4. (a) Ndenge nini baanzelu bamonisaka komikitisa? (b) Mpo na nini baanzelu bazalaka na komikitisa? (Nzembo 89:7)
4 Baanzelu ya sembo bazalaka na komikitisa. Bayebi makambo mingi, bazali na nguya mpe na bwanya, kasi batosaka malako ya Yehova. (Nz. 103:20) Ntango bakokisaka mikumba na bango, bamikumisaka te mpo na oyo basali mpe balakisaka te na lolendo nguya na bango oyo eleki ya bato. Basalaka mokano ya Nzambe na esengo ata soki nkombo na bango eyebani te.a (Eba. 32:24, 29; 2 Bak. 19:35) Bandimaka ata moke te kozwa lokumu oyo esengeli kopesama epai ya Yehova. Mpo na nini baanzelu bazalaka na komikitisa bongo? Mpo balingaka Yehova mpe bapesaka ye limemya makasi.—Tángá Nzembo 89:7.
5. Ndenge nini anzelu moko amonisaki komikitisa ntango asembolaki ntoma Yoane? (Talá mpe elilingi.)
5 Tótalela lisolo moko oyo emonisi komikitisa ya baanzelu. Na mobu soki 96 T.B., anzelu moko oyo Biblia epesi nkombo na ye te alakisaki ntoma Yoane emonaneli moko ya kokamwa. (Em. 1:1) Nsima ya komona makambo yango ya kokamwa, Yoane asalaki nini? Alukaki kosambela anzelu yango. Kasi, anzelu yango ya sembo apekisaki ye mbala moko, mpe alobaki na ye: “Kebá! Kosala bongo te! Nazali kaka moninga moombo lokola yo mpe lokola bandeko na yo . . . Sambelá Nzambe!” (Em. 19:10) Amonisaki mpenza komikitisa! Anzelu yango alukaki nkembo to lokumu te. Abendaki mbala moko likebi ya Yoane epai ya Yehova Nzambe. Lisusu, anzelu yango akitisaki Yoane te. Atako azalaki kosalela Yehova banda kala mpenza mpe azalaki na nguya mingi koleka Yoane, amonisaki komikitisa na ndenge amibengaki moombo lokola Yoane. Mpe atako esɛngaki anzelu yango asembola ntoma Yoane, atyolaki mobange yango te mpe asalelaki ye makambo makasimakasi te. Kasi alobaki na ye na boboto. Na ntembe te amonaki ete nsɔmɔ nde etindaki Yoane agumbama.
Anzelu amonisaki komikitisa ntango asembolaki Yoane (Talá paragrafe 5)
6. Ndenge nini tokoki komekola komikitisa ya baanzelu?
6 Ndenge nini tokoki komekola komikitisa ya baanzelu? Biso mpe, ntango tozali kokokisa mikumba na biso na mosala ya Yehova, tólingaka te komikumisa to koluka koyebana mpo na oyo tosali. (1 Ko. 4:7) Lisusu, tosengeli te komona ete toleki basusu mpo tosalelaka Yehova banda kala koleka bango, to mpo tozali na mikumba oyo bango bazali na yango te. Kutu, ntango tozali kokóma na mikumba mingi, tosengeli mpe komikitisa mingi. (Luka 9:48) Lokola baanzelu, tolingaka kosalela basusu. Tolukaka te kosala ete basusu bákanisa ete toleki bango.
7. Ndenge nini tokoki komonisa komikitisa ntango esɛngi tósembola to tópesa moto toli?
7 Tokoki mpe komonisa komikitisa ntango esɛngi tósembola to tópesa moto toli, ezala ndeko ya lisangá to mwana na biso. Ntango tozali kopesa toli, ekoki kosɛnga tóloba likambo polele. Kasi kaka ndenge anzelu asembolaki Yoane na boboto, tokoki kopesa moto toli ya polele, kozanga ete tólɛmbisa ye nzoto. Soki tozali komimona te ete toleki basusu, tokopesa basusu toli oyo euti na Biblia mpe tokosala yango na limemya mpe na boboto.—Kol. 4:6.
BAANZELU BALINGAKA BATO
8. (a) Ndenge nini Luka 15:10 emonisi ete baanzelu balingaka bato? (b) Ndenge nini baanzelu bapesaka mabɔkɔ na mosala ya kosakola? (Talá mpe elilingi.)
8 Baanzelu bazalaka malilimalili te to mosika na bato. Kasi, balingaka bato. Basepelaka ntango mosumuki moko abongoli motema, elingi koloba, ntango mpate oyo abungaki azongeli Yehova, to ntango moto abongwani mpe akómi kosalela Yehova. (Tángá Luka 15:10.) Baanzelu bapesaka mpe mabɔkɔ na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. (Em. 14:6) Atako bateyaka bato mbala moko te, bakoki kosala ete tómona moto oyo alingi koyeba Yehova. Ya solo, tokoki te koloba na bosikisiki ete baanzelu batindaki biso epai ya moto boye to boye. Mpo Yehova akoki kosalela mpe mayele mosusu, na ndakisa elimo santu na ye, mpo na kosalisa to kotambwisa basaleli na ye. (Mis. 16:6, 7) Atako bongo, asalelaka baanzelu na ye mingi na mosala ya kosakola. Na yango, ntango tozali kosakola nsango malamu, tokoki kotya motema ete baanzelu bakozala wana mpo na kosalisa biso.—Talá etanda “Bazwaki biyano na mabondeli na bango.”b
Ndeko moko ná mwasi na ye basilisi kosakola na esika ya bato nyonso. Ntango bazali kozonga, ndeko mwasi amoni mwasi moko afandi mawamawa. Ndeko mwasi yango amoni ete baanzelu bakoki kosalisa biso tómona baoyo bazali koluka lisalisi ya elimo. Yango etindi ye asolola na mwasi yango mpe abɔndisa ye (Talá paragrafe 8)
9. Ndenge nini tokoki komekola baanzelu na oyo etali kolinga bato?
9 Ndenge nini tokoki komekola baanzelu na oyo etali kolinga bato? Ntango bapesi liyebisi ete moto azongisami na lisangá, ebongi tósepela ndenge baanzelu basalaka. Tokoki kotombela ye bozongi malamu mpe kolakisa ye ete tolingaka ye. (Luka 15:4-7; 2 Ko. 2:6-8) Ndenge mosusu ya komekola baanzelu ezali ya kosala nyonso oyo tokoki na mosala ya kosakola. (Mos. 11:6) Mpe kaka ndenge baanzelu basalisaka biso na mosala ya kosakola, biso mpe tokoki koluka ndenge ya kosalisa bandeko na mosala ya kosakola. Na ndakisa, tokoki kozwa bibongiseli mpo na kosakola elongo na mosakoli moko ya sika. To, tokoki kosalisa bandeko oyo bazali mibange to bibɔsɔnɔ mpo básakola elongo na biso.
10. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Sara?
10 Bongo soki makambo ya bomoi na biso ezali kopekisa biso tósala mingi? Tokoki kaka kozwa mabaku ya kosala elongo na baanzelu na mosala ya kosakola. Tótalela ndakisa ya Sara,c ndeko mwasi moko na Inde. Nsima ya kozala mobongisi-nzela mbula soki 20, Sara abɛlaki mpe esɛngaki alalaka kaka na mbeto. Na yango, akómaki konyokwama na makanisi. Kasi mokemoke, Sara azongelaki makanisi ya malamu mpo bandeko ya lisangá basalisaki ye mingi mpe azalaki na momeseno ya kotánga Biblia mbala na mbala. Kasi, asengelaki koluka mayele mosusu mpo na kosakola. Lokola akokaki ata kofanda te mpo na kokoma mikanda, akokaki kopesa litatoli kaka na telefone. Na yango, abengaki bato oyo asololaki na bango liboso, mpe bazalaki kolakisa ye bato mosusu oyo bakosepela koyekola Biblia. Ebimisaki mbuma nini? Nsima ya mwa basanza, Sara akómaki na bayekoli ya Biblia 70, mpe akokaki koyekola na bango nyonso te! Apesaki bandeko ya lisangá bayekoli mosusu. Mingi ya bayekoli yango bazali sikoyo koyangana na makita. Na ntembe te, baanzelu bazalaka na esengo ntango basalaka elongo na bandeko oyo, lokola Sara, basalaka nyonso oyo bakoki na mosala ya kosakola!
BAANZELU BAMONISAKA EZALELI YA KOYIKA MPIKO
11. Ndenge nini baanzelu ya sembo bamonisi mpenza ezaleli ya koyika mpiko?
11 Baanzelu ya sembo bazali ndakisa malamu na oyo etali koyika mpiko. Bakangi motema na makambo ya kozanga bosembo mpe ya mabe banda bankóto ya bambula. Bamonaki ndenge Satana ná baanzelu mosusu mingi oyo bazalaki liboso kosalela Yehova elongo na bango batombokaki. (Eba. 3:1; 6:1, 2; Yuda 6) Biblia elobeli anzelu moko ya sembo oyo demo moko ya nguya atɛmɛlaki. (Dan. 10:13) Lisusu, awa na mabele, baanzelu bamoni ete kaka mwa bato moke nde bamipesaka na losambo ya solo. Atako makambo wana nyonso, baanzelu yango ya sembo bakobaka kosalela Yehova na esengo mpe na molende. Bayebi ete na ntango oyo ebongi, Nzambe akolongola makambo nyonso ya kozanga bosembo.
12. Nini ekoki kosalisa biso tóyika mpiko?
12 Ndenge nini tokoki komekola baanzelu na oyo etali koyika mpiko? Lokola baanzelu, tokoki komona makambo ya kozanga bosembo to kokutana na botɛmɛli. Kasi lokola bango, tozali na kondima ete na ntango oyo ebongi, Nzambe akolongola makambo nyonso ya mabe. Na yango, ndenge moko na baanzelu ya sembo, ‘totikaka te kosala oyo ezali malamu.’ (Gal. 6:9) Lisusu, Nzambe alaki ete akosalisa biso tóyika mpiko. (1 Ko. 10:13) Tokoki kosɛnga Yehova apesa biso elimo na ye, oyo ekosalisa biso tózala na motema molai mpe na esengo. (Gal. 5:22; Kol. 1:11) Bongo soki okutani na botɛmɛli? Tyelá Yehova motema mobimba, mpe kobulungana te. Yehova akosalisa yo mpe akopesa yo ntango nyonso makasi.—Ebr. 13:6.
BAANZELU YA SEMBO BABATELAKA LISANGÁ PƐTO
13. Mokumba nini ya ntina baanzelu bazali na yango na mikolo oyo ya nsuka? (Matai 13:47-49)
13 Na mikolo oyo ya nsuka, Yehova apesi baanzelu mokumba moko ya ntina mingi. (Tángá Matai 13:47-49.) Bamilio ya bato ya ndenge nyonso basepelaka na nsango malamu oyo tosakolaka. Bato yango mosusu babongolaka bomoi na bango mpe bakómaka bakristo ya solo, kasi basusu basalaka bongo te. Baanzelu bazwi mokumba ya ‘kokabola bato mabe na bato ya sembo.’ Yango elimboli ete bazali na mokumba ya kosalisa na kobatela bopɛto ya lisangá. Yango elakisi te ete moto oyo atiki koyangana na biso mpo na ntina moko boye akozonga lisusu te; elakisi mpe te ete mikakatano ekozala ata moke te na lisangá. Kasi, tokoki kotya motema ete baanzelu bazali kosala mosala makasi mpo na kobatela bopɛto ya masangá na biso.
14-15. Ndenge nini tokoki komekola molende ya baanzelu ya kobatela lisangá pɛto na bizaleli mpe na elimo? (Talá mpe bililingi.)
14 Ndenge nini tokoki komekola molende ya baanzelu ya kobatela lisangá pɛto? Tosengeli kosala makasi mpo na kobatela lisangá na biso pɛto na bizaleli mpe na elimo. Mpo na yango, tosengeli kosala makasi tóbatela motema na biso: tóponaka baninga ya malamu mpe tóboya eloko nyonso oyo ekoki kobebisa boninga na biso na Yehova. (Nz. 101:3) Tokoki mpe kosalisa bandeko na biso bakristo bátikala sembo epai ya Yehova. Na ndakisa, tosengeli kosala nini soki toyebi ete ndeko moko asali lisumu ya monene? Lokola tolingaka ndeko yango, tokolendisa ye asolola na bankulutu. Soki asali yango te, biso moko tokoyebisa bankulutu likambo yango. Mposa na biso ezali ete ndeko oyo abebisi boyokani na ye na Yehova azwa lisalisi nokinoki!—Yak. 5:14, 15.
15 Likambo ya mawa, esɛngaka ete bato mosusu oyo basali masumu ya minene bálongolama na lisangá. Na ntango yango, ‘tokataka boninga’ na bango.d (1 Ko. 5:9-13) Ebongiseli yango esalisaka na kobatela lisangá pɛto. Lisusu, soki toponi kokata boninga na baoyo balongolami na lisangá, tozali nde komonisela bango boboto. Na ndenge nini? Ekateli na biso ya kotosa mitinda ya Biblia ekoki kotinda bango bámona ete esengeli bázongela Yehova. Soki bazongi, tosepelaka elongo na Yehova mpe baanzelu na ye.—Luka 15:7.
Tosengeli kosala nini soki toyebi ete ndeko moko asali lisumu ya monene? (Talá paragrafe 14)e
16. Okosala makasi omekola bizaleli nini ya baanzelu?
16 Ezali lokumu monene ndenge Yehova apesi biso libaku ya koyeba makambo etali baanzelu mpe ya kosala elongo na bango! Tósala makasi tómekola bizaleli na bango ya malamu: komikitisa na bango, bolingo na bango epai ya bato, ezaleli na bango ya koyika mpiko, mpe molende na bango ya kobatela lisangá pɛto na bizaleli mpe na elimo. Soki tomekoli baanzelu ya sembo, biso mpe tokoki kozala na kati ya libota ya basambeli ya Yehova libela na libela.
LOYEMBO 123 Tótosaka ebongiseli ya teokrasi
a Ezali na bamilio ya baanzelu, kasi Biblia etángi kaka nkombo ya baanzelu mibale: Mikaele mpe Gabriele.—Dan. 12:1; Luka 1:19.
b Okoki komona bandakisa mosusu na Index des publications des Témoins de Jéhovah na motó ya likambo “Anges,” motó ya likambo moke “direction angélique (exemples).”
c Topesi bango bankombo mosusu.
d Ndenge emonisamaki na Lapolo nimero 2 ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya 2024, soki moto oyo alongolamá na lisangá ayei na makita, mokristo akoki kosalela lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia mpo na kotala soki akopesa ye mbote ya mokuse mpe akotombela ye boyei malamu.
e NDIMBOLA YA BILILINGI : Ndeko mwasi moko azali kolendisa moninga na ye akende kosolola na bankulutu. Lokola mwa ntango eleki mpe moninga yango asali yango te, ye moko akei koyebisa bankulutu likambo yango.