Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Mai nk. 8-13
  • Lukáká libɔndisi epai ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lukáká libɔndisi epai ya Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • YEHOVA ALIMBISAKA BISO NA MOTEMA MAWA NYONSO
  • YEHOVA APESI BISO ELIKYA
  • YEHOVA ASALISAKA BISO TÓTIKA KOBANGA
  • Yehova “abikisaka baoyo bazoki na motema”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Ndimá ete okoki koyeba makambo mosusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Tozalaka ata moke te biso moko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Bikateli oyo emonisaka ete totyelaka Yehova motema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Mai nk. 8-13

LISOLO YA BOYEKOLI 20

LOYEMBO 7 Yehova azali makasi na biso

Lukáká libɔndisi epai ya Yehova

“Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso [asanzolama].”—2 KO. 1:3.

NA MOKUSE

Tokomona mateya oyo tokoki kozwa na ndenge Yehova abɔndisaki Bayuda oyo bazalaki na mboka mopaya.

1. Bayuda oyo bamemamaki na mboka mopaya na Babilone bazalaki ndenge nini?

KANISÁ naino ndenge Bayuda oyo bazalaki kofanda na Babilone bazalaki komiyoka. Bamonaki ndenge mboka na bango ebebisamaki. Mpo na masumu na bango mpe ya bankɔkɔ na bango, Yehova apesaki nzela ete bato ya Babilone bázwa Bayuda mpe bámema bango na mboka na bango. (2 Nt. 36:​15, 16, 20, 21) Ya solo, Bayuda bazalaki na mwa bonsomi ya kosala makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo kuna na Babilone. (Yir. 29:​4-7) Kasi, bomoi ezalaki kaka pɛtɛɛ te, mpe na ntembe te bango moko bakokaki kopona bomoi ya bongo te. Bazalaki komiyoka ndenge nini? Moko ya Bayuda yango, oyo azalaki sembo alobaki: “Tofandaki pene ya bibale ya Babilone. Tolelaki ntango tokanisaki Siona.” (Nz. 137:1) Bayuda yango oyo balɛmbaki nzoto bazalaki na mposa ya libɔndisi, kasi epai wapi bakokaki kozwa yango?

2-3. (a) Yehova asalaki nini mpo na Bayuda oyo bamemamaki na mboka mopaya? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo?

2 Yehova azali “Nzambe ya kobɔndisama nyonso.” (2 Ko. 1:3) Azali Nzambe ya bolingo mpe asepelaka kobɔndisa baoyo nyonso bapusanaka penepene na ye. Yehova ayebaki ete na mboka mopaya, Bayuda mosusu bakondima ete basalaki mabe ndenge batosaki ye te mpe bakozongela ye. (Yis. 59:20) Na yango, mbula koleka 100 liboso Bayuda bámemama na mboka mopaya, Yehova atindaki mosakoli Yisaya akoma mokanda oyo ebengami na nkombo na ye. Mpo na nini? Yisaya alobaki: “Nzambe na bino alobi: ‘Bóbɔndisa, bóbɔndisa bato na ngai.’” (Yis. 40:1) Na nzela ya mokanda ya Yisaya, Yehova apesaki libɔndisi oyo Bayuda oyo bamemami na mboka mopaya bakozala na yango mposa.

3 Ndenge moko na Bayuda yango, biso mpe tozalaka na mposa ya libɔndisi na bantango mosusu. Na lisolo oyo, tokotalela ndenge misato oyo Yehova abɔndisaki Bayuda na Babilone: (1) Alakaki ete akolimbisa baoyo babongoli motema, (2) apesaki bato na ye elikya, mpe (3) asalisaki bango bátika kobanga. Ntango tozali kotalela makambo yango, tokomona ndenge oyo maloba ya Yehova ekoki mpe kobɔndisa biso lelo.

YEHOVA ALIMBISAKA BISO NA MOTEMA MAWA NYONSO

4. Ndenge nini Yehova amonisaki ete azali Nzambe ya motema mawa? (Yisaya 55:7)

4 Yehova azali “Tata ya motema mawa mingi.” (2 Ko. 1:3) Amonisaki ezaleli yango ntango alakaki ete akolimbisa Bayuda oyo bakobongola motema. (Tángá Yisaya 55:7.) Alobaki boye: “Nakoyokela yo mawa na bolingo na ngai ya sembo mpe ya seko.” (Yis. 54:8) Ndenge nini Yehova amonisaki motema mawa na ye? Ata soki ekosɛnga ete ekólo mobimba ya Bayuda yango enyokwama naino na Babilone mpo na kozanga botosi na bango, Yehova alakaki ete bakotikala kuna libela te. (Yis. 40:2) Na ntembe te, maloba wana ebɔndisaki mpenza baoyo babongolaki motema!

5. Mpo na nini tozali na ntina mingi ya kondima motema mawa ya Yehova koleka Bayuda oyo bamemamaki na mboka mopaya?

5 Liteya mpo na biso: Yehova asepelaka kolimbisa mpenza basaleli na ye. Lelo oyo, tozali na ntina mingi ya kondima motema mawa ya Yehova koleka Bayuda oyo bamemamaki na mboka mopaya. Mpo na nini? Mpo toyebi ebongiseli oyo Yehova azwá mpo masumu na biso elimbisama. Bankama ya bambula nsima ya esakweli ya Yisaya, Yehova atindaki Mwana na ye ya bolingo awa na mabele mpo apesa bomoi na ye lisiko mpo na basumuki nyonso oyo babongoli motema. Mbeka yango nde ebongiseli oyo esalaka ete masumu “ebomama,” elongwa libela. (Mis. 3:19; Yis. 1:18; Ef. 1:7) Yehova azali mpenza Nzambe ya motema mawa!

6. Na ndenge nini kotya makanisi na motema mawa ya Yehova ekobɔndisa biso? (Talá mpe elilingi.)

6 Maloba ya Yisaya 55:7 oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe ekoki kobɔndisa biso soki tozali komiyoka ete tomemi ngambo. Basusu kati na biso bakobaka komipesa foti mpo na libunga oyo basalaki, ata soki basili kobongola motema. Ekoki kozala bongo mingimingi soki tozali kaka kobuka mbuma mabe ya libunga na biso. Nzokande, soki toyamboli masumu na biso mpe totiki kosala oyo ezali mabe, tokoki kondima ete Yehova alimbisi biso. Mpe ntango Yehova alimbisi biso, akanisaka lisusu lisumu na biso te. (Talá mpe Yirimia 31:34.) Na yango, lokola Yehova akanisaka lisusu masumu na biso ya kala te, biso mpe tosengeli kosala bongo. Oyo ezali na ntina mpo na Yehova, ezali makambo oyo tozali kosala sikoyo, kasi te mabunga oyo tosalá kala. (Ezk. 33:​14-16) Mpe mosika te, Tata na biso ya motema mawa mingi akolongola mpo na libela mbuma mabe nyonso ya mabunga na biso.

Ndeko mobali moko azali kotambola na kimya. Bililingi: Bililingi oyo emonisi makambo azalaki kosala kala mpe oyo azali kosala sikoyo. Mabunga oyo asalá kala: 1. Azalaki kobɛta masano ya video ya mobulu. 2. Azalaki kolangwa masanga mpe komɛla makaya. 3. Azalaki kotala bililingi ya mbindo na ordinatɛrɛ. Makambo oyo azali kosala sikoyo: 1. Azali kopɛtola Ndako ya Bokonzi. 2. Azali kosolola na ndeko mwasi moko ya mobange. 3. Abimi na mosala ya kosakola.

Oyo ezali na ntina mpo na Yehova, ezali te mabunga oyo tosalá kala, kasi nde makambo oyo tozali kosala sikoyo (Talá paragrafe 6)


7. Nini ekoki kotinda biso tóluka lisalisi soki tobombá lisumu moko ya monene?

7 Tosengeli kosala nini soki lisosoli na biso etungisamaka mpo tosalá lisumu ya monene kasi tobombá yango? Biblia elendisi biso tósɛnga bankulutu básalisa biso. (Yak. 5:​14, 15) Nzokande, mbala mosusu tozali komona ete ezali pɛtɛɛ te koyebisa bango mabe oyo tosalá. Kasi soki tobongoli motema mpe tomikundweli ete Yehova ná mibali oyo atyá mpo na kosalisa biso balingaka biso mpe bazalaka na motema mawa, ekosalisa biso tókende kosolola na bango. Talá ndenge motema mawa ya Yehova ebɔndisaki ndeko Arthur,a oyo lisosoli na ye etungisamaki makasi. Arthur alobaki boye: “Natalaki pornografi pene na mbula mobimba. Kasi nsima ya koyoka diskur moko oyo elobelaki lisosoli, nayebisaki mwasi na ngai ná bankulutu lisumu na ngai. Nsima na yango, nayokaki motema ekiti, kasi nazalaki kaka mawamawa mpo na likambo oyo nasalaki. Bankulutu bakundwelaki ngai ete Yehova abwakaki ngai te. Asembolaka biso mpo alingaka biso. Maloba na bango ya boboto esimbaki motema na ngai mpe esalisaki ngai nakóma na makanisi ya malamu.” Lelo oyo, Arthur azali mobongisi-nzela mpe mosaleli na misala. Koyeba ete Yehova amoniselaka biso motema mawa soki tobongoli motema ebɔndisaka biso mpenza!

YEHOVA APESI BISO ELIKYA

8. (a) Elikya nini Yehova apesaki Bayuda? (b) Na kotalela Yisaya 40:​29-31, ndenge nini elikya yango ekokaki kosalisa Bayuda oyo babongolaki motema?

8 Na miso ya bomoto, Bayuda oyo bazalaki bakangami bazalaki na elikya te. Eyebanaki ete Babilone, ekólo oyo elekaki na nguya na ntango wana, etikaka bakangami na yango te. (Yis. 14:17) Kasi Yehova apesaki bato na ye elikya. Alakaki ete akosikola bango, mpe eloko moko te ekokaki kopekisa ye kosala yango. (Yis. 44:26; 55:12) Na miso ya Yehova, Babilone ezalaki lokola mwa putulu moke. (Yis. 40:15) Soki ofuli putulu, ezalaka lisusu te. Ndenge nini elikya yango ekokaki kosalisa Bayuda oyo bazalaki na mboka mopaya? Elingaki kobɔndisa bango. Kasi esukaki wana te. Yisaya akomaki: “Baoyo batyeli Yehova elikya bakozwa nguya ya sika.” (Tángá Yisaya 40:​29-31.) Ya solo, elikya elingaki kopesa bango makasi; bakokaki ‘kopumbwa likoló na mapapu lokola bampongo.’

9. Nini elingaki kosalisa Bayuda bátyela bilaka ya Yehova motema?

9 Yehova apesaki mpe Bayuda yango ntina ya kotyela bilaka na ye motema. Ndenge nini? Bisakweli na ye mosusu esilaki kokokisama. Bayuda yango bayebaki ete Asiri elongaki Yisraele bokonzi ya nɔrdi mpe ememaki bato na mboka mopaya. (Yis. 8:4) Lisusu, bamonaki ndenge bato ya Babilone babebisaki Yerusaleme mpe bamemaki bafandi na yango na mboka mopaya. (Yis. 39:​5-7) Bayebaki ete mokonzi ya Babilone abomaki Mokonzi Zidikiya miso mpe amemaki ye na Babilone. (Yis. 39:7; Ezk. 12:​12, 13) Nyonso oyo Yehova asakolaki ekokisamaki. (Yis. 42:9; 46:10) Na ntembe te, yango ekómisaki kondima na bango makasi ete elaka ya Yehova ya kopesa bango bonsomi ekokokisama mpe!

10. Nini ekoki kosalisa biso tóbatela elikya na biso na mikolo oyo ya nsuka?

10 Liteya mpo na biso: Ntango tozali na mawa, elikya ekoki kobɔndisa mpe kopesa biso lisusu makasi. Tozali na ntango moko ya mpasi mpenza mpe banguna mosusu ya nguya batɛmɛlaka biso. Kasi, tosengeli kolɛmba nzoto te. Yehova apesi biso elikya kitoko: bomoi ya seko na mokili oyo etondi na kimya, esika oyo eloko ya kobanga ekozala te. Tosengeli kobatela elikya yango polele na makanisi mpe na motema na biso. Soki te, elikya na biso ekobungisa kitoko na yango; ekokóma lokola tozali kotala elanga moko ya kitoko na fɛnɛtrɛ oyo vitrɛ na yango ezali salite. Ndenge nini tokoki “kopɛtola vitrɛ ya fɛnɛtrɛ,” elingi koloba, kobatela makasi elikya na biso? Tosengeli kozwaka mbala na mbala ntango ya kokanisa ndenge oyo bomoi na biso ekozala malamu na mokili ya sika. Tokoki kotánga masolo, kotala bavideo, mpe koyoka banzembo oyo elobeli elikya na biso. Lisusu na mabondeli na biso, tokoki koyebisa Yehova bilaka oyo tozali kozela mpenza ete ekokisama.

11. Nini esalisaka ndeko mwasi moko oyo azali na maladi moko oyo eumeli mingi azwa lisusu makasi?

11 Talá ndenge elikya ebɔndisaka mpe elendisaka ndeko mwasi Joy, oyo azali na maladi moko oyo eumeli mingi. Alobi boye: “Ntango makambo elekeli ngai, nayebisaka Yehova mayoki na ngai ya motema mpenza, mpo nayebi ete akomitya na esika na ngai. Na yango, Yehova apesaka ngai ‘nguya oyo eleki makasi.’” (2 Ko. 4:7) Joy amimonaka mpe na mokili ya sika, epai “moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali kobɛla.’” (Yis. 33:24) Soki biso mpe tozali kosopela Yehova motema na biso mpe kotya makanisi na elikya na biso, tokozwa lisusu makasi.

12. Nini esalisaka biso tótyela bilaka ya Yehova motema? (Talá mpe elilingi.)

12 Ndenge kaka ezalaki mpo na Bayuda na Babilone, biso mpe tozali na bantina mingi ya kotyela bilaka ya Yehova motema. Kanisá bisakweli oyo ezali kokokisama sikoyo. Na ndakisa, tozali komona ndenge bokonzi oyo eleki na nguya na mokili ezali “ndambo makasi mpe ndambo makasi te.” (Dan. 2:​42, 43) Toyokaka mpe nsango ya ‘koningana ya mabele na bisika ndenge na ndenge,’ mpe tozali kosakola nsango malamu na “bikólo nyonso.” (Mat. 24:​7, 14) Bisakweli yango mpe bisakweli mosusu mingi elendisaka kondima na biso na bilaka ya Yehova oyo ebɔndisaka biso, kasi ekokisami naino te.

Ndeko mwasi moko azali kotánga mpe komanyola bisakweli ya Biblia. Bililingi: 1. Ndeko mwasi moko ná mobali na ye batɛlɛmi pene ya shario mpe bazali kosolola na mobali moko. 2. Tata moko ná mwana na ye bazali kotala ndenge biloko ebebi nsima ya likama. 3. Libanga moko ebɛti makolo ya ekeko ya ndɔtɔ ya Nebukadenezare oyo Danyele mokapo 2 elobeli. 4. Bato bazali kosepela na bomoi na paradiso awa na mabele.

Bisakweli oyo ezali kokokisama lelo etindaka biso tótyela bilaka ya Yehova motema (Talá paragrafe 12)


YEHOVA ASALISAKA BISO TÓTIKA KOBANGA

13. (a) Mikakatano nini Bayuda balingaki kokutana na yango na ntango ya kosikolama na bango na Babilone? (b) Na kotalela Yisaya 41:​10-13, ndenge nini Yehova abɔndisaki Bayuda oyo bazalaki na Babilone?

13 Yehova apesaki Bayuda oyo bazalaki na Babilone elikya ete akobimisa bango kuna mpe yango ebɔndisaki bango; kasi ayebaki ete bakokutana na mikakatano na ntango ya kosikolama na bango. Yehova asakolaki ete liboso bálongwa kuna, mokonzi moko ya nguya akobebisa bikólo ya zingazinga mpe na nsima akobundisa Babilone. (Yis. 41:​2-5) Bayuda basengelaki nde komitungisa? Bambula mingi liboso likambo yango esalema, Yehova abɔndisaki bato na ye na maloba oyo: “Kobanga te, mpo nazali na yo. Komitungisa te, mpo nazali Nzambe na yo.” (Tángá Yisaya 41:​10-13.) Alingaki koloba nini na maloba “nazali Nzambe na yo”? Ezalaki te mpo na kokundwela Bayuda ete básambela ye; bango moko bayebaki ete basengeli kosala yango. Ntango alobaki bongo, azalaki nde kokundwela bango ete azali kaka elongo na bango.—Nz. 118:6.

14. Yehova asalaki lisusu nini mpo na kosalisa Bayuda bátika kobanga?

14 Yehova asalisaki mpe Bayuda bátika kobanga na ndenge akundwelaki bango ete azali na nguya mpe na boyebi oyo ezangi nsuka. Asɛngaki bango bátala minzoto na likoló. Ayebisaki bango ete akelaki minzoto, mpe kutu ayebi nkombo ya minzoto nyonso. (Yis. 40:​25-28) Soki Yehova ayebi nkombo ya minzoto, boye ayebi mpe nkombo ya mosaleli na ye mokomoko! Mpe soki Yehova azalaki na nguya ya kokela minzoto, azali mpe na nguya ya kosalisa bato na ye. Ya solo, Bayuda yango bazalaki na ntina moko te ya komitungisa to ya kobanga.

15. Ndenge nini Yehova abongisaki bato na ye mpo na makambo oyo ezalaki koya?

15 Yehova abongisaki mpe bato na ye mpo na makambo oyo ezalaki koya. Mwa liboso, na mokanda ya Yisaya, Nzambe ayebisaki ekólo na ye: “Kɔtá na bashambrɛ na yo ya kati, mpe kangá baporte na yo. Omibomba kaka mpo na mwa ntango tii nkanda ekosila.” (Yis. 26:20) Ekoki kozala ete maloba yango ekokisamaki mpo na mbala ya liboso ntango Babilone ekweaki na mabɔkɔ ya Mokonzi Siruse. Moto moko ya Istware ya Grɛki ya kala alobi ete ntango Siruse akɔtaki na Babilone, “apesaki [basoda na ye] mitindo ete báboma moto nyonso oyo bakokuta libándá.” Kanisá ndenge bafandi ya Babilone bazalaki kobanga! Kasi soki Bayuda oyo bazalaki kuna batosaki malako ya Yehova, boye babikaki.

16. Mpo na nini tosengeli komitungisa koleka ndelo te mpo na mikolo ezali koya? (Talá mpe elilingi.)

16 Liteya mpo na biso: Mosika te bolɔzi monene oyo esalemá naino te ekosalema na mabele mobimba. Ntango ekobanda, bato bakobulungana mpe bakobanga. Kasi ekozala bongo te mpo na basaleli ya Yehova. Toyebi ete Yehova azali Nzambe na biso. Tokozala na mpiko, mpo toyebi ete “kosikolama [na biso] ekómi pene.” (Luka 21:28) Ata ntango etuluku ya bikólo oyo esangani ekobundisa biso, tokokoba kotyela Yehova motema. Yehova akobatela biso na nzela ya baanzelu mpe akopesa biso malako oyo ekobikisa biso. Ndenge nini malako yango ekokómela biso? Toyebi naino te. Kasi, na ntembe te tokozwa malako yango na nzela ya masangá na biso. Yango ekoki kozala ‘bashambrɛ na biso ya kati,’ epai tokozala na libateli. Ndenge nini tokoki komibongisa mpo na makambo oyo ezali koya? Tosengeli kokangama na bandeko na biso bakristo, kozala pene ya kotosa malako ya ebongiseli ya Yehova, mpe komindimisa ete Yehova nde azali kotambwisa ebongiseli na biso.—Ebr. 10:​24, 25; 13:17.

Bandeko mibali ná bandeko basi bazali kotánga Biblia na mwa ndako moko na ntango ya bolɔzi monene. Bazali kotala na fɛnɛtrɛ mpe ndeko moko azali kolakisa minzoto na likoló.

Soki tozali kokanisa nguya ya Yehova mpe likoki na ye ya kobikisa biso, tokomitungisa koleka ndelo te na ntango ya bolɔzi monene (Talá paragrafe 16)b


17. Ndenge nini okoki komonisa ete olukaka libɔndisi epai ya Yehova?

17 Atako bomoi ezalaki pɛtɛɛ te mpo na Bayuda oyo bazalaki na mboka mopaya, Yehova apesaki bango libɔndisi oyo basengelaki na yango. Akosala mpe bongo mpo na biso. Na yango, ata soki nini esalemi na mikolo ekoya, kobá koluka libɔndisi epai ya Yehova. Zalá na kondima ete atondi na motema mawa mpe akokisaka mposa ya basaleli na ye. Batelá elikya na yo makasi. Mpe kobosana te ete lokola Yehova azali Nzambe na yo, ozali na eloko ya kobanga te.

NDENGE NINI BAVƐRSƐ OYO ELANDI EBƆNDISI YO?

  • Yisaya 55:7

  • Yisaya 40:​29-31

  • Yisaya 41:​10-13

LOYEMBO 3 Nguya na ngai, elikya na ngai, makasi na ngai

a Topesi bango bankombo mosusu.

b NDIMBOLA YA ELILINGI: Mwa bandeko bayangani elongo. Batye motema na nguya ya Yehova mpe likoki na ye ya kobatela bato na ye esika nyonso oyo bazali na mabele.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto