LISOLO YA BOYEKOLI 21
LOYEMBO 21 Lukáká liboso Bokonzi ya Nzambe
Kobá kozela engumba oyo ekoumela seko
“Tozali . . . koluka na mposa makasi engumba oyo ezali koya.”—EBR. 13:14.
NA MOKUSE
Tokomona ndenge oyo Baebre mokapo 13 ekoki kosalisa biso lelo mpe na mikolo ezali koya.
1. Likambo nini Yesu asakolaki mpo na Yerusaleme na siɛklɛ ya liboso?
MWA mikolo liboso Yesu akufa, apesaki bayekoli na ye esakweli moko. Esakweli yango ekokisamaki liboso na mikolo ya nsuka ya ebongiseli ya Bayuda. Yesu asakolaki ete ‘mampinga ya basoda ekozinga [engumba] Yerusaleme.’ (Luka 21:20) Ayebisaki bayekoli na ye ete soki kaka bamoni mampinga yango, basengeli mbala moko kokima mboka yango. Maloba ya Yesu ekokisamaki ntango mampinga ya basoda ya Roma ezingaki Yerusaleme.—Luka 21:21, 22.
2. Ntoma Paulo alobaki nini na bakristo Baebre ya Yudea mpe ya Yerusaleme?
2 Kaka mwa bambula moke liboso mampinga ya basoda ya Roma ezinga Yerusaleme, ntoma Paulo akomaki mokanda oyo ezalaki na nsango moko ya ntina mingi; mokanda yango eyebani lelo na nkombo ya mokanda ya Baebre. Na mokanda yango, Paulo apesaki bakristo ya Yudea mpe ya Yerusaleme toli oyo elingaki kosalisa bango bámibongisa mpo na likambo oyo ezalaki koya. Likambo nini? Yerusaleme esengelaki kobebisama. Mpo bakristo yango bábika, basengelaki kondima kosundola bandako mpe misala na bango. Yango wana Paulo akomaki mpo na engumba Yerusaleme ete: “Tozali na engumba moko te awa oyo ekoumela seko.” Na nsima abakisaki: “Kasi tozali nde koluka na mposa makasi engumba oyo ezali koya.”—Ebr. 13:14.
3. “Engumba oyo ezali na miboko ya solosolo” ezali nini, mpe mpo na nini tozelaka yango?
3 Na ntembe te, bato batyolaki mpe basɛkaki bakristo oyo bazwaki ekateli ya kolongwa na Yerusaleme mpe na Yudea, kasi ekateli yango ebikisaki bomoi na bango. Lelo oyo mpe batyolaka biso mpo totyaka motema te epai ya bana ya bato mpe tolukaka te libateli na nzela ya bomɛngo mpe na bomoi oyo bato ya mokili bamonaka ete ezali malamu. Mpo na nini tosalaka bongo? Mpo toyebi ete mokili oyo ekoumela seko te. Biso tozali kozela nde “engumba oyo ezali na miboko ya solosolo,” elingi koloba, “engumba oyo ezali koya,” Bokonzi ya Nzambe.a (Ebr. 11:10; Mat. 6:33) Na motó ya likambo moke mokomoko ya lisolo oyo, tokotalela: (1) ndenge toli ya Paulo oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe esalisaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso bákoba koluka “engumba oyo ezali koya,” (2) ndenge Paulo abongisaki bango mpo na makambo oyo ezalaki koya, mpe (3) ndenge toli na ye ezali kosalisa biso lelo oyo.
TYÁ MOTEMA EPAI YA YEHOVA MPO AKOSUNDOLA YO TE
4. Mpo na nini Yerusaleme ezalaki engumba ya ntina mingi mpo na bakristo?
4 Yerusaleme ezalaki engumba ya ntina mingi mpo na bakristo. Lisangá ya bokristo efungwamaki kuna na mobu 33 T.B. Bandeko ya lisangani ya mikóló-bakambi mpe bazalaki kofanda kuna. Lisusu, bakristo mingi bazalaki na bandako na engumba yango mpe bakómaki na biloko ebele ya kobikela. Nzokande, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete ekosɛnga bálongwa na Yerusaleme mpe ata na Yudea.—Mat. 24:16.
5. Ndenge nini Paulo asalisaki bakristo bámibongisa mpo na likambo oyo ezalaki koya?
5 Lokola Paulo alingaki ete bakristo bámibongisa mpo na kolongwa na Yerusaleme, asalisaki bango bátalela engumba yango ndenge Yehova azalaki kotalela yango. Paulo akundwelaki bango ete na miso ya Yehova, tempelo, bonganga-nzambe, mpe bambeka oyo ezalaki kopesama na Yerusaleme esilaki ngala. (Ebr. 8:13) Bato mingi ya engumba yango baboyaki kondima Masiya. Tempelo ya Yerusaleme ezalaki lisusu te esika monene ya losambo ya pɛto ya Yehova, mpe esengelaki kobebisama.—Luka 13:34, 35.
6. Mpo na nini toli ya Paulo na Baebre 13:5, 6 ebongaki mpenza mpo na bakristo?
6 Ntango Paulo akomaki mokanda epai ya Baebre, Yerusaleme ezalaki engumba oyo bato balingaki mingi. Mokomi moko ya Roma ya eleko wana abengaki Yerusaleme “engumba oyo eyebani mingi koleka na Ɛsti.” Mbula na mbula, Bayuda bazalaki kouta bisika ndenge na ndenge mpe koya bafɛti na Yerusaleme, mpe yango ezalaki komatisa nkita ya engumba yango. Na ntembe te, yango esalaki ete bakristo mosusu bákóma na mbongo mingi. Mbala mosusu ezali mpo na yango nde Paulo alobaki na bango: “Bózala na bolingo ya mbongo te na bomoi na bino, bósepela na biloko oyo bozali na yango sikoyo.” Na nsima, azongelaki mokapo moko ya Makomami oyo ezali elaka oyo Yehova apesaki mosaleli na ye mokomoko, ete: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.” (Tángá Baebre 13:5, 6; Mib. 31:6; Nz. 118:6) Ezalaki malamu kokundwela bakristo ya Yerusaleme mpe ya Yudea elaka yango. Mpo na nini? Mpo, mwa moke nsima ya kozwa mokanda yango, likambo oyo esalemaki esɛngaki bango bátika bandako, misala mpe biloko na bango mingi. Na nsima basengelaki kobanda bomoi ya sika esika mosusu, mpe ezalaki pɛtɛɛ te.
7. Mpo na nini tosengeli koyekola kotyela Yehova motema banda sikoyo?
7 Liteya mpo na biso: Likambo nini ekosalema mosika te? Tozali kozela ‘bolɔzi monene’ mpe kobebisama ya mokili oyo. (Mat. 24:21) Ndenge moko na bakristo ya siɛklɛ ya liboso, tosengeli kokoba kosɛnzɛla mpe komibongisa. (Luka 21:34-36) Na ntango ya bolɔzi monene, ekoki kosɛnga ete tótika biloko na biso mosusu to mpe nyonso, mpe tótya motema ete Yehova akosundola bato na ye ata moke te. Kasi ata sikoyo, liboso ete bolɔzi monene ebanda, tozali na libaku ya komonisa esika oyo totyaka motema na biso. Na yango, omituna boye: ‘Makambo oyo nasalaka mpe mikano oyo namityeli emonisi ete natyaka motema na bomɛngo te, kasi nde na Nzambe oyo alaki ete akokokisa bamposa na ngai?’ (1 Tim. 6:17) Ya solo tokoki kozwa mateya na likambo oyo esalemaki na siɛklɛ ya liboso, kasi ‘bolɔzi monene’ oyo ezali koya ekozala likambo oyo esalemá naino te. Na yango, ndenge nini tokoyeba mpenza makambo nini tokosala ntango bolɔzi yango ekobanda?
TOSÁKÁ BAOYO BAZALI KOKAMBA
8. Malako nini Yesu apesaki bayekoli na ye?
8 Ntango bakristo Baebre bazwaki mokanda ya Paulo, mwa bambula moke na nsima bamonaki mampinga ya basoda ya Roma ezingi engumba Yerusaleme. Ntango likambo yango esalemaki, bayebaki ete ezali ntango ya kokima; emonisaki ete engumba Yerusaleme ekobebisama. (Mat. 24:3; Luka 21:20, 24) Kasi basengelaki kokima wapi? Yesu alobaki kaka: “Baoyo bazali na Yudea bábanda kokima na bangomba.” (Luka 21:21) Nzokande bangomba ezalaki ebele na etúká yango. Na yango bakokima na ngámbo nini?
9. Mpo na nini bakristo bakokaki komituna soki bákima na ngomba nini? (Talá mpe karte.)
9 Ezalaki na bangomba ebele epai bakristo bakokaki kokima; na ndakisa ezalaki na bangomba ya Samaria, bangomba na Galile, Ngomba Heremone, bangomba ya Liban, mpe bangomba oyo ezalaki na ngámbo mosusu ya Yordani. (Talá karte.) Bingumba mosusu oyo ezalaki na bisika yango ya bangombangomba ezalaki komonana lokola bingumba oyo likama ekoki kokóma te. Na ndakisa, engumba Gamala ezalaki likoló ya ngomba moko molai mpe ezalaki mpasi mpenza mpo na kokóma kuna. Bayuda mosusu bazalaki komona engumba yango esika malamu ya libateli. Nzokande na Gamala, etumba endongwanaki kati na Bayuda mpe Baroma, mpe bato mingi babomamaki.b
Ezalaki na bangomba ebele epai bakristo bakokaki kokima, kasi nyonso te nde ezalaki na libateli (Talá paragrafe 9)
10-11. (a) Emonani ete Yehova atambwisaki bakristo ndenge nini? (Baebre 13:7, 17) (b) Litomba nini bakristo bazwaki lokola batosaki baoyo bazalaki kokamba? (Talá mpe elilingi.)
10 Emonani ete Yehova atambwisaki bakristo na nzela ya baoyo bazalaki kokamba lisangá. Moto moko ya mayele na Istware na nkombo Eusèbe ayaki kokoma boye: “Na litambwisi ya Nzambe, bato ya lisangá ya Yerusaleme bazwaki emoniseli oyo epesamaki epai ya mibali oyo bandimami; bazwaki malako . . . ya kolongwa na engumba yango liboso etumba ebanda mpe bafandaki na engumba moko ya Perea, na nkombo Pela.” Emonani ete Pela ezalaki esika oyo ebongaki mpenza. Lokola ezalaki mosika te na Yerusaleme, ezalaki mpenza mpasi te kokóma kuna. Lisusu, lokola bato mingi na Pela bazalaki Bayuda te, balukaki te kobundisa Baroma mpo na kozwa bonsomi.—Talá karte.
11 Bakristo oyo bakimaki na bangomba yango basalelaki toli ya Paulo ete: “Bótosaka baoyo bazali kokamba” na lisangá. (Tángá Baebre 13:7, 17.) Lokola batosaki, babikaki. Yango emonisi ete Nzambe asundolaki te baoyo bazalaki “kozela engumba oyo ezali na miboko ya solosolo,” elingi koloba Bokonzi ya Nzambe.—Ebr. 11:10.
Pela ezalaki mosika te mpe ezalaki na libateli (Talá paragrafe 10-11)
12-13. Ndenge nini Yehova atambwisaki basaleli na ye na ntango ya mpasi?
12 Liteya mpo na biso: Yehova asalelaka baoyo bazali kokamba mpo na kopesa basaleli na ye malako ya sikisiki. Biblia ezali na bandakisa ebele oyo emonisi ndenge Yehova atyaki bakɛngɛli mpo na kotambwisa bato na ye na ntango ya mpasi. (Mib. 31:23; Nz. 77:20) Biso mpe lelo tozali komona polele ete Yehova asalelaka baoyo bazali kokamba mpo na kotambwisa biso.
13 Na ndakisa, ntango maladi ya coronavirus ebandaki, “baoyo bazali kokamba” bapesaki masangá malako oyo ebongaki. Bandeko yango bayebisaki bankulutu ndenge oyo bandeko basengeli kosala makita mpe kokoba kosambela Yehova. Mwa basanza na nsima, tosalaki liyangani ya etúká na minɔkɔ koleka 500 na ndenge oyo esalemá naino te na nzela ya Internet, TV, mpe radio. Ata na kati ya maladi mabe yango, tokobaki kozwa bilei ya elimo. Na yango, tobatelaki bomoko na biso. Tokoki komindimisa ete ata soki tokutani na mikakatano nini na mikolo ezali koya, Yehova akokoba kosalisa bandeko oyo bakambaka biso bázwa bikateli ya malamu mpo na kotambwisa biso. Mpo tómibongisa mpo na bolɔzi monene mpe tósala makambo na bwanya na ntango yango ya mpasi mpenza, tomoni ete tosengeli kotyela Yehova motema mpe kotosa malako na ye. Kasi, bizaleli nini mosusu tosengeli na yango?
MONISÁ BOLINGO YA BONDEKO MPE EZALELI YA KOYAMBA BAPAYA
14. Na kotalela Baebre 13:1-3, bizaleli nini bakristo basengelaki komonisa mwa bambula liboso Yerusaleme ebebisama?
14 Ntango bolɔzi monene ekobanda, ekosɛnga tómoniselana bolingo mingi koleka. Na ntango yango, ekosɛnga tólanda ndakisa ya bakristo oyo bazalaki kofanda na Yerusaleme mpe na Yudea. Bazalaki komoniselana bolingo banda kala. (Ebr. 10:32-34) Kasi, mwa bambula liboso Yerusaleme ebebisama, bakristo yango basengelaki “kolingana ndenge bandeko balinganaka” mpe komonisa “ezaleli ya koyamba bapaya” lisusu mingi koleka.c (Tángá Baebre 13:1-3.) Ekosɛnga mpe tómoniselana bolingo ndenge wana na ntango ya bolɔzi monene.
15. Nsima ya kokima, mpo na nini bakristo Baebre basengelaki komonisa bolingo ya bondeko mpe ezaleli ya koyamba bapaya?
15 Mampinga ya basoda ya Roma ezingaki Yerusaleme mpe na nsima elongwaki na mbalakaka. Yango epesaki bakristo nzela ya kokima, kasi bakokaki komema biloko mingi te. (Mat. 24:17, 18) Basengelaki kosalisana na nzela ntango bazalaki kokende na bangomba, mpe ntango bakómaki na Pela, esika oyo bamesanaki na yango te. Na ntembe te, bosɛnga ya biloko ndenge na ndenge ezalaki mpenza makasi, mpe yango epesaki bakristo libaku ya komonisa bolingo ya bondeko ya solosolo mpe ezaleli ya koyamba bapaya; bakokaki kosalisana mpe kokabola na basusu biloko oyo bazalaki na yango.—Tito 3:14.
16. Ndenge nini tokoki komonisa bolingo epai ya bandeko oyo bazali na bosɛnga? (Talá mpe elilingi.)
16 Liteya mpo na biso: Bolingo etindaka biso tósalisa bandeko oyo bazali na bosɛnga. Na ndakisa, ntango bandeko bakimaki mboka mpo na bitumba mpe makama oyo euti kosalema, bandeko mingi bamipesaki mpo na kosalisa bango na elimo mpe bapesaki bango biloko ya kobikela oyo esengeli. Ndeko mwasi moko ya Ukraine oyo akimaki mboka mpo na bitumba alobaki boye: “Tomoni ndenge Yehova atambwisi biso mpe akokisi bamposa na biso na nzela ya bandeko. Bayambaki biso malamu mpe basalisaki biso ntango tozalaki na Ukraine, na Hongrie, mpe sikoyo awa na Allemagne.” Tóyeba ete ntango tomoniseli bandeko ezaleli ya koyamba bapaya mpe tokokisi bamposa na bango, Yehova asaleli biso mpo na kosalisa basusu.—Mas. 19:17; 2 Ko. 1:3, 4.
Bandeko oyo bakimá mboka bazalaka na mposa ya lisalisi na biso (Talá paragrafe 16)
17. Mpo na nini ezali na ntina tómonisa bolingo ya bondeko mpe ezaleli ya koyamba bapaya banda sikoyo?
17 Na ntembe te na mikolo ezali koya, ekosɛnga kosalisa bandeko lisusu mingi na ndenge wana. (Hab. 3:16-18) Banda sikoyo, Yehova azali koteya biso ndenge ya komonisa bolingo ya bondeko mpe ezaleli ya koyamba bapaya, bizaleli oyo ekozala na ntina mingi mpenza na ntango wana.
MAKAMBO OYO EZALI KOYA
18. Ndenge nini tokoki komekola bakristo Baebre lelo?
18 Bakristo oyo batosaki mpe bakimaki na bangomba bazwaki te likama oyo ekómelaki Yerusaleme. Basundolaki engumba yango, kasi Yehova asundolaki bango ata moke te. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na bango? Toyebi te makambo nyonso oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Kasi Yesu alobaki tómilɛngɛla mpo na kotosa. (Luka 12:40) Tozali mpe na toli oyo Paulo akomaki na mokanda na ye epai ya Baebre, mpe ekoki kosalisa biso lelo oyo kaka ndenge esalisaki bakristo na siɛklɛ ya liboso. Lisusu, Yehova apesi mokomoko na biso elaka ete akotika biso te mpe akosundola biso ata moke te. (Ebr. 13:5, 6) Tiká ete tókoba kozela mpenza engumba oyo ekoumela seko, elingi koloba Bokonzi ya Nzambe, mpe na nsima tokozwa mapamboli ya seko oyo yango ekomema.—Mat. 25:34.
LOYEMBO 157 Kimya ya solo!
a Na ntango ya kala, bingumba mingi ezalaki na mokonzi. Engumba ya ndenge wana ekokaki kotalelama lokola bokonzi.—Eba. 14:2.
b Esalemaki na mobu 67 T.B., mwa moke nsima ya kolongwa ya bakristo na Yudea mpe na Yerusaleme.
c Liloba oyo ebongolami na “bólingana ndenge bandeko balinganaka” ekoki kosalelama mpo na bandeko ya libota, kasi Paulo asalelaki yango mpo na kolobela bolingo kati na bandeko ya lisangá.