LISOLO YA BOYEKOLI 27
LOYEMBO 79 Tóteya bango bátɛlɛma ngwi
Salisá bayekoli ya Biblia bázwa ekateli ya kosalela Yehova
“Bótɛlɛma ngwi na kondima . . . bózala makasi.”—1 KO. 16:13.
NA MOKUSE
Tokolobela ndenge oyo tokoki kosalisa bayekoli ya Biblia bákóma na kondima mpe na mpiko oyo esengeli mpo bázwa ekateli ya kosalela Yehova.
1-2. (a) Mpo na nini bayekoli mosusu ya Biblia bakakatanaka kozwa ekateli ya kosalela Yehova? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?
NTANGO ozalaki koyekola Biblia, ozalaki kokakatana mpo na kokóma Motatoli ya Yehova? Mbala mosusu ozalaki kobanga ete bato oyo osalaka na bango, baninga na yo, to bato ya libota na yo bátɛmɛla yo. To mbala mosusu ozalaki komona ete okokoka ata moke te kotosa mibeko ya Nzambe na bomoi na yo. Soki bongo, boye oyebi malamu mayoki ya bayekoli ya Biblia oyo bazali kokakatana mpo na kozwa ekateli ya kosalela Yehova.
2 Yesu ayebaki ete soki moto azali kobanga ndenge wana, ekoki mpenza kopekisa ye akola na elimo. (Mat. 13:20-22) Kasi, asundolaki te baoyo bazalaki kokakatana mpo na kokóma bayekoli na ye. Kutu, alakisaki bayekoli na ye ndenge ya kosalisa bato yango mpo (1) báyeba makambo oyo ezali kopekisa bango bákola na elimo, (2) bákóma kolinga Yehova mingi, (3) bátya Nzambe na esika ya liboso, mpe (4) bálonga botɛmɛli. Ndenge nini tokoki kosalela makambo yango ntango tozali koyekola na moto buku Sepelá na bomoi libela na libela! mpo na kosalisa ye azwa ekateli ya kosalela Yehova?
SALISÁ MOYEKOLI AYEBA MAKAMBO OYO EZALI KOPEKISA YE AKOLA NA ELIMO
3. Ekoki kozala nini nde epekisaki Nikodeme akóma moyekoli ya Yesu?
3 Nikodeme, moto moko ya lokumu na kati ya Bayuda, azalaki kokakatana mpo na kokóma moyekoli ya Yesu. Ntango Yesu abandaki mosala na ye, esalaki kaka sanza soki motoba mpamba, Nikodeme andimaki ete azali momonisi ya Nzambe. (Yoa. 3:1, 2) Kasi, Nikodeme akendaki kokutana na Yesu na kobombana mpo ‘azalaki kobanga Bayuda.’ (Yoa. 7:13; 12:42) Mbala mosusu azalaki komona ete akobungisa mingi soki akómi moyekoli ya Yesu.a
4. Ndenge nini Yesu asalisaki Nikodeme akanga ntina ya makambo oyo Nzambe alingaki ete asala?
4 Nikodeme ayebaki malamu Mobeko ya Moize, kasi azalaki na mposa moto asalisa ye akanga ntina ya makambo oyo Yehova alingaki ete asala. Ndenge nini Yesu asalisaki ye? Yesu apesaki Nikodeme ntango, asololaki na ye kutu na butu. Lisusu, Yesu ayebisaki Nikodeme polele makambo oyo asengeli kosala mpo na kokóma moyekoli na ye: kobongola motema na masumu na ye, kozwa batisimo na mai, mpe komonisa kondima epai ya Mwana ya Nzambe.—Yoa. 3:5, 14-21.
5. Ndenge nini tokoki kosalisa moyekoli ya Biblia ayeba makambo oyo ezali kopekisa ye akola?
5 Lelo mpe, ata soki moyekoli azali koyeba malamu mateya ya Biblia, akoki kaka kozala na mposa tósalisa ye ayeba makambo oyo ezali kopekisa ye akola. Na ndakisa, ekoki kozala ete mosala na ye to botɛmɛli ya libota ezali kopekisa ye amityela mikano ya elimo. Na yango, lokola Yesu, pesá moyekoli na yo ntango. Okoki kobengisa ye mpo bólya mwa eloko to bókende kozwa mopɛpɛ. Na bantango ya ndenge wana, okoki kozwa libaku ya kosalisa ye ayebisa yo mikakatano na ye. Lendisá moyekoli na yo asala bambongwana oyo esengeli, mpo asepelisa yo te, kasi mpo amonisa ete alingaka Yehova.
6. Ndenge nini okoki kosalisa moyekoli ya Biblia akóma na mpiko ya kosalela makambo oyo azali koyekola? (1 Bakorinti 16:13)
6 Ntango moyekoli ya Biblia andimi ete Yehova akosalisa ye atosa mibeko ya Nzambe, akokóma na mpiko ya kosalela makambo oyo azali koyekola. (Tángá 1 Bakorinti 16:13.) Mosakoli azali lokola molakisi na eteyelo. Na ntembe te, molakisi ya malamu amonisaka motema molai mpe asalisaka bana-kelasi báyeba ete bazali na makoki oyo bakoki kosalela. Ndenge moko mpe, moteyi malamu ya Biblia asukaka kaka te na koteya makambo oyo Nzambe azali kosɛnga biso, kasi asalisaka mpe moyekoli na ye amindimisa ete na lisalisi ya Yehova, akoki kosala bambongwana oyo esengeli. Ndenge nini okoki kosala yango?
SALISÁ MOYEKOLI AKÓMA KOLINGA YEHOVA MINGI
7. Ndenge nini Yesu asalisaki bayoki na ye bákolisa bolingo na bango mpo na Yehova?
7 Yesu ayebaki ete ntango moto akómi kolinga Nzambe, ekotinda ye asalela makambo oyo azali koyekola. Yango wana, mbala mingi azalaki koteya bayekoli na ye makambo oyo ekosalisa bango bákolisa bolingo na bango mpo na Tata na bango ya likoló. Na ndakisa, ateyaki bango ete Yehova azali lokola tata oyo apesaka bana na ye biloko ya malamu. (Mat. 7:9-11) Ekoki kozala ete bayoki mosusu ya Yesu bazalaki na tata ya bolingo ya ndenge wana te. Kanisá mpe ndenge bamiyokaki ntango Yesu apesaki ndakisa ya tata moko ya motema mawa oyo ayambaki mwana na ye, atako asalaki makambo mingi ya mabe. Na ntembe te, bamonaki ndenge Yehova amoniselaka bana na ye awa na mabele motema mawa.—Luka 15:20-24.
8. Ndenge nini okoki kosalisa moyekoli ya Biblia akóma kolinga Yehova mingi?
8 Yo mpe okoki kosalisa moyekoli ya Biblia akóma kolinga Yehova mingi soki ozali kobenda likebi na ye na bizaleli ya Nzambe ntango ozali koteya ye. Salisáká ye amona boyokani oyo ezali kati na makambo oyo azali koyekola mpe bolingo ya Yehova. Ntango bozali kolobela lisiko, monisá ye polele ete Yehova apesaki yango kaka mpo na bato nyonso te, kasi mpo na ye mpe. (Rom. 5:8; 1 Yoa. 4:10) Na ntembe te, moyekoli akobanda kolinga Yehova ntango amoni ete ye mpe alingaka ye mpenza.—Gal. 2:20.
9. Nini esalisaki mobali moko na nkombo Michael abongola bomoi na ye?
9 Talá ndakisa ya Michael, oyo afandaka na Indonésie. Ayebaki solo ntango azalaki mwana moke, kasi azwaki batisimo te. Ntango akómaki na mbula 18, akendaki na mboka mopaya mpe akómaki sofɛlɛ ya mituka ya minene. Na nsima ayaki kobala na Indonésie, kasi atikaki libota na ye kuna mpe akendaki lisusu kosala na mboka mopaya. Na ntango yango, mwasi na ye ná bana na ye mibale ya basi babandaki koyekola Biblia mpe bakómaki kosalela makambo oyo bazalaki koyekola. Na nsima, ntango mama ya Michael akufaki, Michael azwaki ekateli ya kozonga na Indonésie mpo na kosalisa tata na ye, mpe andimaki koyekola Biblia. Ntango bayekolaki liteya 27 ya buku Sepelá na bomoi libela na libela!, eteni “Kɔtá na mozindo” esimbaki mpenza motema ya Michael. Ntango akanisaki ndenge oyo na ntembe te Yehova amiyokaki ntango amonaki Mwana na ye azali konyokwama, Michael alelaki. Yango esalisaki ye akóma na botɔndi mingi mpo na lisiko mpe etindaki ye abongola bomoi na ye mpe azwa batisimo.
SALISÁ MOYEKOLI ATYA YEHOVA NA ESIKA YA LIBOSO
10. Ndenge nini Yesu asalisaki bayekoli na ye bátya mosala ya Nzambe na esika ya liboso? (Luka 5:5-11) (Talá mpe elilingi.)
10 Bato mosusu oyo Yesu ateyaki na siɛklɛ ya liboso bandimaki mbala moko ete ye nde Masiya oyo alakamaki, kasi bazalaki na mposa ya lisalisi mpo bábanda kotya mosala ya Nzambe na esika ya liboso. Petro ná Andre basilaki kokóma bayekoli ntango Yesu asɛngaki bango bálanda ye ntango nyonso mpe bákóma baluki-bato. (Mat. 4:18, 19) Bazalaki na mosala ya koboma mbisi oyo ezalaki kofuta malamu, mpe emonani ete bazalaki kosala elongo na Yakobo ná Yoane. (Mrk. 1:16-20) Mpe ntango Petro ná Andre “basundolaki minyama na bango,” na ntembe te bazwaki bibongiseli mpo mabota na bango ezangaka eloko ya kobikela te wana bango bazali kolanda Yesu. Nini etindaki bango bátika mosala na bango mpe bátya mosala ya Nzambe na esika ya liboso? Evanzile ya Luka elobi ete Yesu asalaki likamwisi moko oyo endimisaki bango mpenza ete Yehova azali na likoki ya kokokisa bamposa na bango.—Tángá Luka 5:5-11.
Yesu asalaki likamwisi mpo na kosalisa bayekoli na ye bátya mosala ya Nzambe na esika ya liboso; yango ezali koteya biso nini? (Talá paragrafe 10)b
11. Okoki koyebisa moyekoli nini mpo na kokómisa kondima na ye makasi?
11 Biso tokoki kosala makamwisi te lokola Yesu, kasi tokoki kobɛtela basusu masolo oyo emonisi ndenge Yehova akokisaka bamposa ya baoyo batyaka Ye na esika ya liboso. Na ndakisa, ozali na lisolo moko oyo emonisi ndenge Yehova asalisaki yo ntango obandaki koyangana na makita? Mbala mosusu esɛngaki osolola na patrɔ na yo mpe olimbwela ye ntina oyo okoki kosala lisusu nsima ya bangonga ya mosala te soki ezali mokolo na yo ya makita. Ntango ozali kobɛtela moyekoli masolo ya ndenge wana, monisá ye ndenge kondima na yo ekómaki makasi ntango omonaki ete Yehova apambolaki ekateli na yo ya kotya losambo na ye na esika ya liboso.
12. (a) Mpo na nini tosengeli komema bandeko ndenge na ndenge mpo na koyekola na moyekoli na biso? (b) Ndenge nini okoki kosalela malamu bavideo? Pesá ndakisa.
12 Moyekoli na yo akozwa mpe matomba soki ayoki ndenge bakristo mosusu basalaki bambongwana mpo na kotya Yehova na esika ya liboso. Na yango, bimáká mosala ya kosakola elongo na bandeko oyo bakutaná na makambo ekeseni na bomoi na bango. Sɛngá bango bálimbola ndenge oyo bayambaki solo mpe makambo oyo basalaki mpo bátya Yehova na esika ya liboso na bomoi na bango. Lisusu, elongo na moyekoli na yo, bótalaka bavideo ya eteni “Kɔtá na mozindo” to ya eteni “Makanisi mosusu” na buku Sepelá na bomoi libela na libela! Na ndakisa, ntango bozali na liteya 37 mpe botali video Yehova akokokisa bamposa na biso, okoki kobenda likebi ya moyekoli na mateya oyo tokoki kozwa.
SALISÁ MOYEKOLI ALONGA BOTƐMƐLI
13. Ndenge nini Yesu abongisaki bayekoli na ye mpo na botɛmɛli?
13 Yesu ayebisaki bayekoli na ye mbala na mbala ete bato, ata mpe bandeko ya libota na bango, bakotɛmɛla bango. (Mat. 5:11; 10:22, 36) Pene na nsuka ya mosala na ye, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete bato bakoluka ata koboma bango. (Mat. 24:9; Yoa. 15:20; 16:2) Alendisaki bango bázala ekɛngɛ na mosala ya kosakola. Na ndakisa, apesaki bango toli ete báluka te kowelana na baoyo bazali kotɛmɛla bango, mpe básala makambo na mayele mpo bázala na likoki ya kokoba kosakola.
14. Ndenge nini okoki kosalisa moyekoli amibongisa mpo na botɛmɛli? (2 Timote 3:12)
14 Biso mpe tokoki kosalisa moyekoli ya Biblia amibongisa mpo na botɛmɛli soki toyebisi ye makambo oyo bato oyo asalaka na bango, baninga na ye, mpe bandeko ya libota na ye bakoki koloba na ye. (Tángá 2 Timote 3:12.) Na mosala, bato mosusu bakoki kotyola ye mpo akómi kotosa mibeko ya Nzambe. Bato mosusu, ata mpe bandeko ya libota, bakoki koloba na ye mabe mpo akómi kondima mateya ya Biblia. Soki tobongisi bayekoli liboso ete botɛmɛli eya, bakoyeba ndenge ya kosala mpo na yango ntango ekoya.
15. Nini ekoki kosalisa moyekoli soki azali kokutana na botɛmɛli na libota?
15 Soki botɛmɛli euti na libota, okoki kolendisa moyekoli na yo akanisa makambo oyo ezali kopesa bandeko na ye mosusu nkanda. Mbala mosusu bazali kokanisa ete azali kobunga nzela, to mbala mosusu bakaniselaka Batatoli ya Yehova mabe. Ata Yesu mpe akutanaki na makambo ya ndenge wana na libota. (Mrk. 3:21; Yoa. 7:5) Na yango, teyá moyekoli na yo azala na motema molai mpe alobaka na basusu na boboto, ata mpe bandeko na ye ya libota.
16. Ndenge nini tokoki kosalisa moyekoli ya Biblia ayeba koyebisa basusu bindimeli na ye?
16 Ata ntango bandeko ya libota basepeli koyeba makambo ya Biblia, ezali malamu moyekoli alimbwela bango makambo ebeleebele te na mbala moko. Soki asali bongo, ekoki kotya bandeko na ye mobulu na motó, mpe mbala mosusu bakolinga lisusu te kosolola na ye mbala ya nsima. Na yango, lendisá moyekoli ayebisaka basusu bindimeli na ye na ndenge oyo ekosala ete bálinga lisusu koyoka ye mbala ya nsima. (Kol. 4:6) Akoki mpe kosɛnga bandeko na ye bákɔta na site jw.org. Yango ekosalisa bango báyekola makambo mingi oyo etali Batatoli ya Yehova na ndenge oyo bango moko balingi.
17. Ndenge nini okoki kosalisa moyekoli ayeba koyanola na mituna oyo bato batunaka mpo na Batatoli ya Yehova? (Talá mpe elilingi.)
17 Okoki kosalela masolo ya jw.org na eteni “Mituna oyo bato batunaka mingi” mpo na kosalisa moyekoli na yo abongisa mwa biyano ya mikuse mpo na koyanola na mituna oyo bandeko na ye to baninga ya mosala bakoki kotuna ye. (2 Tim. 2:24, 25) Na yango, na nsuka ya liteya mokomoko, bótalelaka eteni “Soki moto alobi na yo” na buku Sepelá na bomoi libela na libela! Lendisá ye abongisa biyano oyo akopesa. Soki esengeli, okoki kosalisa ye abimisa eyano ya malamu koleka. Komekameka ndenge wana ekosalisa ye azala na mpiko mpo na kolimbola bindimeli na ye.
Lakisáká moyekoli ndenge ya kosakola mpo na kolendisa ye akóma mosakoli (Talá paragrafe 17)c
18. Ndenge nini okoki kosalisa moyekoli abanda kobima na mosala ya kosakola? (Matai 10:27)
18 Yesu atindaki bayekoli na ye básakwela bato nsango malamu. (Tángá Matai 10:27.) Soki moyekoli abandi kobima na mosala ya kosakola noki, akoyekola mpe noki kotyela Yehova motema. Ndenge nini okoki kosalisa moyekoli amityela mokano yango? Ntango bapesi liyebisi na lisangá ete kampanye moko ekosalema, salisá moyekoli na yo akanisa ndenge ya kokokisa masɛngami mpo na kokóma mosakoli. Yebisá ye ntina oyo basusu bamoni ete kobanda kosakola na eleko ya kampanye ezalaka mpasi te. Akozwa mpe formasyo ya malamu soki abandi kosala badevuare na likita ya kati ya pɔsɔ. Na ndenge yango, akoyekola kolobela bindimeli na ye na mpiko.
MONISÁ MOYEKOLI ETE OZALI KOTYELA YE MOTEMA
19. Ndenge nini Yesu amonisaki ete atyelaki bayekoli na ye motema, mpe ndenge nini tokoki komekola ye?
19 Liboso Yesu amata na likoló, ayebisaki bayekoli na ye ete bakozala lisusu elongo na ye. Kasi, bakangaki ntina te ete Yesu azalaki koloba ete bango mpe bakokende na likoló. Atako bongo, Yesu atyaki likebi na bosembo na bango, kasi te na bantembe oyo bazalaki na yango. (Yoa. 14:1-5, 8) Ayebaki ete esengelaki kotikela bango ntango mpo bákanga ntina ya mateya mosusu, lokola elikya ya kokende likoló. (Yoa. 16:12) Biso mpe tokoki komonisa moyekoli na biso ete totye motema ete azali na mposa ya kosepelisa Yehova.
Soki moyekoli abandi kobima na mosala ya kosakola noki, akoyekola mpe noki kotyela Yehova motema
20. Ndenge nini ndeko mwasi moko na Malawi amonisaki ete atyelaki moyekoli na ye motema?
20 Tobatelaka elikya ete moyekoli na biso akosalela makambo oyo azali koyekola. Tózwa ndakisa ya Chifundo, ndeko mwasi moko na Malawi. Abandaki koyekola buku Sepelá na bomoi libela na libela! elongo na Alinafe, elenge mwasi oyo azalaki moto ya Lingomba ya Katolike. Nsima ya koyekola liteya 14, Chifundo atunaki Alinafe soki akanisi nini na oyo etali kosalela bikeko na losambo. Alinafe ayokaki mabe mpenza mpe alobaki: “Ezali ekateli ya moto ye moko!” Chifundo amitungisaki, akanisaki ete boyekoli na bango ekokatana. Kasi, amonisaki motema molai mpe akobaki koyekola na Alinafe, na elikya ete nsukansuka akokanga ntina. Mwa basanza na nsima, Chifundo atunaki ye motuna oyo ezali na liteya 34: “Makambo oyo oyekoli mpo na Yehova Nzambe ya solo, esalisi yo na nini?” Chifundo ayebisi eyano ya Alinafe; alobi ete Alinafe “atángaki makambo ebele ya malamu, kati na yango alobaki ete Batatoli ya Yehova basalaka te makambo oyo Biblia epekisi.” Mwa moke na nsima, Alinafe atikaki kosalela bikeko mpe azwaki batisimo.
21. Ndenge nini tokoki kosalisa moyekoli ya Biblia azwa ekateli ya kosalela Yehova?
21 Ya solo Yehova nde “akolisaka,” kasi biso mpe tokoki kosalisa moyekoli ya Biblia akola. (1 Ko. 3:7) Na yango, tosengeli kosuka kaka te na koteya ye makambo oyo Nzambe azali kosɛnga ye. Tósalisa ye alinga Yehova mingi. Tólendisa ye ayekola kotya Yehova na esika ya liboso. Mpe tólakisa ye ndenge ya kotyela Yehova motema ntango akutani na botɛmɛli. Lisusu, ntango tozali komonisa ye ete tozali kotyela ye motema ete ye mpe akoki kotosa mibeko ya Yehova na bomoi na ye, ekopesa ye makasi ya kozwa ekateli ya kosalela ye.
LOYEMBO 55 Bóbanga bango te!
a Mbula mibale ná ndambo nsima ya kokutana na Yesu, Nikodeme azalaki kaka mosangani ya tribinale monene ya Bayuda. (Yoa. 7:45-52) Buku moko elobi ete na kolanda masolo ya Bayuda, Nikodeme akómaki mokristo kaka nsima ya liwa Yesu.—Yoa. 19:38-40.
b NDIMBOLA YA BILILINGI: Petro ná bato mosusu batiki mosala na bango ya koboma mbisi mpo na kolanda Yesu.
c NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mwasi moko azali kosalisa moyekoli ayekola ndenge ya kosakwela basusu.