LISOLO YA BOYEKOLI 28
LOYEMBO 88 Teyá ngai banzela na yo
Mpo na nini osengeli kolukaka toli?
“Bwanya ezali epai ya baoyo balukaka toli.”—MAS. 13:10.
NA MOKUSE
Tokolobela makambo oyo tosengeli kosala mpo toli oyo tozwi esalisa biso mpenza.
1. Nini ekoki kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu mpe tólonga na makambo oyo tokani? (Masese 13:10; 15:22)
BISO nyonso tolingaka ete bikateli oyo tozwi ezala ya malamu. Mpe biso nyonso tolingaka ete makambo oyo tokani elonga. Liloba ya Nzambe eyebisi biso ete mpo na kozwa bikateli ya malamu mpe kolonga na makambo oyo tokani, tosengeli kolukaka toli.—Tángá Masese 13:10; 15:22.
2. Yehova alaki kosala nini mpo na biso?
2 Ya solo, epai oyo tokoki koluka bwanya mpe toli oyo eleki malamu ezali epai ya Tata na biso, Yehova. Mpe alaki ete akosalisa biso; alobi: “Nakopesa yo toli wana liso na ngai ezali kotala yo.” (Nz. 32:8) Maloba yango emonisi ete Yehova asukaka kaka te na kopesa biso toli; atyelaka biso likebi mpo na kopesa biso toli oyo ebongi na biso mpenza mpe asalisaka biso tósalela yango.
3. Tokolobela nini na lisolo oyo?
3 Na lisolo oyo, tokosalela Liloba ya Nzambe mpo na kozwa biyano na mituna oyo minei: (1) Bizaleli nini nasengeli kozala na yango mpo nasalela toli ya malamu oyo nazwi? (2) Nani akoki kopesa ngai toli ya malamu? (3) Ndenge nini nakoki komonisa ete nazali na makanisi ya malamu? (4) Mpo na nini nasengeli koboya kosɛnga ete basusu bázwa bikateli na esika na ngai?
BIZALELI NINI NASENGELI KOZALA NA YANGO?
4. Mpo tósalela mpenza toli ya malamu oyo tozwi, bizaleli nini tosengeli kozala na yango?
4 Mpo tósalela toli ya malamu oyo tozwi, tosengeli kozala na komikitisa mpe bopɔlɔ. Bizaleli yango ekosalisa biso tóndima ete na bantango mosusu toyebaka te tósala nini, mpe tozalaka na boyebi oyo esengeli te mpo na kozwa ekateli ya malamu kaka biso moko. Soki tozali na komikitisa te mpe na bopɔlɔ te, ekozala mpasi Yehova asalisa biso. Mpe toli nyonso oyo tokozwa ntango tozali kotánga Liloba na ye ekoki kozala kaka lokola bazali kosopa mai na mokɔngɔ ya libata. (Mika 6:8; 1 Pe. 5:5) Kasi, soki tozali na komikitisa mpe na bopɔlɔ, tokondima mbala moko toli oyo euti na Biblia mpe tokosalela yango.
5. Makambo nini oyo Davidi asalaki na bomoi na ye ekokaki kokómisa ye moto ya lolendo?
5 Tótala liteya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Mokonzi Davidi. Makambo oyo asalaki na bomoi na ye ekokaki kokómisa ye moto ya lolendo. Na ndakisa, bambula mingi liboso azwa kiti ya bokonzi, azalaki mobɛti-miziki ya malamu mpenza. Bazwaki ye kutu abɛtelaka mokonzi miziki. (1 Sa. 16:18, 19) Nsima ya kotya Davidi mafuta mpo akóma mokonzi nsima ya Saulo, Yehova apesaki Davidi elimo santu mpe akómaki na nguya. (1 Sa. 16:11-13) Bato bakumisaki ye mingi mpo alongaki banguna ya Yisraele, ata mpe Goliate, engambe Mofilistia. (1 Sa. 17:37, 50; 18:7) Na kotalela makambo oyo asalaki, soki Davidi azalaki moto ya lolendo, akokaki kokanisa ete azali na ntina moko te ya koyoka toli ya basusu. Kasi Davidi azalaki na komikitisa.
6. Ndenge nini toyebi ete Davidi azalaki kondima toli? (Talá mpe elilingi )
6 Nsima ya kotyama mokonzi, Davidi azalaki na bato oyo bazalaki kopesa ye toli. (1 Nt. 27:32-34) Ezali likambo ya kokamwa te, mpo banda kala Davidi azalaki koyoka basusu ntango bapesi ye toli ya malamu. Andimaki kaka te toli oyo euti epai ya mibali, kasi andimaki mpe toli ya mwasi moko na nkombo Abigaile. Abigaile azalaki mwasi ya Nabale, mobali oyo azalaki kopesa basusu limemya te, azangá botɔndi, mpe atondi na moimi. Na komikitisa nyonso, Davidi asalelaki toli ya mwasi yango, mpe na bongo asalaki te libunga moko ya monene.—1 Sa. 25:2, 3, 21-25, 32-34.
Na komikitisa nyonso Mokonzi Davidi andimaki mpe asalelaki toli ya Abigaile (Talá paragrafe 6)
7. Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Davidi? (Mosakoli 4:13) (Talá mpe bililingi.)
7 Tokoki kozwa mwa mateya epai ya Davidi. Na ndakisa, mbala mosusu toyebi kosala likambo moko malamu to tozali na mwa bokonzi. Atako bongo, tosengeli ata moke te kokanisa ete toyebi nyonso mpe tozali na mposa ya toli te. Lisusu, lokola Davidi, tosengeli kozala pene ya koyoka toli ya malamu, ata soki nani nde apesi yango. (Tángá Mosakoli 4:13.) Soki tozali kosala bongo, tokoki kokima mabunga ya minene oyo ekoki komemela biso mpe basusu mpasi.
Tosengeli kozala pene ya koyoka toli ya malamu ata soki nani nde apesi biso yango (Talá paragrafe 7)c
NANI AKOKI KOPESA NGAI TOLI YA MALAMU?
8. Mpo na nini Yonatane akokaki kopesa Davidi toli ya malamu?
8 Talá liteya mosusu oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Davidi. Azalaki koluka toli epai ya bato oyo bazalaki na boyokani malamu na Yehova, kasi oyo bayebaki mpe ndenge ya kosalisa ye na mokakatano oyo azali na yango. Na ndakisa, ntango alingaki koyeba soki boyokani na ye na Mokonzi Saulo ekokaki kobonga, Davidi ayokaki toli ya Yonatane, mwana ya Saulo. Mpo na nini Yonatane akokaki kopesa ye toli ya malamu na likambo yango? Mpo azalaki na boyokani malamu na Yehova, kasi ayebaki mpe Saulo malamu. (1 Sa. 20:9-13) Yango ekoki koteya biso nini?
9. Ntango tozali na mposa ya toli, tosengeli koluka yango epai ya nani? Limbolá. (Masese 13:20)
9 Ntango tozali na mposa ya toli, ekozala malamu tótuna moto oyo azali na boyokani malamu na Yehova, kasi oyo ayebi mpe ndenge ya kosalisa biso na likambo oyo tozali na yango.a (Tángá Masese 13:20.) Na ndakisa, kanisá ete ndeko mobali moko ya elenge azali koluka molongani oyo abongi na ye. Nani akoki kopesa ye toli ya malamu? Soki atuni moninga na ye oyo abalá te, akoki mpe kosalisa ye soki apesi ye toli oyo eyokani na mitinda ya Biblia. Nzokande, ndeko yango akoki kozwa toli ya sikisiki mpe oyo ebongi mpenza soki atuni babalani oyo bakɔmɛli na elimo, oyo bayebi ye malamu mpe oyo basali mwa ntango na libala mpe bazali na esengo.
10. Tokolobela nini sikoyo?
10 Tolobeli bizaleli mibale oyo tosengeli kozala na yango mpe nani akoki kopesa biso toli ya malamu. Sikoyo tólobela ndenge oyo tokoki komonisa ete tozali kosɛnga toli na makanisi ya malamu, mpe soki tosengeli kosɛnga basusu bázwa bikateli na esika na biso.
NDENGE NINI NAKOKI KOMONISA ETE NAZALI NA MAKANISI YA MALAMU?
11-12. (a) Bato mosusu basalaka nini? (b) Mokonzi Rehoboame asalaki nini ntango alingaki kozwa ekateli moko ya ntina?
11 Moto mosusu akoki komonisa lokola azali koluka toli, nzokande alingi kaka koyeba soki basusu mpe bakondima ekateli oyo asilaki kozwa. Moto ya ndenge wana azali komonisa ete azali kosɛnga toli na makanisi ya malamu te. Asengeli kokanisa likambo oyo ekómelaki Mokonzi Rehoboame.
12 Rehoboame akómaki koyangela Yisraele nsima ya Mokonzi Salomo. Rehoboame akutaki ekólo ezali na bomɛngo, kasi bato ya ekólo bamonaki ete Salomo akómaki kosɛnga bango mingi. Na yango bayaki epai ya Rehoboame mpe basɛngaki ye alɛmbisa kilo oyo Salomo atyelaki bango. Rehoboame ayebisaki bango bátikela ye ntango ya kokanisa ekateli oyo akozwa. Asalaki malamu na ndenge akendaki kotuna toli epai ya mikóló oyo bazalaki liboso kosalela Salomo. (1 Bak. 12:2-7) Kasi, aboyaki kolanda toli oyo mikóló bapesaki ye. Mpo na nini asalaki bongo? Rehoboame asilaki nde kokanisa oyo akosala mpe azalaki koluka kaka moto oyo akondima likanisi na ye? Soki ezali bongo, boye amonaki ete bato oyo bandimi likanisi na ye ezali baninga na ye oyo bazalaki bilenge, oyo atunaki toli na nsima. (1 Bak. 12:8-14) Rehoboame apesaki bato ya ekólo eyano na kolanda toli ya baninga na ye. Na yango, bato batombokaki mpe ekólo ekabwanaki; mpe banda wana, Rehoboame akutanaki na mikakatano mingi.—1 Bak. 12:16-19.
13. Ndenge nini tokoki koyeba soki tozali na makanisi ya malamu?
13 Lisolo ya Rehoboame ekoki koteya biso nini? Ntango tozali kosɛnga toli, tosengeli kozala na makanisi ya malamu. Ndenge nini tokoyeba soki tozali na makanisi ya malamu? Tokoki komituna boye: ‘Nakendaka kosɛnga toli mpe na nsima natyaka yango mbala moko mopanzi mpo yango te nde nalingi koyoka?’ Tótalela ndakisa moko.
14. Ntango tozwi toli, likambo nini tosengeli komikundwela? Pesá ndakisa. (Talá mpe elilingi.)
14 Kanisá ete balakisi ndeko mobali moko mosala oyo ekofuta ye malamu. Kasi liboso andima mosala yango, atuni nkulutu moko toli. Ndeko yango ayebisi nkulutu ete mosala yango ekosɛnga azala mosika ya libota na ye ntango molai. Nkulutu akundweli ndeko mobali yango etinda ya Biblia oyo emonisi ete mokumba na ye ya libosoliboso ezali ya kokokisa bamposa ya libota na ye na elimo. (Ef. 6:4; 1 Tim. 5:8) Kanisá ete ndeko yango asepeli te na maloba ya nkulutu mpe akei mbala moko kotunatuna bandeko mibali mosusu toli tii ntango moto akoyebisa ye likambo oyo alingi koyoka. Tokoloba ete ndeko yango azali mpenza koluka toli, to asilaki kozwa ekateli na ye mpe azali kaka koluka moto oyo akondima yango? Tosengeli komikundwela ete motema na biso ezali na bokosi. (Yir. 17:9) Tokoki koboya toli oyo bapesi biso, kasi ntango mosusu yango nde toli oyo tosengeli na yango mpenza.
Ozali mpenza koluka toli ya malamu, to ozali kaka koluka moto oyo akondima likanisi na yo? (Talá paragrafe 14)
NASENGELI KOSƐNGA BASUSU BÁZWA BIKATELI NA ESIKA NA NGAI?
15. Tosengeli koboya kosala nini, mpe mpo na nini?
15 Mokomoko na biso azali na mokumba ya kozwa bikateli ye moko. (Gal. 6:4, 5) Ndenge tomoni yango, moto ya bwanya akoluka toli na Liloba ya Nzambe mpe epai ya bakristo oyo bakɔmɛli liboso ete azwa ekateli. Kasi, tosengeli kokeba ete tósɛnga te basusu bázwa bikateli na esika na biso. Na ndakisa, bato mosusu batunaka mbala moko moto oyo bango bapesaka limemya ete: “Soki ezalaki yo, olingaki kosala nini?” Bato mosusu basalaka yango na ndenge ya polele te; bazwaka kaka ekateli oyo moto mosusu azwaki kozanga ete bákanisa malamumalamu bango moko.
16. Likambo nini ezalaki na lisangá ya Korinti na oyo etali mosuni oyo epesamaki liboso mbeka na bikeko, mpe nani azalaki na mokumba ya kozwa ekateli soki esengeli kolya yango to te? (1 Bakorinti 8:7; 10:25, 26)
16 Tólobela likambo oyo esalemaki na lisangá ya Korinti na siɛklɛ ya liboso na oyo etali kozwa ekateli mpo na mosuni oyo mbala mosusu epesamaki liboso mbeka epai ya bikeko. Paulo akomelaki bakristo yango boye: “Toyebi ete ekeko ezali nzambe ya solo te, mpe ete Nzambe azali kaka moko.” (1 Ko. 8:4) Ntango bayokaki bongo, bato mosusu na lisangá yango bazwaki ekateli ete bakoki kolya mosuni oyo mbala mosusu epesamaki mbeka na bikeko liboso báya kotɛka yango na zando ya misuni. Bamosusu bamonaki ete bakolya mosuni ya ndenge wana te mpo lisosoli na bango ekotungisama. (Tángá 1 Bakorinti 8:7; 10:25, 26.) Yango ezalaki ekateli ya moto na moto. Ata mbala moko te Paulo apesaki bandeko ya Korinti toli ete bázwa bikateli na esika ya basusu to mpe bálanda kaka ekateli oyo basusu bazwaki. Moto na moto asengelaki ‘kozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na ye moko.’—Rom. 14:10-12.
17. Nini ekoki kosalema soki tozali kozwa kaka bikateli oyo basusu bazwaki? Pesá ndakisa. (Talá mpe bililingi.)
17 Ndenge nini likambo ya ndenge wana ekoki kosalema lelo? Tózwa ndakisa ya biloko ya mikemike oyo ezalaka na kati ya makila. Mokristo mokomoko asengeli kozwa ekateli ye moko soki akondima yango to te.b Mbala mosusu tokangaka mpenza malamu te ntina ya likambo yango, kasi tóyeba ete kozwa ekateli na makambo ya ndenge wana ezali na kati ya mokumba oyo mokomoko na biso asengeli komema. (Rom. 14:4) Soki tozali kozwa kaka bikateli oyo basusu bazwaki, tokokóma na bwanya te, tokoki kolɛmbisa lisosoli na biso. Kasi tokokóma na bwanya, mpe tokoteya lisosoli na biso kaka soki tozali kosalela yango, elingi koloba soki tozali kozwa biso moko bikateli oyo eyokani na mitinda ya Biblia. (Ebr. 5:14) Na yango, ntango nini tosengeli kotuna toli epai ya mokristo oyo akɔmɛli na elimo? Nsima ya kosala bolukiluki biso moko, kasi tomoni ete tozali kaka na mposa moto asalisa biso mpo tókanga malamu ntina ya mitinda ya Biblia oyo eyokani na likambo na biso.
Tosengeli koluka toli kaka nsima ya kosala bolukiluki biso moko (Talá paragrafe 17)
KOBÁ KOLUKA TOLI
18. Yehova asali nini mpo na biso?
18 Yehova amonisi ete atyelaka biso motema mingi na ndenge apesi biso nzela tózwaka bikateli biso moko. Apesi biso Liloba na ye Biblia mpo esalisa biso. Apesi biso mpe baninga ya bwanya, oyo bakoki kosalisa biso tóyeba ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia. Na ndenge yango, Yehova akokisi mokumba na ye ya kozala Tata na biso. (Mas. 3:21-23) Ndenge nini tokoki komonisela ye botɔndi?
19. Ndenge nini tokoki kokoba kosepelisa Yehova?
19 Baboti basepelaka mpenza komona bana na bango bakoli mpe bakómi basaleli ya Yehova oyo bazali na makanisi ya malamu, na bwanya, mpe oyo basalisaka basusu. Ndenge moko mpe, Yehova asepelaka ntango tozali kokoba kokola na elimo, tozali koluka toli, mpe kozwa bikateli oyo ezali kopesa ye lokumu.
LOYEMBO 127 Lolenge ya moto oyo nasengeli kozala
a Na bantango mosusu, bakristo bakoki komonisa bwanya soki batuni baoyo basambelaka Yehova te toli na makambo lokola ya mbongo, ya minganga, mpe bongo na bongo.
b Mpo na koyeba likambo yango malamu, talá buku Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 39 pwɛ 5 mpe eteni “Makanisi mosusu.”
c NDIMBOLA YA BILILING: Nkulutu moko azali kopesa nkulutu mosusu toli mpo na elobeli na ye na likita oyo bautaki kosala.