Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Août lok. 31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Masolo mosusu
  • Bokonzi ya Nzambe elongoli banguna na yango
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Armagedone ezali mpenza nsango malamu!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Toyebi nini mpo na lisambisi ya Yehova na mikolo ezali koya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Tikalá sembo na ntango ya “bolɔzi monene”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Août lok. 31

Mituna ya batángi

Ntango nini mosala ya kosakola oyo tozali kosala sikoyo ekosuka?

Yesu alobaki boye: “Nsango malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso, bongo nsuka ekoya.” (Mat. 24:14) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami “nsuka” na vɛrsɛ yango, mpe na vɛrsɛ 6 mpe 13, ezali télos. Elobelaka nsuka oyo ezali koya mpo na kobebisa mokili mobimba ya Satana na Armagedone. (Em. 16:​14, 16) Na yango, tokokoba kosakola nsango malamu tii liboso mpenza ete nsuka yango eya. Yango esemboli boyebi oyo tozalaki na yango liboso.

Liboso, tolobaki ete tokotika kosakola nsango malamu na ntango ya bolɔzi monene, oyo ekobanda na kobebisama ya Babilone Monene. (Em. 17:​3, 5, 15, 16) Tokanisaki ete likambo yango nde ekotya nsuka na “mbula ya boboto ya Yehova” ya elilingi. (Yis. 61:2) Tokanisaki mpe ete baoyo bakobika na bolɔzi monene basengeli komonisa ete bakangami na Yehova liboso bolɔzi yango ebanda. Tolobaki ete bazali lokola Bayuda oyo babikaki na kobebisama ya Yerusaleme na mobu 607 L.T.B. Bato yango batyamaki elembo ya lobiko liboso libebi yango eya mpo bazalaki kosambela Yehova mpe koyina mabe. (Ezk. 5:11; 9:4) Kasi, kosala bokokani ndenge wana eyokani te na maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 24:​14, oyo emonisi ete bato bakoki kozwa libaku ya kondima nsango malamu tii liboso mpenza ya nsuka oyo ezali koya, na Armagedone.

Boyebi na biso oyo esembolami mpo na Matai 24:14 esemboli mpe makambo oyo tolobaki mpo na nsango oyo ezali lokola mbula ya mabanga, oyo Emoniseli 16:21 esakolaki. Kotalela lisusu likambo yango malamu emonisi ete bavɛrsɛ yango mibale ezali na boyokani. Ndenge nini? Eyano ezali na ndenge oyo bato bakotalela nsango ya Bokonzi. Ntoma Paulo akomaki ete mpo na “baoyo bazali kobikisama,” nsango yango ezali nsango ya malamu, “malasi ya bomoi.” Kasi mpo na banguna ya Nzambe, ezali nsango ya mabe, “nsolo ya liwa.” (2 Ko. 2:​15, 16) Banguna ya Nzambe bayinaka nsango ya Bokonzi mpo emonisaka mokili na bango ndenge oyo ezali mpenza: mokili ya mabe oyo eyangelami na Satana mpe ezali kokende na libebi.—Yoa. 7:7; 1 Yoa. 2:17; 5:19.

Simbá mpe ete mbula ya mabanga ya elilingi ekozala “monene mpenza.” Yango emonisi ete na ntango ya bolɔzi monene, mosala ya kosakola ekoki kokóma koswa, elingi koloba, nkombo ya Yehova ekoyebana na ndenge oyo esalemá naino te liboso. (Ezk. 39:7) Na ntango wana oyo ezali koya, nsima ya kobebisama ya Babilone Monene, bato mosusu bakolanda nde nsango yango ndenge balandaka nsolo ya kitoko? Ekoki kosalema bongo. Mbala mosusu bakoki kokanisa lisusu to koyekola ete banda kala Batatoli ya Yehova basakolaki nsuka ya mangomba ya lokuta.

Na ndakisa, tótalela likambo oyo esalemaki na Ezipito ya kala nsima ya Malɔzi Zomi. Ntango Yehova “[apesaki] banzambe nyonso ya Ezipito bitumbu,” “etuluku monene ya bato ndenge na ndenge” oyo bazalaki Bayisraele te bakendaki elongo na bato ya Yehova. (Kob. 12:​12, 37, 38) Mbala mosusu bato yango baponaki ngámbo ya Yehova ntango bamonaki ete makebisi oyo Moize apesaki mpo na Malɔzi Zomi ekokisamaki.

Moto nyonso oyo akopona ngámbo ya Yehova nsima ya kobebisama ya Babilone Monene akozwa libaku ya kopesa mabɔkɔ na bandeko ya Kristo oyo bakozala naino awa na mabele. (Mat. 25:​34-36, 40) Nzokande, libaku yango ya kotyama na ngámbo ya bampate ekosila mwa moke liboso ya Armagedone ntango bandeko yango ya Kristo oyo batyami mafuta na elimo bakozwa mbano na bango ya kokende na likoló.

Engɛngiseli oyo emonisi mpenza ete Yehova azali na bolingo mpe na motema mawa mingi. Ya solo, “alingi moto ata moko te abomama, kasi alingi ete bato nyonso bábongola motema.”—2 Pe. 3:9

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto