Liyangani na Indianapolis, na etúká ya Indiana, na 1925
1925—Eleki sikoyo mbula nkama
LISOLO moko na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/01/1925 elobaki boye: “Bakristo bazali kozela na mposa makasi makambo oyo ekosalema mbula oyo.” Kasi ebakisaki: “Bakristo basengeli te komitungisa mingi mpo na makambo oyo ekoki kosalema mbula oyo tii bábosana kosala na esengo nyonso mosala oyo Nkolo alingi ete básala.” Makambo nini Bayekoli ya Biblia bazalaki kozela na 1925? Nini esalisaki bango bákoba komipesa mingi na mosala ya Nkolo atako makambo oyo bazelaki esalemaki te?
ELOKO YA KOZELISAZELISA
Na 1925, Bayekoli ya Biblia bazalaki kozela ete mabele ekóma Paradiso. Mpo na nini? Ndeko Albert Schroeder, oyo na nsima akómaki ndeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alobaki boye: “Tozalaki kokanisa ete na mbula yango bakristo oyo batyami mafuta, oyo bazali naino na mabele bakokende na likoló mpo na kokɔta na Bokonzi mpe ete mibali ya sembo ya ntango ya kala, lokola Abrahama, Davidi mpe basusu, bakosekwa mpo bázala bankumu na guvɛrnema ya mabele oyo ezali eteni ya bokonzi ya Nzambe.” Lokola basanza ezalaki koleka mpe makambo oyo bazelaki ekokisamaki te, basusu balɛmbaki nzoto.—Mas. 13:12.
Atako bongo, Bayekoli ya Biblia mingi bakobaki komipesa mingi na mosala ya kosakola mpe bakangaki lisusu ntina ete kozala Batatoli ya Yehova ezali mokumba monene. Na ndakisa, tótalela mosala oyo basalaki mpo na kopalanganisa solo tii mosika mpenza na nzela ya radio.
BASALI BARADIO MOSUSU
Lokola bamonaki ete bato mingi bayokaki radio WBBR na mbula oyo elekaki, na 1925 Bayekoli ya Biblia basalaki ndako mosusu ya radio, na mbala oyo pene na Chicago, na etúká ya Illinois. Babengaki yango WORD (LILOBA). Ralph Leffler, ingénieur oyo apesaki mabɔkɔ na kotonga ndako ya radio yango, alobaki boye: “Na babutu ya eleko ya malili makasi, radio WORD eyokanaki tii mosika mpenza.” Na ndakisa, libota moko oyo ezalaki kofanda mosika ya kilomɛtrɛ 5 000, na engumba Pilot, na Alaska, elandaki moko ya baemisyo ya liboso ya radio yango. Nsima ya kolanda yango, libota yango ekomelaki bandeko oyo bazalaki kosala na ndako ya radio mpe epesaki bango matɔndi mpo na programɛ wana ya elimo ya kolendisa.
Na lobɔkɔ ya mwasi: Ndako ya radio WORD na Batavia, na Illinois
Na lobɔkɔ ya mobali: Ralph Leffler azali kosala na ndako ya radio
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/1925 emonisaki ndenge radio yango ekendaki tii mosika mpenza; elobaki boye: “WORD ezali moko ya baradio ya États-Unis, oyo ezwamaki tii na mosika mpenza, oyo ezali na 5 000 watts. Radio yango ezalaki kozwama malamu ata na Ɛsti mpe na Wɛsti ya États-Unis, na Cuba mpe na nsuka mpenza ya nɔrdi ya Alaska. Bato mingi oyo bayokaki naino solo te basepelaki koyekola makambo mosusu mpo balandaki radio yango.”
George Naish
Na ntango yango kaka, Bayekoli ya Biblia basalaki mpe milende mpo na kopalangisa nsango malamu na nzela ya radio na Canada. Na 1924, basalaki ndako ya radio CHUC na Saskatoon, na Saskatchewan. Ezalaki moko ya baradio ya liboso na Canada oyo ezalaki kolobela makambo ya Nzambe. Kasi na 1925, esɛngaki kosala ndako ya radio ya monene koleka. Na yango, La Société ememaki biloko nyonso ya radio yango na Regent Building, ndako moko ya kala na Saskatoon, epai bazalaki kosala masano; basombaki mpe babongisaki yango mpo na kotya radio.
Na nzela ya radio yango, bato mingi oyo bazalaki kofanda na bingumba ya mike mpe na bamboka ya Saskatchewan bayokaki nsango malamu mpo na mbala ya liboso. Na ndakisa, na engumba moko ya mosika, mama moko na nkombo Graham akomaki mpo na kosɛnga mikanda nsima ya koyoka emisyo moko. Ndeko George Naish alobaki boye: “Ndenge akomaki ‘Bóteya biso!’ ezalaki lokola agangi makasi mpe polele, yango wana totindelaki ye bavolimi nyonso ya Étude des Écritures.” Eumelaki te, mama Graham akómaki kosakola nsango ya Bokonzi mosika koleka.
ENGƐNGISELI YA SIKA NA BINDIMELI NA BISO
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/03/1925 ezalaki na lisolo ya ntina mingi oyo elobaki “Kobotama ya ekólo.” Mpo na nini lisolo yango ezalaki na ntina mingi? Mpo, na ntango moko boye, Bayekoli ya Biblia bayebaki ete Satana azali na ebongiseli oyo esangisi bikelamu mabe ya elimo, bibongiseli ya mangomba, ya mombongo, mpe ya politiki awa na mabele. Kasi, na nzela ya lisolo yango, “moombo ya sembo mpe ya mayele” asalisaki lisangá ya bandeko ekanga ntina ete Yehova mpe azali na ebongiseli; ekeseni mpenza na ebongiseli ya Satana mpe esalaka na bomoko mpo na kopesa Yehova mabɔkɔ. (Mat. 24:45) Lisusu, moombo ya sembo amonisaki ete Bokonzi ya Nzambe ebotamaki na 1914 mpe ete na mobu yango, ‘etumba oyo ebimaki na likoló,’ Satana ná bademo na ye babwakamaki na mabele longwa na likoló.—Em. 12:7-9.
Ezalaki mpasi mpo na basusu kondima engɛngiseli wana ya sika. Yango wana lisolo yango elobaki: “Soki batángi mosusu ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli bandimi te makambo oyo elobami awa, tosɛngi bango bázela Nkolo na kimya nyonso mpe bázala ekɛngɛ, bákoba ntango nyonso kobatela motema ya pɛto.”
Kasi Tom Eyre, ndeko moko ya Angleterre oyo azalaki colporteur (lelo mobongisi-nzela), alobaki ndenge oyo Bayekoli ya Biblia mingi bamiyokaki mpo na lisolo yango, ete: “Bandeko basepelaki mingi na ndimbola yango ya Emoniseli 12. Ntango tokangaki ntina ete Bokonzi etyamaki na likoló, tozalaki na esengo mingi ya koyebisa basusu nsango malamu yango. Etindaki biso mpenza tósakola lisusu mingi mpe esalisaki biso tómona ndenge Yehova azali komema bato na ye na makambo ya minene.”
KOPESA LITATOLI MPO NA YEHOVA
Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bayebi malamu maloba ya Yisaya 43:10: “Yehova alobi: ‘Bino bozali batatoli na ngai, Ɛɛ, mosaleli na ngai oyo naponi.’” Nzokande, liboso ya 1925, vɛrsɛ yango elimbolamaki mingi te na mikanda na biso. Kasi, makambo ebongwanaki. Na 1925, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimisaki masolo oyo elobeli Yisaya 43:10 mpe 12 na banimero 11!
Na nsuka ya sanza ya 08/1925, Bayekoli ya Biblia bayanganaki na liyangani moko na Indianapolis, na etúká ya Indiana. Na maloba ya kotombela bato boyei malamu oyo ezalaki na programɛ ya liyangani, Joseph Rutherford akomaki boye: “Toyei na liyangani oyo mpo Nkolo . . . apesa biso makasi ya kozonga na elanga na mposa makasi lisusu ya kozala batatoli na ye.” Na mikolo 8 nyonso ya liyangani yango, balendisaki bayangani bápesa litatoli mpo na Yehova na mabaku nyonso.
Na mwapɔsɔ, 29/08, Ndeko Rutherford asalaki lisolo oyo elobaki “Libyangi mpo na mosala.” Na lisolo yango, amonisaki ntina ya mosala ya kosakola, alobaki: “Yehova alobi na bato na ye ete . . . : ‘Bino bozali batatoli na ngai . . . mpe ngai nazali Nzambe.’ Na nsima, apesaki bango etinda moko ya polele, na maloba ya sikisiki ete: ‘Bóbongisa nzela mpo na bato.’ Ezali na moto mosusu te na mabele oyo akobongisa to akosembola nzela ya bato, longola kaka [basaleli na ye], baoyo bazali na elimo ya Nkolo, mpe na bongo bazali batatoli na ye.”—Yis. 43:12; 62:10.
Trakte Nsango ya elikya
Nsima ya diskur ya Ndeko Rutherford, bayangani nyonso bandimaki ekateli oyo ezalaki na motó ya likambo “Nsango ya elikya,” oyo emonisaki ete Bokonzi ya Nzambe nde elikya ya solosolo mpo na kozwa “mapamboli lokola kimya, bomɛngo, kolɔngɔnɔ ya nzoto, bomoi, bonsomi mpe esengo ya seko.” Na nsima, babongolaki ekateli yango na minɔkɔ ebele mpe babimisaki yango lokola trakte. Trakte yango soki milio 40 ekabolamaki.
Bayekoli ya Biblia bayaki kozwa mpenza nkombo Batatoli ya Yehova bambula ebele lisusu na nsima. Atako bongo, bakómaki kokanga mpenza ntina malamumalamu ya mokumba na bango ya kozala batatoli.
KOZONGA KOTALA BATO OYO BASEPELI
Wana motángo ya Bayekoli ya Biblia ezalaki kokola na mokili mobimba, bazalaki mpe kolendisa bango bózongaka kotala baoyo bamonisaki ete basepeli na nsango malamu. Nsima ya kampanye mpo na kokabola trakte Nsango ya elikya, Bulletina elobaki boye: “Omibongisa mpo na kozonga na bandako oyo bato bazwaki mikanda te, kasi basakoli batikaki trakte Nsango ya elikya kuna.”
Bulletin ya sanza ya 01/1925 ezalaki na lapolo ya Moyekoli ya Biblia moko ya Plano, na etúká ya Texas, ete: “Tokamwaki komona ete ntango tozongi na teritware epai tosakolaki liboso, bato bazali koyamba biso koleka na bateritware ya sika. Tosakolaki mbala mitano na engumba moko ya moke na teritware na biso na boumeli ya mbula zomi oyo euti koleka. . . . Mikolo eleki, Ndeko mwasi Hendrix ná mama na ngai bazongaki lisusu kosakola kuna mpe bato bazwaki babuku mingi koleka liboso.”
Mpe na ekólo Panama, colporteur moko akomaki boye: “Bato mingi oyo liboso babenganaki ngai, bayambaki ngai ntango nazongaki mbala ya mibale to ya misato. Mbula oyo namipesi mingi na kozongela bato oyo natalaki mbala eleki; mpe basusu kati na bango basepelaki mingi.”
TOTYE MISO NA MIKOLO OYO EZALI KOYA
Na mokanda ya mbula na mbula epai ya bacolporteurs, Ndeko Rutherford alobelaki mosala ya mobu na mokuse mpe mosala oyo ekosalema na mbula ekoya. Alobaki boye: “Na mbula oyo eleki, bozwaki libaku ya kobɔndisa bato mingi oyo bazalaki na mawa. Mosala yango epesi bino esengo . . . Mbula oyo ezali kobanda ekopesa bino mabaku ya kozala batatoli ya Nzambe mpe bokonzi na ye, mpe ya kosalisa bato bámona makambo oyo azali kosɛnga. . . . Tiká ete biso nyonso tótombola mingongo mpe tósanzola Nzambe na biso mpe Mokonzi na biso.”
Wana mobu 1925 ekómaki na nsuka, bandeko bazalaki kokanisa ndenge ya kokómisa Betele ya Brooklyn monene. Mobu 1926 ekozala ebandeli ya mosala monene ya botongi oyo ebongiseli na biso esalaki naino te liboso.
Bazali kotonga na balabala Adams, na Brooklyn, na New York, 1926
a Lelo oyo Mokanda ya likita—Bomoi mpe mosala ya bakristo.