LISOLO YA BOYEKOLI 41
LOYEMBO 108 Bolingo ya sembo ya Nzambe
Bolingo ya Nzambe ezali mpo na seko
“Bópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu; bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.”—NZ. 136:1.
NA MOKUSE
Tokomona ete kozala na likanisi ya Biblia na oyo etali bolingo ya Yehova ekoki kosalisa biso tólɛmba nzoto te ntango tokutani na mikakatano.
1-2. Mokakatano nini bakristo mingi bazalaka na yango?
KANISÁ masuwa moko oyo ezali na kati ya mbonge makasi. Mbonge yango ezali kobɛta masuwa makasi mpenza. Soki moto abwaki longo te na mai, masuwa ekomemama na mbonge. Longo ekosalisa masuwa etɛlɛma ngwi mpe ekosala ete mopɛpɛ makasi ezindisa masuwa te.
2 Ntango okutani na mikakatano oyo ezali lokola mopɛpɛ makasi, okoki komiyoka lokola masuwa wana. Mayoki na yo ekoki komemama epai na epai. Okomona mokolo mosusu ondimi ete Yehova alingaka yo mpe azali kosunga yo; mokolo oyo elandi okómi komituna soki azali ata komona mikakatano oyo ozali na yango. (Nz. 10:1; 13:1) Mbala mosusu moninga moko ayebisi yo maloba ya kobɔndisa, mpe omiyoki malamu mpo na mwa ntango. (Mas. 17:17; 25:11) Kasi na nsima, bantembe ezongi lisusu. Okoki kutu komituna soki mbala mosusu Yehova asundoli yo. Ndenge nini okoki kobwaka longo na yo na mai mpo esalisa yo oyika mpiko? Na maloba mosusu, ndenge nini okoki komindimisa, mpe kokoba komindimisa ete Yehova alingaka yo mpe asungaka yo?
3. “Bolingo ya sembo” ndenge elobelami na Nzembo 31:7 mpe 136:1 elimboli nini, mpe mpo na nini tokoki koloba ete Yehova azali ndakisa eleki monene ya bolingo ya sembo? (Talá mpe elilingi.)
3 Lolenge moko oyo okoki kobwaka longo na ndenge ya elilingi ntango okutani na mikakatano ezali ya komikundwela bolingo ya sembo ya Yehova. (Tángá Nzembo 31:7; 136:1.) “Bolingo ya sembo” epesaka likanisi ya kokangama makasi na moto mpe kotika ye te mpo na libela. Yehova nde ndakisa eleki monene ya bolingo ya sembo. Kutu, Biblia elobi ete “atondi na bolingo ya sembo.” (Kob. 34:6, 7) Biblia elobi mpe mpo na Yehova ete: “Otondi na bolingo ya sembo mpo na baoyo nyonso babelelaka yo.” (Nz. 86:5) Kanisá oyo bavɛrsɛ yango elimboli: Yehova akosundola basaleli na ye ya sembo ata mokolo moko te! Komikundwela ete Yehova azali sembo ekoki kosalisa yo opikama makasi ntango okutani na mikakatano oyo eningisi yo.—Nz. 23:4.
Kaka ndenge longo esalisaka masuwa ezinda te na ntango ya mopɛpɛ makasi, kondima ete Yehova alingaka biso ekosalisa biso tópikama makasi ntango tokutani na mikakatano (Talá paragrafe 3)
KOBOSANA TE ETE BOLINGO YA SEMBO EZALI MOKO YA MATEYA YA BIBLIA YA MOBOKO
4. Tángá mwa mateya ya moboko, mpe pesá ntina oyo ondimaka yango na motema mobimba.
4 Likambo mosusu oyo ekoki kosalisa yo opika longo na ndenge ya elilingi na ntango ya mikakatano ezali ya komikundwela ete bolingo ya sembo ya Yehova ezali moko ya mateya ya moboko. Okanisaka nini soki oyoki balobi “mateya ya moboko”? Mbala mosusu okanisaka liteya moko oyo oyekolá na Liloba ya Nzambe. Na ndakisa oyekolá ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova, ete Yesu azali Mwana ya Nzambe se moko oyo abotamaki, bakufi bayebaka eloko te, mpe ete ekozala na paradiso awa na mabele epai bato bakozala na bomoi libela na libela. (Nz. 83:18; Mos. 9:5; Yoa. 3:16; Em. 21:3, 4) Ntango ondimaki mateya yango, ezalaki mpasi mpo moto mosusu andimisa yo ete ezali lokuta. Mpo na nini? Mpo omonaki ete ezali solo mpenza. Tólobela sikoyo ndenge oyo kotalela bolingo ya Yehova lokola liteya moko ya moboko ekoki kosalisa yo otika kokanisa ete Yehova amonaka yo te to atyaka likebi te na makambo ya mpasi oyo okutani na yango.
5. Lobelá ndenge moto akweisaka mateya ya lokuta.
5 Ntango obandaki koyekola Biblia, nini esalisaki yo obwaka mateya ya lokuta? Na ntembe te, ozalaki kokokanisa makambo oyo bateyaki yo na lingomba na yo na makambo oyo Biblia eteyaka. Tózwa ndakisa moko: Kanisá ete ozalaki kala kondima ete Yesu azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Kasi, ntango obandaki koyekola Biblia, omitunaki: ‘Liteya yango ezali mpenza solo?’ Nsima ya kotatela na likebi makambo oyo Biblia elobi, omonaki ete liteya wana ezali solo te. Na nsima, okómaki kondima liteya ya solo oyo euti na Biblia: Yesu azali “mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá,” “Mwana se moko oyo abotamaki.” (Kol. 1:15; Yoa. 3:18, msl.) Ya solo, mateya mosusu ya lokuta “epikamá makasi” mpe ezalaka mpasi kokweisa yango. (2 Ko. 10:4, 5) Kasi, ntango olongaki kobwaka mateya yango ya lokuta, ozongelaki lisusu te kondima yango, boye te?—Flp. 3:13.
6. Mpo na nini tokoki kondima ete ‘bolingo ya sembo ya Yehova ezali seko na seko’?
6 Okoki kosala mpe bongo mpo na liteya ya Biblia oyo elobeli bolingo ya Yehova. Ntango okutani na mikakatano, soki obandi komituna soki Yehova alingaka yo mpenza, omituna boye: ‘Ebongi mpenza nakanisa bongo?’ Na nsima, zwá ntembe na yo mpe kokanisá yango na maloba ya Nzembo 136:1—vɛrsɛ oyo esimbi lisolo oyo. Mpo na nini vɛrsɛ yango elobi ete bolingo ya Yehova ezali “ya sembo”? Mpo na nini maloba “bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko” ezongelami mbala 26 na Nzembo yango? Ndenge tomonaki yango, bolingo ya sembo ya Yehova epai ya basaleli na ye ezali liteya ya Biblia ya moboko, kaka lokola mateya mosusu ya Liloba ya Nzambe oyo osilá kondima. Likanisi oyo ete Yehova amonaka ete ozali na ntina te to alingaka yo te ezali lokuta mpenza. Kondimá likanisi yango te, kaka ndenge oboyá mateya mosusu nyonso ya lokuta!
7. Pesá ndakisa ya bavɛrsɛ oyo emonisaka ete Yehova alingaka biso.
7 Biblia elobeli makambo mosusu mingi mpo na kondimisa biso ete Yehova alingaka biso. Na ndakisa, Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Bozali na motuya mingi koleka bakɛngɛli-mboka ebele.” (Mat. 10:31) Yehova ye moko alobaki na bato na ye ete: “Nakopesa yo makasi, ɛɛ nakosalisa yo, nakosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ngai ya mobali, lobɔkɔ oyo esalaka oyo ezali sembo.” (Yis. 41:10) Maloba yango ezali polele mpenza. Yesu alobi te ete ‘Mbala mosusu bozali na motuya,’ mpe Yehova alobi te ete ‘Nakoki kosalisa yo.’ Kasi, Yesu alobi: “Bozali na motuya mingi,” mpe Yehova alobi: “Nakosalisa yo.” Soki ekómeli yo ete otyela bolingo ya Yehova ntembe ntango okutani na mikakatano, bavɛrsɛ ya ndenge wana ekosuka kaka te na kosalisa yo omiyoka malamu; ekoki kosalisa yo mpe oyeba mpenza ete Yehova alingaka yo. Bavɛrsɛ yango elobi solo. Na yango, soki obondeli mpo na bantembe na yo mpe omanyoli na bavɛrsɛ wana, ekosalisa yo oloba maloba ya 1 Yoane 4:16, ete: “Toyekoli koyeba mpe kondima bolingo oyo Nzambe azali na yango epai na biso.”a
8. Okoki kosala nini soki ozali kaka na ntembe ete Yehova alingaka yo?
8 Bongo soki na bantango mosusu ozali kaka na ntembe mpo na bolingo ya Yehova epai na yo? Kokanisá ndenge ozali komiyoka ná makambo oyo oyebi. Mayoki ebongwanaka mpambampamba, kasi bolingo ya sembo ya Yehova oyo Biblia eteyi biso ezali likambo ya solo. Soki ozali kondima te ete Yehova alingaka yo, ozali nde kotya mopanzi ezaleli oyo esimbi bomoto na ye mpenza: bolingo na ye.—1 Yoa. 4:8.
KANISÁ NDENGE YEHOVA ‘ALINGI YO MINGI’
9-10. Yesu alingaki mpenza koloba nini ntango alobaki na Yoane 16:26, 27 ete “Tata ye moko alingi bino mingi”? (Talá mpe elilingi.)
9 Tokoki koyeba malamu ndenge Yehova alingaka biso soki totaleli maloba oyo Yesu alobaki na bayekoli na ye, ete: “Tata ye moko alingi bino mingi.” (Tángá Yoane 16:26, 27.) Yesu alobaki maloba yango kaka te mpo na kosepelisa bayekoli na ye. Bavɛrsɛ mosusu ya mokapo yango emonisi ete Yesu azalaki te kolobela mayoki ya bayekoli na ye. Kasi, azalaki kolobela nde likambo mosusu: libondeli.
10 Na bavɛrsɛ mibale ya likoló, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete basengeli kobondela na nzela na ye, kasi te epai na ye. (Yoa. 16:23, 24) Ezalaki na ntina bayekoli na ye báyeba likambo yango. Mpo nsima ya lisekwa ya Yesu, bayekoli bakokaki koyoka mposa ya kobondela Yesu. Tókende tózonga, bayebaki Yesu mpe akómaki moninga na bango. Bakokaki kokanisa ete bolingo oyo Yesu alingaki bango ekotinda ye ayoka mabondeli na bango mpe ayebisa Tata makambo oyo basɛngi. Kasi, Yesu alobaki ete basengeli kokanisa bongo te. Mpo na nini? Alobaki na bango: “Tata ye moko alingi bino mingi.” Likambo yango ezali na kati ya liteya ya moboko oyo etali libondeli. Kanisá oyo yango elimboli mpo na yo: Na nzela ya boyekoli na yo ya Biblia, oyekoli koyeba mpe kolinga Yesu. (Yoa. 14:21) Kasi, ndenge moko na bayekoli wana ya siɛklɛ ya liboso, okoki kobondela Nzambe na motema mobimba, mpo oyebi ete “ye moko alingi [yo] mingi.” Mbala nyonso oyo obondelaka Yehova, omonisaka ete ozali na kondima na maloba yango.—1 Yoa. 5:14.
Okoki kobondela Yehova na kondima nyonso, mpo “ye moko alingi [yo] mingi” (Talá paragrafe 9-10)b
YEBÁ ESIKA OYO BANTEMBE EUTAKA
11. Mpo na nini Satana akosepela soki tozali kotya ntembe ete Yehova alingaka biso?
11 Bantembe na oyo etali bolingo ya Yehova eutaka wapi? Mbala mosusu okoloba ete eutaka epai ya Satana, mpe ekoki kozala solo. Zabolo “azali koluka kolya” biso, mpe akosepela mpenza soki tokómi kotya ntembe ete Yehova alingaka biso. (1 Pe. 5:8) Yehova alingaka biso mpe yango etindaki ye afuta lisiko, eloko oyo Satana akolinga tómona ete tobongi na yango te. (Ebr. 2:9) Kasi, nani akosepela soki tozali kotya ntembe ete Yehova alingaka biso? Satana. Mpe tokosala mokano ya nani soki totiki kosalela Yehova mpo tokutani na mikakatano? Mokano ya Satana. Kokamwa mpenza ndenge Satana alingi tókanisa ete Yehova alingaka biso te. Satana nde moto oyo Yehova alingaka lisusu te. Atako bongo, moko ya “mayele mabe” na ye ezali ya kotinda biso tómiyoka ete biso nde tobongi te ete Yehova alinga biso mpe ete abwaki biso. (Ef. 6:11) Ntango toyebi likambo oyo monguna na biso alukaka kosala, tokoki kozala na ekateli makasi ya ‘kotɛmɛla Zabolo.’—Yak. 4:7.
12-13. Na ndenge nini ezaleli na biso ya bato ya masumu ekoki kotinda biso tótya ntembe ete Yehova alingaka biso?
12 Bantembe na oyo etali bolingo ya Yehova epai na biso eutaka mpe na esika mosusu. Wapi? Na ezaleli na biso ya bato ya masumu. (Nz. 51:5; Rom. 5:12) Lisumu ekabolaka moto na Mozalisi na ye. Ebebisá mpe makanisi, motema, mpe nzoto ya moto.
13 Lisumu etyá mpe mobulu na mayoki na biso, epesá biso mayoki ya ngámbo, ya komitungisa, ya kobanga, mpe ya nsɔni. Moto azalaka na mayoki yango ntango asali lisumu. Kasi mayoki yango ekoki mpe kolamuka mpo toyebaka ntango nyonso ete tozali bato ya masumu, ezaleli oyo eyokani ata moke te na ndenge oyo Nzambe alingaki tózala ntango asalaki moto. (Rom. 8:20, 21) Kaka ndenge motuka oyo pinɛ esili mopɛpɛ ekoki te kotambola ndenge esengeli, biso mpe, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki te kosala makambo nyonso ndenge esengeli, na ndenge oyo Yehova alingaki tózala. Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te soki na bantango mosusu tozali na ntembe ete Yehova alingaka biso. Soki esalemi bongo, tosengeli komikundwela ete Yehova azali “Nzambe monene mpe ya nsɔmɔ, oyo . . . amonisaka bolingo ya sembo epai ya baoyo balingaka ye mpe batosaka mitindo na ye.”—Neh. 1:5.
14. Ndenge nini kokanisa lisiko ekoki kosalisa biso tótika kokanisa ete Yehova akoki ata moke te kolinga biso? (Baroma 5:8) (Talá mpe etanda “Kebá na ‘nguya ya bokosi ya lisumu.’”)
14 Ya solo, na bantango mosusu tokoki komiyoka ete tobongi te ete Yehova alinga biso. Mpe mpo na koloba mpenza solo, tobongi te, mpe koyeba yango esalaka lisusu mpasi koleka. Tosalá te eloko moko boye mpo Yehova alinga biso. Atako bongo, lisiko ezipaka masumu na biso, mpe Yehova azwaki ebongiseli yango mpo alingaka biso. (1 Yoa. 4:10) Kobosana mpe te ete Yesu ayaki mpo na kobikisa bato ya masumu, kasi te bato ya kokoka. (Tángá Baroma 5:8.) Moko te kati na biso akoki kosala makambo na ndenge ya kokoka, mpe Yehova asɛngaka biso yango te. Ntango tokangi ntina ete ezaleli na biso ya bato ya masumu ekoki kotinda biso tóbanda kotya ntembe ete Yehova alingaka biso, ekoki kopesa biso mpiko ya kobundisa mpenza likanisi yango.—Rom. 7:24, 25.
PONÁ KOTIKALA SEMBO
15-16. Soki totikali sembo epai ya Yehova, likambo nini tokoki kondima, mpe mpo na nini? (2 Samwele 22:26)
15 Yehova alingi ete tópona likambo ya malamu, elingi koloba ‘tókangama na ye.’ (Mib. 30:19, 20) Soki tosali bongo, tokoki kondima ete ye mpe akozala sembo epai na biso. (Tángá 2 Samwele 22:26.) Ntango nyonso oyo totikali sembo epai ya Yehova, tokoki kotyela ye motema ete akosalisa biso na mokakatano nyonso oyo ekómeli biso.
16 Ndenge tomoni yango, tozali na ntina mpenza ya kobatela kondima makasi lokola nde tobwaki longo na mai ntango tokutani na mikakatano. Toyebi ete Yehova alingaka biso mpe akosunga biso. Yango nde Biblia eteyaka. Soki ekómi ete tótya ntembe na bolingo na ye, tokoki kokanisa makambo oyo toyebi ete ezali solo kasi te na esika ya kotala ndenge oyo mayoki na biso ezali kotinda biso. Tiká tókoba kondimela liteya ya Biblia ya moboko oyo elobi ete bolingo ya sembo ya Yehova ezali mpo na seko.
LOYEMBO 159 Pesá Yehova nkembo
a Bandakisa mosusu ezali mpe na Kolimbola Mibeko 31:8, Nzembo 94:14, mpe Yisaya 49:15.
b NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mobali moko azali kobondela mpo azwa makasi ya kosalisa mwasi na ye oyo azali kobɛla, koyeba kosalela mbongo malamu, mpe koteya mwana na ye alinga Yehova.