Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Novembre nk. 2-7
  • Ndenge ya kobatela esengo na ntango ya bobange

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kobatela esengo na ntango ya bobange
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NTINA OYO EZALAKA MPASI MIBANGE BÁBATELA ESENGO
  • NDENGE YA KOBATELA ESENGO
  • NDENGE OYO BASUSU BAKOKI KOSALISA
  • Zwáká na motuya bandeko oyo bakómi mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Zwá mateya na maloba ya nsuka ya mibali ya sembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Yehova amibanzabanzaka mpo na basaleli na ye ya mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Ndimá ete okoki koyeba makambo mosusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Novembre nk. 2-7

LISOLO YA BOYEKOLI 44

LOYEMBO 138 Kitoko ya nsuki mpɛmbɛ

Ndenge ya kobatela esengo na ntango ya bobange

“Ata na bobange bakokoba kokola.”—NZ. 92:14.

NA MOKUSE

Ntina oyo mibange basengeli kobatela esengo na bango, mpe ndenge bakoki kosala yango.

1-2. Ndenge nini Yehova atalelaka bandeko ya sembo oyo bakómi mibange? (Nzembo 92:​12-14; talá mpe elilingi.)

NA MOKILI mobimba, bato bazalaka na makanisi ndenge na ndenge na oyo etali kokóma mobange. Na ndakisa, kanisá naino: Ozali koyeba lisusu mbala ya liboso oyo omonaki nsuki ya mpɛmbɛ na motó na yo? Mbala mosusu oyokaki mposa ya kopikola yango liboso moto mosusu amona yango. Kasi, omonaki ete soki olongoli yango, ekopekisa te mosusu ebima. Ndakisa yango emonisi ndenge bato mingi balingaka te kokóma mibange.

2 Kasi, Tata na biso ya likoló atalelaka basaleli na ye oyo bakómi mibange ndenge mosusu. (Mas. 16:31) Akokanisi bango na nzete oyo etondi na nkasa. (Tángá Nzembo 92:​12-14.) Mpo na nini kotalela bango bongo ebongi mpenza? Mbala mingi, nzete etondaka na nkasa mpe fololo ya nsolo ntango eumeli bambula mingi mpenza. Moko ya banzete yango oyo ekamwisaka mpenza ezali cerise na Japon, oyo etondi fololo mpe eumeli mingi. Banzete yango mosusu ya kitoko eumeli bambula koleka nkóto moko. Ndenge moko na banzete wana oyo ekɔmɛlá mpenza, bandeko mibange ya sembo bazali kitoko, mingimingi na miso ya Nzambe. Yehova amonaka kaka nsuki mpɛmbɛ te, amonaka nde moto oyo azali na yango. Mpe asepelaka na bizaleli malamu ya bandeko yango: koyika mpiko mpe bosembo na bango, ata mpe mosala oyo basaleli Ye bambula mingi.

Mwasi moko ná mobali na ye oyo bazali mibange bafandi, mpe banzete oyo ebimisi bafololo ezali zingazinga na bango.

Ndenge moko na banzete kitoko oyo ekɔmɛlá mpenza mpe etondi na nkasa, bandeko mibange ya sembo bazali kitoko mpe bazali na motuya mingi na miso ya Yehova mpe ya basusu (Talá paragrafe 2)


3. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge Yehova asalelaki mibange mpo na kokokisa mokano na ye.

3 Valɛrɛ ya moto ekitaka te na miso ya Yehova, ata soki akómi mobange.a Kutu, mbala mingi Yehova asalelaka mibange mpo na kokokisa mokano na ye. Na ndakisa, Sara akómaki mpenza mokóló ntango Yehova ayebisaki ye ete akokóma mama ya ekólo moko ya nguya mpe nkɔkɔ ya Masiya. (Eba. 17:​15-19) Moize mpe azalaki mobange ntango Yehova apesaki ye mokumba ya kobimisa Bayisraele na Ezipito. (Kob. 7:​6, 7) Lisusu, ntoma Yoane azalaki mobange mpenza ntango Yehova asalisaki ye na nzela ya elimo na ye akoma mikanda mitano ya Biblia.

4. Na kotalela Masese 15:​15, nini ekoki kosalisa mibange báyika mpiko na mikakatano na bango? (Talá mpe elilingi.)

4 Kasi, baoyo bazali kokóma mibange bakutanaka na mikakatano mingi. Ndeko mwasi moko alobaki na mwa lisɛki: “Kozala mobange emɛlisaka mpema mpenza.” Atako bongo, kozala na esengob ekoki kosalisa mibange báyika mpiko na mikakatano oyo eyaka ntango mbula ezali kopusana. (Tángá Masese 15:15.) Na lisolo oyo, tokolobela makambo ya sikisiki oyo mibange bakoki kosala mpo bábatela esengo. Tokotalela mpe ndenge oyo basusu bakoki kosalisa bandeko basi mpe mibali oyo bazali mibange na lisangá. Kasi, tótalela naino ntina oyo ekoki kozala mpasi kobatela esengo ntango mbula ezali kopusana.

Mwasi ná mobali oyo bazali mibange ya elilingi ya liboso, batɛlɛmi na nse ya nzete, basimbani mpe bazali na esengo.

Kobatela esengo ekoki kosalisa mibange báyikela mikakatano ya bobange mpiko (Talá paragrafe 4)


NTINA OYO EZALAKA MPASI MIBANGE BÁBATELA ESENGO

5. Nini ekoki kosala ete mibange mosusu bálɛmba nzoto?

5 Makambo nini ekoki kosala ete olɛmba nzoto? Mbala mosusu ozali na mawa mpo ozali na likoki te ya kosala makambo oyo ozalaki kosala liboso. To mbala mosusu ozali kokanisa ntango ozalaki elenge mpe na nzoto kolɔngɔnɔ. (Mos. 7:10) Na ndakisa, ndeko mwasi moko na nkombo Ruby alobi boye: “Kolata bilamba ekómá mpasi mpo na mingai mpe bampasi oyo nayokaka, mpe nzoto esalaka lisusu malamu te. Ata kotombola lokolo mpo na kolata sosɛti ezalaka mpasi. Maladi ya mingai esalá ete mabɔkɔ na ngai esembolamaka lisusu malamu te, mpe yango esalaka ete ezala mpasi nasala ata misala ya mikemike.” Mpe Harold, oyo asalaka na Betele alobi boye: “Nandimaka te ndenge oyo nakómi, mpe na bantango mosusu epesaka ngai nkanda. Kala nazalaki makasi mpenza. Nazalaki kobɛta lisano ya baseball mingi mpenza. Bato mosusu bazalaki koloba: ‘Pesá Harold bale mpo akosala ete ekipi na biso elonga.’ Kasi sikoyo, nandimi te ete nakoki ata kobwaka bale mosika.”

6. (a) Makambo nini mosusu ekoki kosala ete mibange bálɛmba nzoto? (b) Nini ekoki kosalisa mibange báyeba soki basengeli kotika kotambwisa motuka to te? (Talá na nimero oyo lisolo “Nasengeli kotika kotambwisa motuka?”)

6 Okoki mpe kolɛmba nzoto mpo ozali kokoka lisusu te kosala makambo mosusu yo moko. Ezalaka bongo mingimingi soki esɛngi moto ayaka kosalisa yo to soki esɛngi okende kofanda epai ya mwana na yo. To mbala mosusu olɛmbi mpenza nzoto mpo ozali kobɛla to mpe ozali lisusu komona malamu te mpe okoki lisusu te kotambola to kotambwisa motuka yo moko! Ekoki kopesa yo mawa mpenza. Kasi, komikundwela ete motuya na biso na miso ya Yehova mpe basusu etaleli te soki tokoki kosala makambo biso moko, kofanda biso moko, to kotambwisa motuka biso moko, ekoki kosalisa yo. Mpe tokoki kotya motema ete Yehova ayebaka mayoki oyo tozali na yango. Eloko oyo ezali na ntina mpo na ye ezali bomoto na biso ya kati; amonaka ndenge motema na biso etondi na bolingo mpe botɔndi mpo na ye mpe mpo na bandeko na biso bakristo.—1 Sa. 16:7.

7. Nini ekoki kosalisa baoyo bazali koyoka mawa mpo bamoni lokola bakozala na bomoi te ntango nsuka ekoya?

7 Mbala mosusu ozali koyoka mawa mpo omoni lokola okozala na bomoi te ntango nsuka ya mokili oyo ekoya. Soki ezali bongo, nini ekoki kosalisa yo? Omikundwela ete Yehova azali komonisa motema molai liboso ete abebisa mokili mabe oyo. (Yis. 30:18) Kasi, motema molai na ye ezali na mokano moko. Etikeli bamilio ya bato ntango mpe epesi bango libaku ya koyekola koyeba ye mpe kosalela ye. (2 Pe. 3:9) Na yango, ntango kolɛmba nzoto eyeli yo, meká kokanisa ndenge motema molai ya Yehova ekosalisa lisusu bato mingi liboso nsuka eya. Ekoki mpe kozala ete bato yango mosusu bazali bandeko na yo ya libota!

8. Mikakatano oyo eutaka na bobange ekoki kosala nini epai ya mibange?

8 Tózala mibange to te, ntango tozali koyoka nzoto malamu te, ekómelaka biso mingi tóloba to tósala makambo oyo ekopesa biso mawa na nsima. (Mos. 7:7; Yak. 3:2) Na ndakisa, ntango Yobo moto ya sembo azalaki na mpasi, maloba na ye ekómaki “bilobaloba mpamba.” (Yobo 6:​1-3) Longola yango, maladi ekoki mpe kosala ete moto oyo akómi mobange asala to aloba makambo oyo emonisi mpenza bomoto na ye te. Nzokande, moko te kati na biso asengeli komona ete mbula oyo akómi na yango to kolɔngɔnɔ ya nzoto na ye epesi ye nzela ya kozanga boboto to kosala makambo na nko. Mpe soki tomoni ete tolobaki na moto moko mabe, tosengeli kokakatana te mpo na kosɛnga bolimbisi.—Mat. 5:​23, 24.

NDENGE YA KOBATELA ESENGO

Etape ya nzete ebimisi bafololo mingi; bililingi ya makambo oyo ekoki kosalisa bandeko oyo bakómi mibange bábatela esengo. Makambo yango elobelami mpe na paragrafe 9-13.

Ndenge nini okoki kobatela esengo atako mikakatano ya bobange? (Talá paragrafe 9-13)


9. Mpo na nini osengeli kondima lisalisi ya basusu? (Talá mpe bililingi.)

9 Ndimá lisalisi ya basusu. (Gal. 6:2) Na ebandeli, ekoki kozala mpasi kondima basusu básalisa yo. Ndeko mwasi moko na nkombo Gretl alobi boye: “Na bantango mosusu ezalaka mpasi nandima lisalisi ya basusu mpo namonaka ete nakozala kilo mpo na bango. Ezwaki ntango mpo nabongola makanisi na ngai mpe nandima na komikitisa nyonso ete nazali na mposa basusu básalisa ngai.” Ntango ondimi basusu básalisa yo, opesi bango libaku ya koyoka esengo oyo eutaka na kopesa. (Mis. 20:35) Mpe na ntembe te okoyoka esengo ntango okomona ete basusu balingaka yo mingi mpe batyelaka yo likebi.

Ndeko mwasi moko ya mobange asimbi ndeko mwasi moko ya elenge na lobɔkɔ ntango bazali kosala wenze.

(Talá paragrafe 9)


10. Mpo na nini tosengeli kobosanaka te komonisa botɔndi? (Talá mpe bililingi.)

10 Monisáká botɔndi. (Kol. 3:15; 1 Tes. 5:18) Ntango basusu basalisi biso, tozalaka na botɔndi kasi mbala mosusu tobosanaka komonisa yango. Nzokande, soki tosɛki mwa moke mpe topesi bango matɔndi, bakomona ete basalisi biso mpe tosepeli na lisalisi yango. Ndeko Leah, oyo asalisaka mibange na Betele moko, alobi boye: “Moko ya bandeko basi oyo nasalisaka akomelaka ngai mwa maloba ya botɔndi. Ezalaka maloba ebele te, kasi esimbaka motema na ngai. Maloba yango esepelisaka ngai, mpe nayokaka esengo mpo nayebi ete asepelaka na lisalisi oyo napesaka ye.”

Ndeko mwasi moko ya mobange azali kokoma karte moko mpo na kopesa matɔndi.

(Talá paragrafe 10)


11. Ndenge nini okoki kosalisa basusu? (Talá mpe bililingi.)

11 Lukáká kosalisa basusu. Soki opesi ntango mpe makasi na yo mpo na kosalisa basusu, ekosalisa yo obosana mwa moke mikakatano na yo moko. Lisese moko ya Afrika ekokanisi mibange na bibliotɛkɛ oyo etondi na babuku ya maloba ya bwanya. Kasi babuku oyo efandi kaka na bibliotɛkɛ eteyaka te to elobaka te makambo oyo ezali na kati. Bino mibange bozali lokola babuku ya ndenge wana, na yango bólukaka mabaku ya koyebisa bilenge makambo oyo boyebi mpe oyo bokutaná na yango na bomoi. Bótunaka bango mituna, mpe bóyokaka bango. Bómonisa bango ete kotosa mibeko ya Yehova epesaka ntango nyonso matomba mpe ndenge oyo ekopesa bango esengo. Na ntembe te okozala na esengo soki obɔndisi mpe olendisi bandeko oyo bazali bilenge.—Nz. 71:18.

Ndeko mobali moko ya mobange azali koyoka ndeko mobali moko ya elenge ndenge azali koyebisa ye makambo oyo ezali na motema.

(Talá paragrafe 11)


12. Na kotalela Yisaya 46:​4, Yehova alaki mibange nini? (Talá mpe bililingi.)

12 Sɛngá Yehova apesa yo makasi. Na bantango mosusu okoki kolɛmba na nzoto to na makanisi, kasi Yehova “alɛmbaka te, asilaka makasi mpe te.” (Yis. 40:28) Ndenge nini Yehova asalelaka nguya na ye oyo ezangi nsuka? Lolenge moko ezali ndenge apesaka mibange ya sembo makasi. (Yis. 40:​29-31) Kutu, alaki ete akosalisa bango. (Tángá Yisaya 46:4.) Mpe Yehova akokisaka ntango nyonso bilaka na ye. (Yos. 23:14; Yis. 55:​10, 11) Soki obondeli Yehova, akopesa yo makasi; yango ekondimisa yo ete alingaka yo mpe okoyoka esengo mpenza.

Ndeko mobali moko ya mobange azali kobondela.

(Talá paragrafe 12)


13. Na kotalela 2 Bakorinti 4:​16-18, likambo nini tosengeli kobosanaka te? (Talá mpe bililingi.)

13 Kobosanaka te ete okotikala bongo libela te. Ntango tozali kobosana te ete mokakatano oyo tozali na yango ezali ya ntango mokuse, ekozala mpasi te tóyikela yango mpiko. Lisusu, Biblia elobi ete bobange mpe maladi ezali kaka mpo na ntango mokuse. (Yobo 33:25; Yis. 33:24) Na yango, okoki kobatela esengo na yo mpo oyebi ete makambo ya malamu ezali liboso na yo, kasi na nsima na yo te. (Tángá 2 Bakorinti 4:​16-18.) Sikoyo, ndenge nini basusu bakoki kosalisa yo?

Ndeko mwasi moko ya mobange afandi na kiti ya bibɔsɔnɔ mpe azali kotánga Biblia. Azali komimona na Paradiso azongi elenge oyo alongwe na kiti ya bibɔsɔnɔ.

(Talá paragrafe 13)


NDENGE OYO BASUSU BAKOKI KOSALISA

14. Mpo na nini ezali na ntina kokende kotala to kobenga mibange?

14 Kendáká kotala mpe bengáká bandeko ya mibange mbala na mbala. (Ebr. 13:16) Mibange mosusu bamiyokaka lokola bazali bango moko. Camille, ndeko moko oyo akɔtá ndako, alobi boye: “Nazalaka kaka na ndako banda ntɔngɔ tii mpokwa. Yango esepelisaka ngai ata moke te. Na bantango mosusu namiyokaka lokola nkɔsi ya mobange oyo bakangi na kati ya ndako moko ya moke. Nakómaka nkandankanda mpe nalɛmbaka nzoto.” Na yango, soki tozali kokende kotala mibange, tokomonisa bango ete bazali na ntina epai na biso mpe ete tolingaka bango. Na ntembe te, biso nyonso tokoki koyeba mokolo moko oyo tokanisaki kobenga to kokende kotala mobange moko ya lisangá na biso, kasi tosalaki yango te. Ya solo, biso nyonso tozalaka na makambo mingi ya kosala. Na yango, tokoki kosala nini mpo ‘tóyeba makambo oyo eleki ntina,’ kati na yango kokende kotala mibange? (Flp. 1:10) Soki olingi kotindela mibange ya lisangá na bino mesaje to kobenga bango na telefone, okoki kokoma nkombo na bango mpe mokolo oyo okosala yango mpo obosana te. Mpo okende kotala bango, osengeli kobongisa programɛ; koloba te ete okosala yango soki ozwi ntango.

15. Makambo nini bilenge bakoki kosala elongo na mibange?

15 Soki ozali elenge, okoki komituna soki likambo nini okoki kosolola na mibange to makambo nini bokoki kosala elongo. Kasi, komitungisa te. Monisá kaka ete ozali moninga ya malamu. (Mas. 17:17) Salá makasi osololaka na mibange liboso to nsima ya makita. Na ndakisa, okoki kotuna bango vɛrsɛ oyo basepelaka na yango mingi, to likambo moko oyo basalá na bolenge na bango oyo esɛkisaka bango. Okoki mpe kobengisa bango mpo bótala elongo emisyo ya TV JW. Okoki mpe kosalisa bango na makambo mosusu. Na ndakisa, okoki kosalisa bango báyeba kosalela telefone to tablɛti, to kozwela bango mikanda na Internet. Ndeko mwasi moko na nkombo Carol alobi boye: “Sɛngá mibange bósala elongo likambo moko oyo olingaka. Atako nazali mobange, nalingaka kaka kosepela na bomoi. Nalingaka kokende kosomba biloko, kolya na restora, mpe kobima mpo na kozwa mwa mopɛpɛ.” Mpe ndeko mwasi mosusu na nkombo Maira alobi boye: “Moninga na ngai moko azali na mbula 90. Azali mokóló na ngai ya mbula 57. Kasi, mbala mingi nabosanaka yango mpo tosɛkaka mpe totalaka bafilme elongo. Mpe soki moko na biso akutani na mikakatano, alukaka toli epai ya mosusu.”

16. Mpo na nini ezali malamu kokende kotika mibange epai ya minganga?

16 Kendáká kotika bango epai ya monganga. Okoki komema mibange na motuka epai ya monganga, okoki mpe koluka koyeba soki minganga bazali kosalisa bango na ndenge oyo esengeli mpe bazali kotyela bango likebi. (Yis. 1:17) Okoki kosalisa mobange soki ozali kokoma makambo oyo monganga na ye azali koloba. Ndeko moko ya mobange na nkombo Ruth alobi boye: “Mbala mingi, soki nakei epai ya monganga ngai moko, monganga akipaka ngai malamu te. Minganga bakoki koloba: ‘Ozali kobɛla te, maladi na yo ezali kaka na makanisi.’ Kasi, soki moto moko akei kotika ngai, monganga akipaka ngai malamu mpenza. Napesaka bandeko ya lisangá matɔndi ndenge bakendaka kotika ngai.”

17. Ndenge nini okoki kosakola elongo na mibange?

17 Bimáká na bango na mosala ya kosakola. Mibange mosusu bakoki kozala na makasi te ya kosakola ndako na ndako. Na yango, okoki kosɛnga ndeko mwasi moko ya mobange asakola elongo na yo na shario. To okoki kutu kopesa ye kiti mpo afanda pembeni ya shario. To, okoki kosɛnga ndeko mobali moko ya mobange bókende elongo koyekola na moto, to mpe kobenga moyekoli aya bóyekola epai ya mobange yango. Bankulutu, bokoki kotala soki bokoki kotya makita mpo na mosala ya kosakola na ndako ya bandeko oyo bazali mibange mpo bákoka koyanganaka kozanga mokakatano. Yehova asepelaka na nyonso oyo tosalaka mpo na kopesa mibange lokumu.—Mas. 3:27; Rom. 12:10.

18. Tokolobela nini na lisolo ya boyekoli oyo elandi?

18 Tomoni ete Yehova alingaka mibange mpe azwaka bango na motuya. Na yango biso nyonso tosengeli kotalelaka mpe mibange ndenge wana! Bobange ezalaka na mikakatano na yango, kasi na lisalisi ya Yehova, okoki kobatela esengo na yo. (Nz. 37:25) Ezali mpenza likambo ya kolendisa koyeba ete makambo ya malamu ezali liboso na yo, kasi na nsima na yo te! Bongo, tokoki koloba nini mpo na baoyo basalisaka mobange moko na libota, mwana, to moninga moko oyo azali na maladi? Ndenge nini bokoki kobatela esengo na bino? Tokopesa eyano na motuna yango na lisolo ya boyekoli oyo elandi.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Makambo nini ekoki kosala ete bandeko oyo bazali mibange bábungisa esengo na bango?

  • Ndenge nini mibange bakoki kobatela esengo na bango?

  • Ndenge nini tokoki kosalisa mibange na lisangá na biso?

LOYEMBO 30 Tata na ngai, Nzambe na ngai, mpe moninga na ngai

a Talá na jw.org mpe na JW Library® video Mibange: Bozali na ntina mingi.

b NDIMBOLA YA MALOBA: Esengo ezali ezaleli moko ya mbuma ya elimo ya Nzambe. (Gal. 5:22) Moto azalaka na esengo ya solosolo soki azali na boyokani ya malamu elongo na Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto