Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yb16 lok. 31-lok. 38 par. 2
  • Bikateli ya batribinale

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bikateli ya batribinale
  • Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kokomama na buku ya Leta
  • Kofuta mpako
  • Koboya kokɔta na makambo ya mokili mpe mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli
  • Koboya kosangana na milulu ya kokumisa ekólo
  • Koyina ya bakonzi ya guvɛrnema
  • Bikateli ya batribinale
    Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
  • Basaleli ya Yehova balongi etumba moko molai na tribinale!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Babundi mpo na kozwa bonsomi ya losambo
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Bikateli ya batribinale
    Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
Makambo mosusu
Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova
yb16 lok. 31-lok. 38 par. 2
Batatoli ya Yehova bazali kosakola na Russie

Russie: Bazali kosakola nsango malamu na Moscou

MAKAMBO YA ESENGO YA MBULA ELEKI

Bikateli ya batribinale

Kokomama na buku ya Leta

Kokomama na buku ya Leta ezali te likambo eleki ntina mpo biso Batatoli ya Yehova tósala makambo ya losambo na biso. Kasi, kokomama na buku ya Leta epesaka biso nzela ya kozala na mapango mpo na kosala makita mpe kozwa ndingisa ya kokɔtisa mikanda na biso na ekólo.

  • Na 2004, batribinale ya Russie ekangaki ebongiseli oyo endimamaki na Leta, oyo Batatoli ya Yehova na Moscou bazalaki kosalela. Na yango, bandeko na biso na Moscou banyokwamaki mingi. Bakonzi ya polisi bazalaki kotungisa bango, bato basalaki bandeko mosusu mabe na mosala ya kosakola, bankolo-mapango oyo bandeko bazalaki kofutela mpo na kosala makita baboyaki na mapango na bango, mpe yango esalaki ete bandeko bázanga bisika ya koyangana mpo na losambo. Na 2010, Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato (ECHR) emonisaki polele ete Russie etosaki te ntomo ya Batatoli ya Yehova na Moscou mpe esɛngaki guvɛrnema ya Russie ezongisa ebongiseli na bango na buku ya Leta. Tozali na esengo ya koyebisa bino ete na mokolo ya 27/05/2015, biro ya Moscou oyo etalelaka makambo ya bosembo na Russie (Ministère de la justice de la fédération de Russie) ekomaki na buku ya Leta ebongiseli ya sika oyo Batatoli ya Yehova bazali kosalela na Moscou.

Kofuta mpako

Na kolanda bosembo, bibongiseli ya Batatoli ya Yehova oyo endimami na Leta na mokili mobimba efutaka mpako te, ndenge ezalaka mpo na mangomba mpe bibongiseli mingi oyo esalisaka bato ya mpasi. Kasi, na bantango mosusu, baguvɛrnema mosusu eboyaka kondima likambo yango mpo na biso.

  • Na Suède, bakonzi ya Leta balobaka ete Betele ezali te esika ya losambo oyo etondi na bato oyo bamipesá na mosala ya Nzambe, kasi ezali nde kompanyi mpe ete bandeko ya Betele bazali bato ya mosala. Leta esɛngaki Betele efuta mpako ya bakompanyi mpe ndeko mokomoko ya Betele mpako ya basali: ebele ya badolare. Mpo na kotɛmɛla likambo yango, Batatoli na Suède bamemi likambo yango na batribinale ndenge na ndenge ya Suède mpe batindi mikanda 6 na Tribinale Monene ya mpoto.

Koboya kokɔta na makambo ya mokili mpe mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli

Basaleli ya Yehova batosaka etinda ya Biblia oyo esɛngi ete ‘bátula mipanga na bango mpo ekóma bitimweli ya mabele mpe báyekola etumba lisusu te.’ (Yis. 2:4) Baboyaka kokɔta na bitumba, atako baguvɛrnema ya bamboka mosusu endimá te ete moto asala mosala mosusu ya Leta na esika ya mosala ya soda.

  • Mibeko ya Corée du Sud epesi moto lotomo te ya koboya mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na ye. Na mbula 60 oyo eleki, Batatoli ya mibali koleka 18 000 bakɔtaki bolɔkɔ mpo baboyaki mosala ya soda. Batatoli pene na nyonso na ekólo yango bayebi mpasi ya kozala na ndeko to moninga na bolɔkɔ. Na 2004 mpe na 2011, tribinale ya Corée du Sud oyo etalelaka mibeko ya mboka elobaki ete ndenge bazalaki kokanga bandeko eyokani na mibeko. Kasi, na sanza ya nsambo na 2015, tribinale yango esalaki likita mpo etalela lisusu likambo yango. Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazali kobondela ete mokakatano yango oyo eumeli elongwa mpo bátika kokanga bandeko na biso bilenge mibali na Corée du Sud mpo na kondima na bango.

  • Batatoli ya Yehova misato na Érythrée balingi bákokisa mbula 22 na bolɔkɔ mpo baboyaki mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango. Moto moko te alongá komonisa mabe ya ndeko Paulos Eyassu, Negede Teklemariam, ná Isaac Mogos, mpe bazwá naino te libaku ya kosamba likambo na bango na tribinale. Bango ná bandeko mosusu 50, ya mibali mpe ya basi, bazali kokoba kobatela bosembo atako bazali konyokola bango makasi mpe kotya bango na babolɔkɔ ya mabe. Tozali na elikya ete Yehova ‘azali koyoka kokimela’ ya bandeko na biso oyo bakangi bango mpo na kondima na bango mpe akosalisa bango.​—Nz. 79:11.

  • Na Ukraine, na sanza ya mwambe 2014, guvɛrnema ebengisaki ndeko Vitaliy Shalaiko akende kosala mosala ya soda. Lokola azalaki kotosa lisosoli na ye, aboyaki kasi alobaki ete akondima kosala mosala mosusu ya Leta na esika ya mosala ya soda. Prokirɛrɛ afundaki ye ete azali kokima mosala ya soda, kasi Tribinale monene mpe batribinale mosusu emonaki ete bifundeli yango ezali ya lokuta. Tribinale oyo etalelaki lisusu likambo yango emonisaki ete koluka kimya na mboka elimboli te kolongola ntomo ya bato, mpe “ntomo ya moto ya koboya mosala ya soda mpo na lisosoli ekoki kolongwa te kaka mpo na kobatela ekólo.” Prokirɛrɛ azongisaki lisusu likambo yango na tribinale. Na mokolo ya 23/06/2015, Tribinale monene ya Ukraine oyo etalelaka makambo ya bana-mboka mpe ya babomi-bato endimaki bikateli ya batribinale ya mike. Na yango, endimaki ntomo ya moto ya koboya mosala ya soda mpo na lisosoli mpe kondima kosala mosala mosusu ya Leta ata na ntango oyo ekólo ezali na yikiyiki.

Vitaliy Shalaiko azali koteya mobali moko na Ukraine

Ukraine: Vitaliy Shalaiko azali kosakola nsango malamu

Mpo na ekateli wana ya malamu, ndeko Shalaiko alobi boye: “Maloba ya Yirimia 1:19 epesaki ngai makasi. Nakanaki ete nakondima ekateli nyonso oyo bakozwa​—kozala sembo epai ya Yehova nde likambo elekaki ntina. Nayebi ete akosundola ngai te kutu akopesa ngai makasi ya kotikala sembo. Kasi nazalaki kokanisa ata moke te ete likambo yango ekosuka malamu boye. Batribinale yango nyonso misato emonaki ete nazalaki mabɔkɔ mpɛmbɛ. Na boumeli ya ntango nyonso oyo nazalaki kosamba, bandeko batikaki ngai te. Basundolaki ngai te.”

Koboya kosangana na milulu ya kokumisa ekólo

Koboya kosangana na milulu ya kokumisa ekólo ezali mokakatano mosusu mpo na bakristo. Batyaka bilenge mosusu mbamba bábebisa bosembo na bango epai ya Yehova, mingimingi na biteyelo ntango bakonzi ya eteyelo basɛngi bana-kelasi báyemba loyembo ya kokumisa ekólo to bápesa bendele losako.

  • Na Rwanda, na etúká ya Karongi, bakonzi ya biteyelo bafundaki bana-kelasi oyo bazali Batatoli ete bamemyaka te loyembo ya kokumisa ekólo mpo baboyaka koyemba yango. Babenganaki bana na biteyelo mpe batyaki kutu bamosusu na bolɔkɔ. Na mokolo ya 28/11/2014, tribinale ya Karongi elongisaki bana-kelasi yango mpe elobaki ete ndenge baboyaka koyemba loyembo ya kokumisa ekólo emonisi te ete bamemyaka yango te. Na bikólo mosusu mpe, na ndakisa Cameroun, Guinée équatoriale, Malawi ná République Démocratique du Congo, bana-kelasi oyo bazali Batatoli bakutanaki mpe na likambo ya bongo, mpe na bisika mosusu babenganaki bango na biteyelo. Bandeko na biso na bikólo yango bazali kosala makasi mpo na kolimbolela bakonzi ya Leta ntina oyo Batatoli ya Yehova baboyaka kosangana na milulu ya kokumisa ekólo.

  • Na Honduras, Mirna Paz ná Bessy Serrano bazwaki badiplome na bango

    Honduras: Bapesaki Mirna Paz ná Bessy Serrano badiplome na bango

    Na sanza ya zomi na mibale ya mobu 2013, eteyelo moko ya Leta na Lepaera, na ekólo Honduras, eboyaki kopesa Batatoli mibale ya basi diplome mpo baboyaki koyemba loyembo ya kokumisa ekólo mpe kopesa bendele losako. Mpo na kosilisa likambo yango, baavoka mibale oyo bazali Batatoli ya Yehova bakendaki kokutana na mokonzi oyo asalaka na biro oyo etalelaka makambo ya kelasi mpe bayebisaki ye ndenge batribinale ya bikólo mosusu elongisaki bana-kelasi ya Batatoli ya Yehova na likambo yango. Mokonzi yango ya Leta azalaki na boboto mpe andimaki ete bana-kelasi yango ná baboti na bango bákomela mokambi ya biro ya sɛkrɛtɛrɛ oyo atalelaka makambo ya kelasi na Honduras. Nsima ya kotalela likambo yango, akweisaki mitindo na mokolo ya 29/07/2014 oyo elobaki ete “moto nyonso, azala nani, azali na lotomo ya kotánga kelasi mpe esengeli te konyokola bana-kelasi” mpe ayebisaki bakambi ya eteyelo wana bápesa bana-kelasi oyo bazalaki Batatoli ya Yehova diplome.

Koyina ya bakonzi ya guvɛrnema

Batatoli ya Yehova na bikólo nyonso tótosaka etinda ya Yesu ya koyebisa bato nsango malamu, ya koyangana elongo mpo na losambo mpe koyekola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo. Tótosaka mpe etinda ya Biblia ya kokɔtisa mibeko ya Yehova na mitema ya bana na biso mpe etinda ya “koboya . . . makila.” (Mis. 15:20; Mib. 6:5-7) Kasi na bantango mosusu, kotosa mitinda yango elukelaka biso makambo epai ya bakonzi ya Leta oyo bayebaka malamu te ntina ya bizaleli na biso.

  • Na États-Unis, tribinale ya etúká ya Floride epesaki mwasi moko oyo azali Motatoli te lotomo nyonso ya koteya bana na ye misato makambo ya Nzambe. Basɛngaki tata ya bana yango oyo azali Motatoli ete ameka ata moke te koyebisa bana na ye makambo oyo ekeseni na mateya ya Lingomba ya Katolike. Tata ya bana yango asɛngaki tribinale mosusu etalela likambo yango. Mpe na mokolo ya 18/08/2014, tribinale yango ekweisaki ekateli ya tribinale ya liboso. Na kotalela bikateli oyo ezwamaki liboso, tribinale yango ekomaki boye: “Kopekisa moboti oyo azwi te mokumba ya kobatela mwana ete ateya mwana mateya ya lingomba na ye ekosimba te soki emonisami polele te ete makambo ya lingomba yango ekozala likama mpo na mwana.”

    Ekateli yango epesaki bana yango lotomo ya koyekola makambo ya Yehova, mateya oyo ebongisaka bomoi. Bana yango bazali kokola malamu na elimo mpe bayanganaka na makita ya lisangá. Tata yango alobaki boye: “Kosamba likambo wana ebongisi ngai mpenza. Nakutanaki na mwa komekama mikolo eleki, kasi Yehova asalisi ngai natɛlɛma ngwi! Nayebi ete lokola toponi kosalela Yehova, tokokutana na minyoko.”

  • Efigenia Semente ná bana na ye misato na Namibie

    Namibie: Efigenia Semente ná bana na ye misato

    Ndeko mwasi Efigenia Semente, na Namibie, mama ya bana misato, akutanaki na likambo moko oyo emekaki mpenza bosembo na ye. Ntango azalaki na lopitalo mpo na kobota mwana na ye ya misato, mwa mokakatano ebimaki, mpe minganga ná bandeko na ye oyo bazali Batatoli te bazwaki ndingisa na tribinale moko mpo bázongisa ye makila. Ndeko Semente aboyaki na motema moko mpe amemaki likambo yango na tribinale mpo na kolongisa lotomo na ye ya kopona lisalisi ya monganga oyo alingi. Na mokolo ya 24/06/2015, Tribinale monene ya Namibie endimaki likanisi na ye, elobaki boye: “Moto nyonso, azala moboti to mwana, azali na lotomo ya kopona lisalisi ya minganga oyo alingi kozwa.” Ndeko Semente alobaki boye: “Tomonaki lobɔkɔ ya Yehova na ndenge oyo tomoná naino te. Ezali malamu mpenza kozala na kati ya lisangá ya bandeko. Yehova akipaka biso mpenza.”

  • Batatoli ya Suisse bameseni na mosala ya kosakola na bisika ya bato ebele na babalabala ya bingumba minene. Kasi, na engumba Genève, bakonzi babimisaki mobeko moko oyo epekisaki “kotanda mikanda oyo ezali kolobela makambo ya lingomba polele to na ndenge ya nsense na bisika ya bato ebele.” Na yango, Batatoli ya Yehova bamemaki likambo yango na tribinale mpo na komonisa ete kopekisa bato bátanda mikanda mpo na kolobela makambo ya Nzambe “eyokani ata moke te na bonsomi ya losambo mpe makanisi.” Tribinale endimelaki bango mpe Batatoli basalaki elongo na bakonzi ya Leta mpo na koluka esika ya malamu mpe ntango oyo ebongi kotanda mikanda mpo na kosakola na esika ya bato ebele.

  • Bakonzi ya Leta ya Azerbaïjan bazali kosala nyonso bápekisa mosala ya Batatoli ya Yehova. Biro oyo elandelaka kimya na ekólo ebengisaka Motatoli mokomoko mbala na mbala mpo na kotuna bango mituna. Biro yango etindaka mpe bato bákende na bandako ya Batatoli koluka mikanda oyo Leta aboyá ekɔta na ekólo. Mokili mobimba bayokaki mpasi na sanza ya mibale na 2015, ntango bato ya biro oyo elandelaka kimya na mboka bakangaki ndeko Irina Zakharchenko mpe Valida Jabrayilova, kaka mpo bazalaki koyebisa bato nsango ya Biblia. Tozali koyoka mawa mpo na makambo ya ndenge wana, kasi tozali na esengo mpo basakoli ya ekólo Azerbaïjan bazali kaka na mpiko mpe molende ya kokoba koyebisa bazalani na bango “nsango malamu ya Bokonzi.”​—Mat. 24:14.

  • Tii lelo guvɛrnema ya Russie ezali kokoba kotungisa Batatoli ya Yehova mpo na makambo ya losambo na bango. Ndenge tozali koloba boye, guvɛrnema ya Russie elobá ete mikanda 80 ya Batatoli ya Yehova “elekisaka ndelo.” Yango elimboli ete kokabola to kobimisa mikanda oyo bamoni ete “elekisaka ndelo,” na ndakisa, Mokanda mpo na masolo ya Biblia eyokani te na mibeko. Lisusu, na sanza ya zomi na mibale na 2014, Tribinale monene ya Russie elobaki ete site Internet na biso jw.org “elekisaka ndelo.” Bakompanyi oyo epesaka bato nzela ya kosalela Internet na Russie ekangá site na biso jw.org mpo bato bákɔta te, mpe bamonaka ete koyebisa bato ete site yango ezalaka, ezali kobuka mibeko. Kobanda sanza ya misato na 2015, bakonzi ya dwane balekisi ata kartɔ moko te ya mikanda ya Batatoli ekɔta na Russie, ezala ata Biblia to mpe mikanda oyo batribinale etalelaki malamumalamu mpe emonaki ete ezali kolekisa ndelo te.

Na engumba Taganrog, bandeko bazali kokoba kosamba likambo ya basakoli 16 oyo bakonzi ya Leta bafundaki ete bazali “babuki-mibeko” mpo babongisaka mpe bayanganaka na makita. Na engumba Samara, tribinale epesaki bakonzi ya Leta ndingisa ya kokanga ebongiseli na biso mpo balobaki ete “elekisaka ndelo.” Atako bandeko ya Russie bazali kokutana na mikakatano wana nyonso, bazali na ekateli ya kozongisela “Nzambe biloko ya Nzambe,” baboyi kopesa biloko ya Nzambe epai ya Kaisala.​—Mat. 22:21.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto