Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yb17 nk. 6-10
  • Makambo ya esengo ya mbula eleki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo ya esengo ya mbula eleki
  • Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Biro monene elongwe na Brooklyn ekei na Warwick, mpe biro ya filiale ekei na Wallkill
  • Ndenge nini mosala ezali kotambola na Warwick?
    Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova
  • Mosala monene na Warwick
    Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
  • Likita oyo emonisaki bomoko mpe elobelaki mikano ya minene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Ndenge nini masangá ya Batatoli ya Yehova ebongisami?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
Makambo mosusu
Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
yb17 nk. 6-10
Ekɔtelo na esika ya koyamba bato mpe linɔ́ngi na biro monene na Warwick, NY

Warwick, New York: Biro monene

Makambo ya esengo ya mbula eleki

NA ntango oyo mokili ya Satana ezali kokutana na makama ndenge na ndenge, basambeli ya solo ya Yehova bazali kokoba kozala “na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.” (1 Ko. 15:58) Balapolo oyo elandi emonisi ndenge oyo Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazali kosala makasi mpo na komonisa ete bazali ‘kotyela Yehova motema . . . , kosala malamu . . . , mpe kosala makambo na bosembo.’​—Nz. 37:3.

Biro monene elongwe na Brooklyn ekei na Warwick, mpe biro ya filiale ekei na Wallkill

Mosala ya kotonga bandako mosusu na Wallkill, kaka na etúká ya New York, esilaki mokolo ya 01/02/2016. Na nsima, komite ya filiale ya États-Unis, Departema ya mosala, mpe badepartema mosusu ya Betele ekómaki na Wallkill. Ntango misala na biro monene ya sika na Warwick ekómaki pene na nsuka, libota ya Betele ya Brooklyn ebandaki mosala monene ya kolongwa na engumba New York mpo na kokende kofanda na Warwick, oyo ezali na zamba, mosika na engumba.

Karte oyo emonisi bisika oyo mapango ya Betele ya États-Unis ezali; lopango ya Wallkill; linɔ́ngi mpe lopango ya Warwick

Mokolo ya yambo 03/04/2017, biro monene na Warwick ekofungwama mpo bato bábanda kosala bavizite. Na bavizite yango, bakolakisa mpe bato makambo misato ya minene oyo etali ebongiseli ya Yehova mpe ekozala na bandeko oyo bakotambwisa bapaya oyo bakoya.

  1. “Biblia mpe nkombo ya Nzambe” ekomonisa Babiblia ya kala oyo eyebani mingi te mpe ekomonisa polele ete nkombo ya Nzambe ezwami na Makomami.

  2. “Libota moko mpo na nkombo ya Yehova” ekolakisa makambo ya kala oyo emonisi libula ya elimo ya Batatoli ya Yehova, ekomonisa ndenge oyo Yehova azalaki mokemoke kotambwisa, koteya, mpe kobongisa basaleli na ye mpo básala mokano na ye.

  3. “Biro monene​—Kondima emonani na misala” ekolimbola makambo oyo Bakomite ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi esalaka mpo na kosalisa basaleli ya Yehova báyanganaka elongo, bákómisa bato bayekoli, bázwa bilei ya elimo, mpe bálingana lisusu mingi.

Bavizite ekobanda kosalema kobanda mokolo ya yambo tii mokolo ya mitano, kobanda na ngonga ya 8:00 na ntɔngɔ tii na ngonga ya 16:00 na mpokwa. Na boumeli ya miniti 20, bakolakisa mpe bato oyo bayei kosala vizite mwa bisika mosusu na bandako oyo ezali na babiro mpe misala mosusu mpe lopango mobimba ya Betele. Vizite ya mokuse ekobanda kosalema kobanda mokolo ya yambo tii mokolo ya mitano, na ntɔngɔ kobanda na ngonga ya 8:00 tii na ngonga ya 11:00, mpe nsima ya midi kobanda na ngonga ya 13:00 tii na ngonga ya 16:00.

Liboso ya kopona mokolo ya kosala vizite, okoki kokɔta na jw.org mpe kotala na esika bakomi MAKAMBO ETALI BISO > BABIRO MPE VIZITE > États-Unis.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto