Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 171
  • Zabolo azali mpenza ndenge nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zabolo azali mpenza ndenge nini?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Biblia emonisi ete Zabolo azalaka ndenge nini?
  • Bótɛmɛla Satana, mpe akokima!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • ‘Tótemela Zabolo’ ndenge Yesu asalaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Biblia elobi nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 171

Zabolo azalaka mpenza ndenge nini?

Eyano ya Biblia

Zabolo azali ekelamu ya elimo to anzelu, elingi koloba ete azali na nzoto oyo tokoki te komona.​—Baefese 6:11, 12.

Bato mingi bamonisaka Zabolo asimbi nkanya moko ya monene. Azali lokola ntaba moko oyo azali na maseke mpe na mokila.

Bato mingi bakanisaka ete Zabolo azali ekelamu moko lokola ntaba oyo ezali na maseke, na mokila, mpe na nkanya moko monene. Bato mosusu bakanisaka ete ndenge bamonisaka Zabolo ndenge wana emonisi ete bayemi oyo basalaki yango bazalaki na bomoi esili koleka mbula 1 000. Mpe emonani lokola masapo mpe mimeseno ya kala nde etindaki bayemi yango básala yango.

  • Biblia emonisi ete Zabolo azalaka ndenge nini?

  • Bavɛrsɛ ya Biblia oyo elobeli Zabolo

Biblia emonisi ete Zabolo azalaka ndenge nini?

Biblia ebengi Zabolo na bankombo ndenge na ndenge. Yango esalisi biso tóyeba kaka te soki azali na nzoto nini, kasi mpe bizaleli na ye. Yango oyo mwa bankombo yango:

  • Anzelu ya pole. Amimonisaka lokola moto oyo akopesa bato eloko ya malamu mpo na kotinda bango bálanda mateya na ye na esika bálanda mateya ya Nzambe.​—2 Bakorinti 11:14.

  • Nkɔsi oyo ezali koganga. Abundisaka mpenza basambeli ya Nzambe.​—1 Petro 5:8.

  • Dragɔ ya monene. Abangisaka, azali na nguya, mpe azali mobebisi.​—Emoniseli 12:9.

Bavɛrsɛ ya Biblia oyo elobeli Zabolo

  • 2 Bakorinti 11:14: “Satana ye moko azali kokoba komimonisa lokola anzelu ya pole.”

    Ndimbola: Satana asalelaka biloko kitoko mpo na kobenda bato bálanda mateya na ye na esika bálanda oyo ya Nzambe.

  • Baefese 6:11: “Bólata molato mobimba ya etumba oyo euti na Nzambe mpo bókoka kotɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo.”

    Ndimbola: Zabolo asalelaka mayele mabe mpo na kotinda bato báboya kotosa Nzambe.

  • Yakobo 4:7: “Bómikitisa liboso ya Nzambe; kasi bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.”

    Ndimbola: Moto akoki kolonga kotɛmɛla Satana soki azali kotosa Nzambe na esika ya kotosa Zabolo.

  • 1 Petro 5:8: “Monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali koganga mpe koluka kolya moto.”

    Ndimbola: Zabolo ayinaka baoyo batosaka Nzambe mpe alingaka kobebisa boyokani na bango ná Nzambe.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto