Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwyp lisolo 100
  • Nasala lisusu nini soki nabuki mibeko oyo batye na ndako?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasala lisusu nini soki nabuki mibeko oyo batye na ndako?
  • Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo osengeli te kosala
  • Likambo ya malamu ya kosala
  • Nasala nini mpo baboti bápesaka ngai konfianse?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mpo na nini mibeko ebeleebele boye?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Ndenge nini nakoki kokóma na liberte mingi?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Mpo na nini baboti batikaka ngai te namisepelisa?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka
ijwyp lisolo 100
Baboti bazali komitungisa mpo mwana na bango ya mwasi azongi na ndako nsima ya ngonga oyo batyá mpo na kozonga na ndako.

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasala lisusu nini soki nabuki mibeko oyo batye na ndako?

Mabota mingi ezalaka na mibeko na yango, na ndakisa, batyaka mibeko na makambo etali ngonga ya kozonga na ndako, kosalela baaparɛyi, ndenge ya kosalela basusu makambo mpe bongo na bongo.

Okosala nini soki obuki mobeko moko ya libota? Okoki te kobongola likambo oyo esí esalemi, kasi okoki kosala mwa eloko mpo makambo ebebá te. Lisolo oyo ekomonisa yo ndenge ya kosala yango.

  • Oyo osengeli te kosala

  • Likambo ya malamu ya kosala

  • Oyo bilenge mosusu balobi

Oyo osengeli te kosala

  • Soki baboti na yo bayebi te ete obukaki mobeko moko ya ndako, okoki kokóma na makanisi ya kobomba likambo yango.

  • Soki bayebi ete obukaki mobeko moko ya ndako, okoki kokóma na makanisi ya komilongisa to ya kopesa basusu foti.

Makanisi wana nyonso mibale ezali malamu te. Mpo na nini? Mpamba te kobomba likambo oyo esalemi to koluka komilongisa emonisaka ete moto akomeli naino te. Yango ekotinda baboti na yo bákanisa ete okomeli naino te mpe osengeli kosala lisusu milende.

“Kokosa ezali na yango solisyo te. Nsukansuka, solo ekoyebana kaka, mpe disiplini ekómaka makasi koleka ndenge ekokaki kozala liboso.”​—Diana.

Likambo ya malamu ya kosala

  • Ndimá likambo oyo osalaki. Biblia elobi boye: “Ye oyo azali kozipa makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te.” (Masese 28:13) Baboti na yo bayebi malamu ete okoki te kosala makambo na ndenge ya kokoka. Motuna yango oyo: Okoki kozala sembo?

    “Soki ozali koloba solo, baboti na yo bakolimbisa yo. Soki ozali koyebisa bango makambo nyonso oyo osali, bakondima ete ozali sembo mpe bakotyela motema.”​—Olivia.

  • Sɛngáká bolimbisi. Biblia elobi boye: “Bólata ezaleli ya komikitisa.” (1 Petro 5:5) Esɛngaka kozala na komikitisa mpo na kosɛnga “bolimbisi” mpe koboya komilongisa.

    “Bato oyo bamilongisaka babebisaka lisosoli na bango. Nsukansuka, lisosoli na bango etungisaka bango lisusu te soki bazali kosala makambo ya mabe.”​—Heather.

  • Ndimáká bitumbu. Biblia elobi boye: “Bóyoka disiplini.” (Masese 8:33) Boyá komilelalela mpe salá makasi otosa mibeko nyonso oyo baboti batye na ndako.

    “Mbala nyonso oyo ozali komilelalela mpo na etumbu oyo ozwi, yango ekoki kosala lisusu ete makambo ebeba se kobeba. Luká komona bolamu ya mobeko moko na esika ya komona kaka mabe na yango.”​—Jason.

  • Salá makasi ozongisa konfianse oyo batyelaki yo. Biblia elobi boye: “Bosengeli kolongola bomoto ya kala oyo eyokani na etamboli na bino ya liboso.” (Baefese 4:22) Zwáká bikateli ya malamu mpo baboti na yo bátyela yo lisusu motema.

    “Soki baboti na yo bazali komona ete okómi kozwa bikateli ya malamu mpe ozali lisusu te kobandela makambo ya mabe oyo osalaki, bakokóma lisusu kotyela yo motema.”​—Karen.

TOLI: Salá koleka oyo basɛngi yo mpo na komonisa ete ozali moto oyo bakoki kotyela motema. Na ndakisa, mbala oyo okobima, yebisá baboti na yo ete ozali na nzela mpe ozali kozonga na ndako, ata soki ozali na retare te. Yango ekomonisa ete olingi koloba na bango ete: ‘Nalingi kozongisa konfianse oyo botyelaka ngai.’

Oyo bilenge mosusu balobi

Darius.

“Soki obombeli baboti na yo likambo oyo osalaki, ozali kokosa. Yebá ete nsukansuka makambo oyo osalaki ekoyebana kaka, mpe ntango ekoyebana, makambo ekobeba se kobeba mpo na yo soki olobaki te solo liboso.”​—Darius.

Sierra.

“Soki topesi moto mosusu foti mpo na makambo oyo tosalaki mpe toboyi kondima mabe na biso, ekomonisa ete tozali bato oyo bakomeli te. Baboti na biso bakoki te kotyela biso motema soki biso moko tosɛngi te bolimbisi mpo na makambo oyo tosalaki.”​—Sierra.

Bozongeli: Nasala lisusu nini soki nabuki mibeko oyo batye na ndako?

  • Ndimá likambo oyo osalaki. Baboti na yo bayebi malamu ete okoki te kosala makambo na ndenge ya kokoka. Motuna yango oyo: Okoki kozala sembo?

  • Sɛngáká bolimbisi. Esɛngaka kozala na komikitisa mpo na kosɛnga “bolimbisi” mpe koboya komilongisa.

  • Ndimáká bitumbu. Salá makasi otosa mibeko nyonso oyo baboti batye na ndako.

  • Salá makasi ozongisa konfianse oyo batyelaki yo. Zwáká bikateli ya malamu mpo baboti na yo bátyela lisusu motema.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto