Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mrt lisolo 29
  • Nasala nini mpo namitungisa koleka ndelo te?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasala nini mpo namitungisa koleka ndelo te?
  • Makambo mosusu
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Toli ebongi mpo na kokitisa mitungisi
  • Bómitungisa te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Matai 6:34—‘Bómitungisa te mpo na makambo ekoya lobi’
    Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
  • Luká Bokonzi, kasi biloko te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • 2 Esalisaka biso tósilisa mikakatano
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2018
Makambo mosusu
Makambo mosusu
mrt lisolo 29
Mobange moko ya mobali azali komitungisa mpe azali na mawa.

Nasala nini mpo namitungisa koleka ndelo te?

Komitungisa koleka ndelo ekoki kobebisa nzoto mpe mayoki ya moto. Ekoki kobimisa mikakatano ya minene koleka likambo oyo moto azalaki komitungisa mpo na yango.

Toli ebongi mpo na kokitisa mitungisi

  • Elongi moko ya mawa.

    Tyáká bandelo mpo na kotánga to kolanda bansango ya mabe. Ezali na ntina te oyeba makambo nyonso ya mikemike mpo na likambo moko boye. Soki ozali kolanda bansango oyo eyokisaka mpasi, okokóma kobanga lisusu mingi mpe okozala lisusu na elikya te.

    Toli ya Biblia: “Elimo oyo elɛmbi ekaukisaka mikuwa.”​—Masese 17:22.

    “Ezalaka pɛtɛɛ moto akóma moombo ya koluka koyeba bansango ya sika mpe bansango ya mabe na Internet, kasi yebá ete ezaleli yango ezali mabe mpenza. Mitungisi na ngai ekitaki mpenza ntango nakitisaki ntango ya kolanda bansango ya sika.”​—John.

    Kanisá naino: Ozali mpenza na mposa ya koyeba bansango nyonso ya sika?

  • Montre moko.

    Batelá mimeseno na yo. Meká kolamuka, kolya, kosala misala ya ndako mpe kolala kaka na ngonga oyo omesaná kosala yango. Soki omityeli programɛ, okomona ete ozali na bomoi moko ya malamu mpe mitungisi na yo ekokita.

    Toli ya Biblia: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba.”​—Masese 21:5.

    “Ntango maladi mabe ya coronavirus ebandaki, natikaki mpenza mimeseno na ngai ya malamu mpe namipesaki mingi na masano to na kominanola. Nalingaki kosalela malamu ntango na ngai, yango wana natyaki na programɛ na ngai makambo nyonso nasengeli kosala mokolo na mokolo.”​—Joseph.

    Kanisá naino: Nazali na momeseno ya malamu oyo esalaka ete namiyoka nasali likambo moko ya malonga na nsuka ya mokolo nyonso?

  • Elongi ya esengo.

    Tyáká makanisi na makambo ya malamu. Soki olekisaka ntango mpo na koloba “soki nayebaka” to na kokanisa kaka makambo ekobeba, okokóma komitungisa koleka ndelo. Kutu, ekozala malamu okanisa nde na makambo oyo ekopesa yo esengo na bomoi.

    Toli ya Biblia: “Bózala na botɔndi.”​—Bakolose 3:15.

    “Ntango natángaka Biblia, nakɔtisaka te na makanisi na ngai makambo ya mabe, mpe esalisaka ngai natya makanisi na ngai na makambo ya malamu. Ekoki komonana pɛtɛɛ, kasi esalisaka ngai mpenza!”​—Lisa.

    Kanisá naino: Omesaná kotya makanisi na makambo ya mabe mpe kobosana makambo ya malamu oyo ekómelaka yo?

  • likambo.

    Tyeláká basusu likebi. Soki ozali na mitungisi, mbala mosusu okoki kokanisa naino okende esika oyo okozala kaka yo moko. Na esika ya kosala bongo, kanisá makambo oyo okoki kosala mpo na kosalisa basusu.

    Toli ya Biblia: “Bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.”​—Bafilipi 2:4.

    “Kosala makambo mpo na basusu epesaka ngai esengo. Nasalaka makambo oyo ekosepelisa bango, mpe na ntango yango, mitungisi na ngai ekitaka. Na yango, nazalaka na ntango mingi te mpo na kokanisa mitungisi na ngai.”​—Maria.

    Kanisá naino: Oyebi moto moko oyo azali na bosɛnga? Okoki kosala nini mpenza mpo osalisa moto yango?

  • Motema.

    Batelá sante na yo. Saláká ngalasisi mpe zwáká ntango mingi mpo na kopema. Lyáká bilei oyo etongaka nzoto. Soki ozali kobatela sante na yo, okotalela makambo na ndenge mosusu mpe okomitungisa lisusu mingi te.

    Toli ya Biblia: “Ngalasisi ya nzoto ezali na litomba.”​—1 Timote 4:8.

    “Ngai ná mwana na ngai tokoki te kosala ngalasisi na libándá ndenge tolingi, yango wana tosalaka ngalasisi na ndako mbala na mbala. Yango esalaka ete tózala na esengo mpe tóyokana malamu.”​—Catherine.

    Kanisá naino: Osengeli na bilei oyo etongaka nzoto mpe kosalaka ngalasisi mpo na kozala na sante ya malamu?

Longola kosalela batoli oyo nyonso, bato mingi bamonaka malamu báyekola bilaka ya Biblia mpo na mikolo ezali koya. Talá lisolo “Bokonzi ya Nzambe ekosala nini?”

Bavɛrsɛ ya Biblia oyo elobeli mitungisi

Nzembo 55:22: “Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo, mpe ye moko akosunga yo.”a

Ndimbola na yango: Na nzela ya libondeli nde tobwelaka Nzambe mikumba na biso ya kilo, ezala mpe mitungisi na biso. Libondeli ezali mpenza kosolola na Mozalisi, oyo asungaka biso mpe “oyo abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.”​—2 Bakorinti 1:3, 4.

Masese 12:25: “Motungisi na kati ya motema ya moto yango nde etindaka motema na ye egumbama, kasi liloba ya malamu esepelisaka yango.”

Ndimbola na yango: Sololáká na bandeko na yo ya libota to baninga oyo bakoki kolendisa yo mpe kosalisa yo na ndenge ebongi.

Matai 6:27: “Nani na kati na bino soki amitungisi akoki kobakisa bolai ya bomoi na ye ata moke?”

Ndimbola na yango: Mbala mingi, komitungisa ezalaka na ntina te. Ebongisaka makambo te to epesaka solisyo te.

Matai 6:31, 32: “Bómitungisa ata moke te mpe bóloba te ete: ‘Tokolya nini?’ to, ‘Tokomɛla nini?’ to, ‘Tokolata nini?’ . . . Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko nyonso wana.”

Ndimbola na yango: Yehova Nzambe akoki kokokisa bamposa na biso ya bilei, bilamba, mpe esika ya kofanda liboso kutu tóyeba yango.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.​—Nzembo 83:18.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto