BÓSƐNZƐLAKA!
Kozala Mokristo elimboli nini?—Biblia elobi nini?
Lelo oyo, na lolendo nyonso, bato mingi na mokili mobimba bamibengaka bakristo; nzokande basalelaka basusu makambo na motema mabe. Basusu balukaka matomba na bango moko, bazalaka sembo te, to bazangi boboto. Basusu bazali sembo te epai ya balongani na bango. Bizaleli na bango etindaka bato mosusu bámituna: ‘Kozala mokristo elimboli mpenza nini?’
Kozala mokristo elimboli mpenza nini
Ezali mpasi te mpo moto aloba ete azali mokristo. Kasi koloba ete ozali mokristo ekoki te. Ndenge Biblia emonisi yango, mokristo azali moyekoli ya Yesu Kristo. (Misala 11:26) Yesu ye moko alobaki ete: “Soki botikali na kati ya maloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai.” (Yoane 8:31) Ya solo, moto moko te akoki kotosa maloba ya Yesu na ndenge ya kokoka. Kasi mokristo asengeli kotosa mateya ya Yesu mpe kosalela yango na bomoi na ye ya mokolo na mokolo. Tótalela mwa bandakisa.
Bakristo bamonisaka bolingo oyo ezangi moimi
Oyo Yesu alobaki: “Nazali kopesa bino mobeko ya sika, ete bólinganaka bino na bino; kaka ndenge ngai nalingi bino, bino mpe bólinganaka. Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai: soki bozali na bolingo na kati na bino.”—Yoane 13:34, 35.
Oyo Yesu asalaki: Yesu amonisaki bolingo epai ya bato nyonso, ezala bazalaki na mbongo mingi to te, bazalaki bato ya lokumu to te, to mpe ata soki bautaki wapi. Abikisaki bato ya maladi, aleisaki bato oyo bazalaki na nzala, mpe apesaki kutu bomoi na ye mpo na bato.—Matai 14:14-21; 20:28.
Oyo bakristo basalaka: Bakristo bamonisaka bolingo na ndenge bakabaka, baponaka bilongi te, mpe balimbisaka. Basalisaka bato oyo bazali na bosɛnga, mpe bandimaka komipimela mpo na basusu.—1 Yoane 3:16.
Bakristo bazalaka sembo
Oyo Yesu alobaki: “Nazali . . . solo.”—Yoane 14:6.
Oyo Yesu asalaki: Yesu azalaki sembo na makambo nyonso oyo alobaki mpe asalaki. Alukaki soki moke te kokosa basusu mpo básala makambo oyo ye alingi to kotinda bango bándima likambo oyo ezali solo te. Ayebanaki mpo na bosembo na ye, ata ntango oyo esengelaki kobimisela ye botɛmɛli.—Matai 22:16; 26:63-67.
Oyo Bakristo basalaka: Bakristo bakosaka te. Bafutaka mpako, bayibaka te, mpe mokolo na mokolo basalelaka bapatrɔ na bango mosala na bosembo nyonso. (Baroma 13:5-7; Baefese 4:28) Babubaka basusu te, bayibaka te na baekzamɛ, mpe bakomaka te makambo ya lokuta na mikanda ntango bazali koluka mosala to mikanda mosusu ya ndenge wana.—Baebre 13:18.
Bakristo basalaka makambo na boboto
Oyo Yesu alobaki: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe bomemi mikumba ya kilo, mpe ngai nakopemisa bino. Bómema ekanganeli na ngai na mapeka na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa, mpe bokopema. Mpo ekanganeli na ngai ezali mpasi te mpo na komema mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.”—Matai 11:28-30.
Oyo Yesu asalaki: Yesu azalaki na boboto mpe azalaki kosala ete bato bábanga te koya epai na ye. Azalaki koyamba bana, kobɔndisa bato oyo bazalaki konyokwama na makanisi, mpe kosalela basusu makambo na limemya.—Marko 10:13-15; Luka 9:11.
Oyo Bakristo basalaka: Bakristo balobaka na basusu na boboto; baboyaka koloba maloba ya mabe to kofinga basusu. (Baefese 4:29, 31, 32) Batyelaka basusu likebi mpe balukaka mabaku mpo na kosalisa bango.—Bagalatia 6:10.
Bakristo bazalaka sembo epai ya balongani na bango
Oyo Yesu alobaki: “Oyo Nzambe akangisi esika moko, moto akabola yango te.”—Marko 10:9.
Oyo Yesu asalaki: Atako Yesu abalaki te, alendisaki babalani bázala sembo moko epai ya mosusu. (Matai 19:9) Akebisaki bango na makambo oyo ekoki kobebisa libala na bango.—Matai 5:28.
Oyo Bakristo basalaka: Bakristo baboyaka kosala eloko nyonso oyo ekoki komonisa ete bapesaka lokumu te na libala na bango. (Baebre 13:4) Babalani bamoniselanaka bolingo mpe limemya.—Baefese 5:28, 33.