Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 9
  • Nzambe azali na nkombo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe azali na nkombo?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Nkombo ya Nzambe
    Lamuká!—2017
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Yehova
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • A4 Nkombo ya Nzambe na Makomami ya Ebre
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 9
Nkombo ya Nzambe na Ebre

Nzambe azali na nkombo?

Eyano ya Biblia

Moto nyonso azalaka na nkombo na ye, bongo Nzambe azala na nkombo te? Lisusu, ezalaka na ntina mingi tóbengaka baninga na biso na bankombo na bango. Bongo moninga na biso Nzambe, tosengeli kobenga ye na nkombo na ye te?

Na kati ya Biblia, Nzambe alobi boye: “Ngai Yehova. Yango nde nkombo na ngai.” (Yisaya 42:8) Ya solo, azali na batitre mingi, na ndakisa “Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” “Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso,” mpe “Mozalisi.” Kasi, apesi bato oyo basambelaka ye lokumu na ndenge asɛngi bango bábengaka ye na nkombo na ye.​—Ebandeli 17:1; Misala 4:24; 1 Petro 4:19.

Na Babiblia mingi, nkombo ya Nzambe ezali na Kobima (Exode) 6:3. Vɛrsɛ yango elobi boye: “Nazalaki kobimela Abrahama, Yisaka ná Yakobo lokola Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, kasi mpo na nkombo na ngai Yehova, namiyebisaki epai na bango te.”

Na Lingala, tosalelaka nkombo ya Nzambe, Yehova, banda kala. Atako bato ebele ya mayele balobaka ete nkombo ya Nzambe ezali nde “Yawe,” Yehova nde eyebani mingi. Eteni ya liboso ya Biblia ekomamaki na Lingala te, kasi nde na Ebre; na monɔkɔ yango esɛngaka kotánga kobanda na lobɔkɔ ya mobali ozali kozonga na lobɔkɔ ya mwasi. Na monɔkɔ yango, nkombo ya Nzambe ezali na balɛtrɛ minei oyo: יהוה. Balɛtrɛ minei yango ya Ebre ebongolamaka na YHWH, mpe babengaka yango Tetragrami.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto