Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 28
  • Mpo na nini kobondela na nkombo ya Yesu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini kobondela na nkombo ya Yesu?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Tosengeli nde kobondela Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Tosengeli kotinda mabondeli epai na Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mpo na nini kobondelaka na nkombo ya Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • “Nzela, solo mpe bomoi”
    “Yaká, landá ngai”
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 28

Mpo na nini kobondela na nkombo ya Yesu?

Eyano ya Biblia

Tosengeli kobondela Nzambe na nkombo ya Yesu mpo Nzambe andimaka tópusana penepene na ye kaka na nzela ya Yesu. Yesu alobaki: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoane 14:6) Yesu alobaki mpe na bantoma na ye ya sembo ete: “Ya solosolo mpenza, nalobi na bino ete: Soki bosɛngi Tata eloko akopesa bino yango na nkombo na ngai.”​—Yoane 16:23.

Ntina mosusu ya kobondela na nkombo ya Yesu

  • Tokopesa Yesu ná Tata na ye, Yehova Nzambe, lokumu.​—Bafilipi 2:9-11.

  • Tokomonisa ete tozali na botɔndi epai ya Nzambe ndenge atindaki Yesu akufa mpo na kobikisa biso.​—Matai 20:28; Misala 4:12.

  • Tokondima ete kaka Yesu nde azali na mokumba ya kolobela bato epai ya Nzambe.​—Baebre 7:25.

  • Tokomonisa ete tozali kopesa Yesu limemya mpo na mokumba na ye ya Nganga-Nzambe Monene oyo akoki kosalisa biso tóndimama na miso ya Nzambe.​—Baebre 4:14-16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto