Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 41
  • Biblia elobi nini na likambo ya kozongisa makila?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia elobi nini na likambo ya kozongisa makila?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Makila ekobikisa bomoi: ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Makila
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Talelá bomoi ndenge Nzambe atalelaka yango
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Talelá likabo ya bomoi na motuya na yango ya solosolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 41

Biblia elobi nini na likambo ya kozongisa makila?

Eyano ya Biblia

Biblia epekisi biso kolya makila. Na yango, tosengeli te kondima makila to biloko oyo ezalaka na kati na yango, ezala mpo na kolya to kokɔtisa na nzoto. Talá bavɛrsɛ ya Biblia oyo elandi:

  • Ebandeli 9:4. Nsima ya Mpela, Nzambe apesaki Noa ná libota na ye nzela bábanda kolya nyama, kasi apekisaki bango kolya makila. Nzambe alobaki na Noa ete: “Kaka nde bosengeli kolya mosuni ná molimo na yango te, elingi koloba makila na yango.” Mobeko yango etali bato nyonso banda na ntango wana mpo biso nyonso tozali bankɔkɔ ya Noa.

  • Balevi 17:14. “Bosengeli te kolya makila ya lolenge nyonso ya ekelamu ya mosuni, mpo molimo ya lolenge nyonso ya ekelamu ya mosuni ezali makila na yango. Moto nyonso oyo akolya yango, akolongolama.” Nzambe amonaki ete molimo, to bomoi, ezali na kati ya makila mpe ezali eloko na ye. Atako mobeko yango epesamaki kaka mpo na ekólo Yisraele, emonisi ete kolya makila ezali likambo ya lisɛki te na miso ya Nzambe.

  • Misala 15:20. “Báboya . . . makila.” Nzambe apesaki bakristo mobeko lokola oyo apesaki Noa. Masolo ya kala emonisi ete bakristo ya liboso bazalaki koboya kolya makila, bazalaki ata mpe koboya komɛla yango lokola nkisi.

Mpo na nini Nzambe aboyi tósalela makila?

Minganga mingi bamonisi ete koboya kozongisama makila ezali malamu mpenza. Nzokande likambo eleki ntina, Nzambe aboyi tózongisama makila mpo yango ezali na motuya mingi na miso na ye.​—Balevi 17:11; Bakolose 1:20.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto