Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 109
  • Nsuka ya mokili ekoya ntango nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nsuka ya mokili ekoya ntango nini?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Nsuka ya mokili ezali kobangisa, kosepelisa to kolɛmbisa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Biyano na mituna minei oyo etali nsuka ya mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • “Nsuka ya mokili”—Elimboli nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Mokili ya lelo ekoumela lisusu?
    Mokili ya lelo ekoumela lisusu?
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 109
Etikali moke midi ebɛta na montre oyo ezali na efelo

Nsuka ya mokili ekoya ntango nini?

Eyano ya Biblia

Mpo na koyeba ntango nsuka ya mokili ekoya, esengeli naino koluka koyeba ndenge Biblia esalelaka liloba “mokili.” Liloba ya Grɛki koʹsmos, oyo babongolaka yango na “mokili,” mbala mingi emonisaka nde bato, mingimingi baoyo bayokanaka te na Nzambe to mpe basalaka mokano na ye te. (Yoane 15:18, 19; 2 Petro 2:5) Basalelaka mpe koʹsmos mpo na kolobela ebongiseli ya mokili oyo.​—1 Bakorinti 7:31; 1 Yoane 2:15, 16.a

“Nsuka ya mokili” ezali nini?

Maloba “nsuka ya mokili,” ndenge ezali na mabongoli mingi ya Biblia, ekoki mpe kobongolama na “Nsuka ya ebongiseli ya makambo,” to “nsuka ya ekeke.” (Matai 24:3; Biblia haut fleuve) Yango elingi koloba te ete mabele to bato nyonso bakobomama kasi nde nsuka ya ebongiseli ya bato.​—1 Yoane 2:17.

Biblia eteyaka ete “basali-mabe bakobomama” mpo bato malamu básepela na bomoi awa na mabele. (Nzembo 37:9-11) Yango ekosalema na ntango ya “bolɔzi monene,” oyo ekosuka na etumba ya Armagedone.​—Matai 24:21, 22; Emoniseli 16:14, 16.

Nsuka ya mokili ekoya ntango nini?

Yesu alobaki boye: “Mpo na mokolo yango mpe ngonga yango moto moko ayebi te, ezala baanzelu ya likoló ezala Mwana, kaka Tata nde ayebi.” (Matai 24:36, 42) Abakisaki mpe ete nsuka ekoya na mbalakaka, “na ngonga oyo bozali kokanisa te.”​—Matai 24:44.

Atako mokolo to ngonga eyebani mpenza te, Yesu apesaki “elembo,” to makambo oyo ekomonisa eleko oyo ekomema na nsuka ya mokili. (Matai 24:3, 7-14) Biblia ebengi eleko yango “ntango ya nsuka,” “eleko ya nsuka” mpe “mikolo ya nsuka.”​—Danyele 12:4; Bible na lingala ya lelo oyo; 2 Timote 3:1-5.

Soki nsuka ya mokili eleki eloko moko ekotikala?

Ɛɛ. Mabele ekozala kaka mpo Biblia elobi “ekotengatenga te kino ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ libela.” (Nzembo 104:5) Mpe mabele ekotonda na bato, ndenge kaka Biblia elobaka: “Bayengebene bakozwa mabele, Mpe bakofanda wana seko.” (Nzembo 37:29) Nzambe akozongisa bomoi ndenge alingaki ezala na ebandeli:

  • Paradiso.​—Yisaya 35:1; Luka 23:43.

  • Libateli mpe kimya.​—Mika 4:4.

  • Mosala ya malamu mpe oyo ezali kosepelisa mpo na moto nyonso.​—Yisaya 65:21-23.

  • Maladi mpe bobange ekozala te​—Yobo 33:25; Yisaya 33:24.

Bato bazali kozwa mwa mopɛpɛ pembeni ya mai na paradiso

a Liloba ya Grɛki ai·onʹ mpe ebongolami na Babiblia mosusu na “mokili.” Soki babongoli yango bongo ai·onʹ ezalaka na ndimbola ndenge moko na koʹsmos mpo emonisaka ebongiseli ya mokili oyo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto